Lokola esalelami kati na makomi, Bayuda-te ezali na ndimbola ebele. Ntango mosusu ezali nkombo ya bato ya eboto ya Bayisalaele te, ntango mosusu bato oyo ya eboto ya Bayuda te, mpe ntango mosusu bikolo oyo bizanga nsango malamu, ata kutu ekoki kozala na ndambuya Bayisalaele ya makila na kati ya bato yango. Lolenge esalelami awa nsima ezali motindo ya liloba yango lokola esalelami kati na Buku ya Mormon mpe Malongi mpe Mayokani.
Bayisalaele basengelaki te kobala baoyo bazali te Bayisalaele (Bayuda-te), Dut. 7:1–3 .
Nkolo akoya kozala pole mpo na Bayuda-te, Yis. 42:6 .
Petelo atindamaki komema nsango malamu na baoyo bazali Bayuda-te, Mis. 10:9–48 .
Nzambe apesaki lisusu boyamboli epayi ya baoyo bazali Bayuda-te, Mis. 11:18 .
Tobatisami kati na Eklezia se moko, tozala Bayuda to Bayuda-te, 1Â Kol. 12:13 .
Bayuda-te basengeli kozala baninga basangoli na Klisto na nzela ya nsango malamu, Efe. 3:6 .
Buku ya Mormon ekomamaki mpo na baoyo bazali Bayuda-te, ya nkasa ya Buku ya Mormon (Morm. 3:17 ).
Moto moko na kati ya Bayuda-te abimaki likolo ya mai, 1Â Nef. 13:12 .
Buku mosusu eyaki uta na Bayuda-te, 1Â Nef. 13:39 .
Litondi ya nsango malamu ekoya uta na baoyo bazali Bayuda-te, 1Â Nef. 15:13 (3Â Nef. 16:7 ; Mal&May 20:9 ).
Mboka oyo ekozala mboka ya lipanda mpo na Bayuda-te, 2Â Nef. 10:11 .
Baoyo bazali Bayuda-te bazali elilingi ya nzete ya elaya ya zamba, Yako. 5 .
Nsango malamu esengeli kobima na ntango ya Bayuda-te, Mal&May 45:28 (Mal&May 19:27 ).
Liloba ekobima kino nsuka ya mabele, yambo epayi ya baoyo bazali Bayuda-te, mpe nsima epayi ya Bayuda, Mal&May 90:8–10 .
Bantuku sambo bazali banzeneneke baleki malamu epayi ya Bayuda-te, Mal&May 107:25 .
Tinda bampaka ya Eklezia na ngai kobelela likolo bikolo nyonso, yambo likolo ya baoyo bazali Bayuda-te, mpe nsima likolo ya Bayuda, Mal&May 133:8 .