Kobongisa. Nzambe, kosalaka na nzela ya Mwana mobali na Ye, Yesu Klisto, abongisaki biloko ya mike mike bizwami kati na molongo mpo na kosala mabele. Tata ya Lola mpe Yesu bakelaki moto na elilingi na Bango (Mose 2:26–27 ).
Na ebandeli Nzambe akelaki lola mpe mabele, Gen. 1:1 .
Tika tosala moto na elilingi na biso, Gen. 1:26 (Mose 2:26–27 ; Abal. 4:26 ).
Biloko nyonso esalemaki na ye, Yoan. 1:3, 10 .
Na ye biloko nyonso ekelamaki oyo ezali na lola, Kolos. 1:16 (Mos. 3:8 ; Elam. 14:12 ).
Nzambe akelaki mikili na nzela ya Mwana na ye, Ebe. 1:2 .
Mikili ya kotanga te nde nakelaki, Mose 1:33 .
Na nzela ya Mobotami se Moko na ngai nakelaki lola, Mose 2:1 .
Ngai, Nkolo Nzambe, nakelaki biloko nyonso na molimo liboso ezala lokola ezali komonana likolo ya etando ya mabele, Mose 3:5 .
Nkoto ya mabele lokola oyo ekokaki te kozala ebandeli ya motango ya bokeli na yo, Mose 7:30 .
Banzambe babongisaki mpe basalaki balola, Abal. 4:1 .