Bosambisi, Kosambisa Tala lisusu Bokwei, Kokitisa; Bosambisi, ya Nsuka; Yesu Klisto—Mosambisi Kotuya ezalela ya moko moko engebene na mabongisi ya nsango malamu; kokamata mokano; kososola bolamu uta na mabe. Mose afandaki mpo na kosambisa bato, Esod. 18:13. Kati na bosembo nde okosambisa moninga na yo ya penepene, Lew. 19:15. Bosambisa te, ete bosambisama te, Mat. 7:1 (BJS, Mat. 7:1–2; Luk. 6:37; 3 Nef. 14:1). Lokola mingi basumukaki na mobeko bakosambisama na mobeko, Lom. 2:12. Basantu bakosambisa mokili, 1 Kol. 6:2–3. Mwana ya Nzambe ya libela asambisamaki na mokili, 1 Nef. 11:32. Bapostolo zomi na mibale ya Mwana ya mpate bakosambisa mabota zomi na mibale ya Yisalaele, 1 Nef. 12:9 (Mal&May 29:12). Liwa, lifelo, zabulu, mpe banso baye bakangami na yango basengeli kosambisama, 2 Nef. 28:23 (1 Nef. 15:33). Soki bosambisi moto oyo akomatisa esenge na ye na bino mpo na biloko, boniboni sembo mingi koleka ekozala bokwei na bino mpo na kopimaka biloko na bino, Mos. 4:22. Bato bakosambisama engebene na misala na bango, Alma 41:3. Sambisa na bosembo, mpe okozala na boyengebene ezongisami epayi na yo lisusu, Alma 41:14. Uta na buku oyo ekokomama ekosambisama mokili, 3 Nef. 27:23–26 (Emon. 20:12). Montika ya bato baye bakosambisama na bazomi na mibale baye Yesu aponaki na mabele oyo, Morm. 3:18–20. Mormon alimbolaki nzela ya kosambisa bolamu uta na mabe, Mor. 7:14–18. Tiaka motema na Molimo oyo etindaka kosambisa na bosembo, Mal&May 11:12. Bosengeli koloba na mitema na bino—tika Nzambe asambisa kati na ngai mpe bino, Mal&May 64:11. Eklezia ya Nkolo ekosambisa bikolo, Mal&May 64:37–38. Mwana abimelaki milimo na boloko ete mikoka kosambisama engebene na moto kati na mosuni, Mal&May 76:73 (1 Pet. 4:6). Episikopo akozala mosambisi ya bato nyonso, Mal&May 107:72–74. Nkolo akosambisa bato nyonso engebene na misala na bango, engebene na bamposa ya mitema na bango, Mal&May 137:9.