Bomipesi mpe kolinga na mozindo. Bolingo mpo na Nzambe ezali na bomipesi, koyeba kondima Nzambe, limemia, motema pete, boboto, bolimbisi, mawa, ngolu, kosalela, botondi, bolamu. Ndakisa monene ya bolingo ya Nzambe mpo na bana na Ye ezwami na Bomikabi ezanga nsuka ya Yesu Klisto.
Okolinga moninga na yo ya penepene lokola yo moko, Lew. 19:18 (Mat. 5:43–44 ; 22:37–40 ; Lom. 13:9 ; Gal. 5:14 ; Yak. 2:8 ; Mos. 23:15 ; Mal&May 59:6 ).
Okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo nyonso, Dut. 6:5 (Mor. 10:32 ; Mal&May 59:5 ).
Nkolo Nzambe na bino azali komeka bino, mpo na koyeba soki bolingi Nkolo Nzambe na bino, Dut. 13:3 .
Oyo Nkolo alingaka nde asembolaka, Mas. 3:12 .
Moninga alingaka ntango inso, Mas. 17:17 .
Nzambe alingaki bongo mokili, ete Apesaki Mwana mobotami se moko na Ye, Yoan. 3:16 (Mal&May 138:3 ).
Bolinga moko mpe mosusu; lokola nalingaki bino, Yoan. 13:34 (Yoan. 15:12, 17 ; Mose 7:33 ).
Soki olingaka ngai, bombaka mitindo na ngai, Yoan. 14:15 (Mal&May 42:29 ).
Moto moko te azali na bolingo monene koleka oyo, ete moto asopa bomoi na ye mpo na baninga na ye, Yoan. 15:13 .
Petelo, elingi yo ngai koleka ya oyo? Leisa mpate ya ngai, Yoan. 21:15–17 .
Eloko moko te ekokabola biso uta na bolingo ya Nzambe na Klisto, Lom. 8:35–39 .
Liso limoni te biloko oyo Nzambe asili kolengela mpo na bango baye balingi ye, 1Â Kol. 2:9 .
Na bolingo bosalela bamoko mpe basusu, Gal. 5:13 .
Mibali, bolinga basi ya bino, Efe. 5:25 (Kolos. 3:19 ).
Kolinga mokili te, 1Â Yoan. 2:15 .
Nzambe azali bolingo, 1Â Yoan. 4:8 .
Tolingi ye, mpo ete yambo alingaki biso, 1Â Yoan. 4:19 .
Klisto amonaki mpasi mpo na bolamu ya bolingo na ye epayi ya bato, 1Â Nef. 19:9 .
Kende mbangu liboso na bolingo ya Nzambe mpe ya bato nyonso, 2Â Nef. 31:20 .
Bokolakisa bana ya bino kolingana bango na bango mpe kosalisana bango na bango, Mos. 4:15 .
Soki bomiyoki koyembaka nzembo ya bolingo ya bosikoli, ekoki bino koyoka bongo sikawa, Alma 5:26 .
Bokambama na Molimo Mosantu, kokomaka motema molai, bato batonda na bolingo, Alma 13:28 .
Okanga bamposa nyonso ya yo, ete okoka kotondisama na bolingo, Alma 38:12 .
Boswani bozalaki te na ntina ya bolingo ya Nzambe boye bofandaki na mitema ya bato, 4Â Nef. 1:15 .
Eloko nyonso oyo ebiangi mpo na kolinga Nzambe efulami na Nzambe, Mor. 7:13–16 .
Bolingani ezali bolingo ya peto ya Klisto, Mor. 7:47 .
Bolingo ya bobongi nie ebwakaka bobangi libanda, Mor. 8:16 (1Â Yoan. 4:18 ).
Bolingani epesaka bato makoki mpo na mosala ya Nzambe, Mal&May 4:5 (Mal&May 12:8 ).
Bosantisami boyaka na banso baoyo balingaka mpe basalelaka Nzambe, Mal&May 20:31 .
Soki bolingaka ngai, salela ngai mpe bombaka mitindo na ngai, Mal&May 42:29 (Yoan. 14:15 ).
Lakisa bobakisami ya bolingo na baye osili kosembola to kopamela, Mal&May 121:43 .