Masalisi mpo na Makomi
Kobatisa, Libatisi


Kobatisa, Libatisi

Liloba oyo etiami na lokota ya Bamwela ya ebandeli elimboli “kokitisa na nse ya mai” to “kozindisa.” Libatisi na kozindisaka na mai na moto oyo azali na likoki ezali bokuli ya boyingisi ya nsango malamu mpe esengeli mpo na kokoma mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Bozali koya nsima ya bondimi na Yesu Klisto mpe boyamboli. Bosengeli kolandama na kozwaka likabo ya Molimo Mosantu mpo ete mokoka mpenza (2 Nef. 31:13–14). Libatisi na mai mpe Molimo esengeli liboso ete moto akoka kokota bokonzi ya selesitiale. Adama azalaki moto ya yambo ya kobatisama (Mose 6:64–65). Yesu lisusu abatisamaki mpo na kokokisa bosembo nyonso mpe mpo na kolakisa nzela na bato nyonso (Mat. 3:13–17; 2 Nef. 31:5–12).

Mpo ete banso likolo ya mabele bazali te na libaku ya kondima nsango malamu na ntango ya bomoi ya bokufi, Nkolo asilaki kopesa ndingisa na ebatisi masalema mpo na bakufi. Boye, baye wana bandimi nsango malamu na mokili ya molimo bakoki kolongisama mpo na koyingela kati na bokonzi ya Nzambe.

Libatisi ezali na ntina monene

Libatisi na bozindisi na mai

Libatisi mpo na bolimbisi ya masumu

Likoki elongobani

Bisenge mpo na libatisi

Liyokani esalemi na nzela ya libatisi

Libatisi mpo na bakufi

Libatisi mpo na bana babotami sika te