Nsomi uta na masumu soki te elindo songolo; kozangaka mpamela. Moto akomaka peto ntango makanisi mpe misala na ye ezali peto na lolenge nyonso. Moto oyo asali masumu akoki kokoma peto na nzela ya bondimi na Yesu Klisto, ya boyamboli, mpe na kozwaka makuli ya nsango malamu.
Ye oyo azali na maboko esukolama mpe motema ya peto akozwa mapamboli ya Nkolo, Nze. 24:3–5 .
Bosukolama, bino baye bomemaka sani ya Nkolo, Yis. 52:11 (Mal&May 133:4–5 ).
Bapambolami bato bazali na motema peto, Mat. 5:8 (3Â Nef. 12:8 ).
Makambo nyonso oyo ezali peto, bokanisa makambo oyo, Filip. 4:8 (Bit. Bond. 1:13 ).
Bino nyonso baye bozali peto na motema, tombolani mitu na bino mpe bozwa liloba ya elengi ya Nzambe, Yako. 3:2–3 .
Ekoki bino kotala likolo na Nzambe na mokolo wana na motema ya peto mpe maboko masukwama, Alma 5:19 .
Kozalaka peto mpe mbindo te liboso ya Nzambe, bakokaki te kotala lisumu longola se soki ezalaki na nkele, Alma 13:12 .
Bopetolama kutu lokola Klisto azali peto, Mor. 7:48 (Morm. 9:6 ).
Klisto akobomba mpo na ye moko bato ya peto, Mal&May 43:14 .
Nkolo atindaki ete ndako moko etongama na Siona kati na oyo wapi bato ya peto bakomona Nzambe, Mal&May 97:10–17 .
Oyo ezali Siona—bapeto na motema, Mal&May 97:21 .