Kati na makomi, bolakeli mabe ezali kotia na mosala mobeko ya Nzambe oyo epesaka nzela to momemaka masambisi mpe malandi ya mwango likolo ya eloko, moto, to bato mingi koleka mpo na bozangi bosembo. Bolakeli mabe ezali bomonisi ya bolingo mpe boyengebene ya bonzambe ya Nzambe. Ekoki kolakelama na Nzambe ye moko soki te kobimisama na basali na Ye baoyo bazali na likoki. Mbala mingi ntina mpenza ya bolakeli mabe eyebani bobele na Nzambe. mpo na kobakisa, ezali bato oyo baboyaka kotosa Nzambe na motema moko nde bayebi kozala kati na bolakeli mabe mpe na bongo bamibendani uta na Molimo ya Nkolo.
Nkolo akoki kolongola mabe mpo na bondimi ya moto moko to ya bato na Yesu Klisto mpe botosi na mibeko mpe na makuli ya nsango malamu (Alma 23:16–18 ; 3 Nef. 2:14–16 ; Bit. Bond. 1:3 ).
Nzambe alakelaki nioka mabe mpo na kokosaka Adama mpe Eva, Gen. 3:13–15 (Mose 4:19–21 ).
Mabele malakelamaki mabe mpo na ntina ya Adama mpe Eva, Gen. 3:17–19 (Mose 4:23–25 ).
Nkolo alakelaki Kaina mabe mpo na kobomaka Abele, Gen. 4:11–16 (Mose 5:22–41 ).
Nkolo alakelaki Kanana mpe biboto na ye mabe, Gen. 9:25–27 (Mose 7:6–8 ; Abal. 1:21–27 ).
Yisalaele ekopambolama soki batosi Nzambe, mpe ekolakelama mabe soki batosi te, Dut. 28 (Dut. 29:18–28 ).
Gehazi mpe bana na ye balakelamaki mabe na maladi ya maba ya Namana, 2 Mik. 5:20–27 .
Nkolo alakelaki ekolo ya Yisalaele ya kala mabe mpo bafutaki te biteni kati na zomi mpe bapesaki mabonza te, Mki. 3:6–10 .
Yesu alakelaki nzete ya musonge mabe mpe ekufaki, Mal. 11:11–14, 20–21 .
Yesu alakelaki mabe na bingumba ya Kolazi, Betesaida, mpe Kapalanauma, Luk. 10:10–15 .
Lokola Balamani balingaki te koyokela Nkolo, bakabwanaki na miso ya Nkolo mpe balakelamaki mabe, 2 Nef. 5:20–24 .
Banso babiangami koya epayi ya Nzambe, 2Â Nef. 26:33 .
Nkolo akolakela baye basalaka pite mabe, Yako. 2:31–33 .
Banefi basengeli kozwa bolakeli mabe monene koleka Balamani longola se soki bayamboli, Yako. 3:3–5 .
Bato ya botomboki bamemaka bolakeli mabe likolo ya bango moko, Alma 3:18–19 (Dut. 11:26–28 ).
Koliyolo alakelamaki mabe mpo na komemaka bato mosika uta na Nzambe, Alma 30:43–60 .
Nkolo alakelaki mabele mpe bozwi ya Banefi mabe mpo na mabe ya bato, Elam. 13:22–23 (2 Nef. 1:7 ; Alma 37:31 ).
Nkolo alakelaki Bayelede ya nkuna mabe, Etel. 9:28–35 .
Bomikabi ya Klisto elongoli bolakeli mabe ya Adama mpo na bana bake, Mor. 8:8–12 .
Baye bandimaka Nkolo te balakelami mabe, Mal&May 41:1 .
Mabele makobetama na bolakeli mabe longola se soki singa ya kokangisa na lolenge moko to mosusu ezali kati na batata mpe bana, Mal&May 128:18 (Mki. 4:5–6 ).
Kolakela mabe ezali lisusu kosalela elobeli oyo ezali ya esantoli, ya botuki, soki te ya bozangi limemia.
Bato basengeli te kolakela batata to bamama na bango mabe, Esod. 21:17 (Mat. 15:4 ).
Kolakela baye bazali kokonza likolo na yo mabe te, Esod. 22:28 (Mosak. 10:20 ).
Mibali mpe basi basengeli te kolakela Nzambe mabe, Lew. 24:13–16 .