Na ebandeli ya Eleko ya Nkoto ya mibu, Klisto akozonga na mabele. Likambo oyo ekotia elembo ya nsuka bomeki ya kufa ya mabele oyo. Bato ya nkuna bakolongolama uta na mabele mpe basembo bakokamatama na likolo na lipata wana ezali mabele kopetolama. Ntango moto moko te ayebi mpenza ntango nini Klisto akoya mbala ya mibale, Ye apesaki biso bilembo ya kotalela mpo oyo bilakisi ete ntango ezali kobeleme (Mat. 24 ; JS—Mat. 1 ).
Nayebi ete Mosikoli na ngai akotelema na mokolo ya nsuka likolo ya mabele, Yob. 19:25 .
Liboso na ngai libolongo nyonso ekongumbama, monoko nyonso ekolapa ndai, Yis. 45:23 (Mal&May 88:104 ).
Mwana ya Moto ayaki na mapata ya lola, Dan. 7:13 (Mat. 26:64 ; Luk. 21:25–28 ).
Bakotalela ngai oyo batobolaki, Zek. 12:10 .
Moko akoloba, Nini bampota oyo na maboko na yo, Zek. 13:6 (Mal&May 45:51 ).
Nani akozala na mokolo ya boyei na ye? mpo azali lokola moto ya mopetoli ya libende, Mki. 3:2 (3Â Nef. 24:2 ; Mal&May 128:24 ).
Mwana ya Moto akoya na nkembo ya Tata na ye, Mat. 16:27 (Mat. 25:31 ).
Mpo na oyo etali mokolo mpe ngonga wana moto moko ayebi te, bobele Tata, Mat. 24:36 (Mal&May 49:7 ; JS—Mat. 1:38–48 ).
Yesu se moko oyo akoya se bongo na lolenge bomoni ye kokende na lola, Mis. 1:11 .
Nkolo ye moko akokita uta na lola, 1Â Tes. 4:16 .
Mokolo ya Nkolo ekoya lokola moyibi kati na butu, 2Â Pet. 3:10 .
Nkolo akoya na nkoto zomi ya Basantu na ye, Yud. 1:14 .
Akoya na mapata; mpe liso nyonso ekomona ye, Emon. 1:7 .
Bomilengele, bomilengele mpo na oyo ekoya, mpo Nkolo azali koya noki, Mal&May 1:12 .
Nakomibimisa uta na lola na nguya, mpe nakofanda na mabele mibu nkoto, Mal&May 29:9–12 .
Tombola mongongo na yo mpe belela boyamboli, kolengelaka nzela ya Nkolo mpo na boyei na ye ya mibale, Mal&May 34:5–12 .
Nazali Yesu Klisto, mpe nakoya na mpwasa na tempelo ya ngai, Mal&May 36:8 (Mal&May 133:2 ).
Mokolo yango ezali koya kala mingi te ete bokomona ngai, mpe bokoyeba ete nazali, Mal&May 38:8 .
Ye oyo abangaka ngai akoluka bilembo ya boyei ya Mwana ya Moto, Mal&May 45:39 .
Elongi ya Nkolo ekobimisama, Mal&May 88:95 .
Mokolo monene mpe ya nsomo ya Nkolo ebelemi, Mal&May 110:16 .
Ntango Mobikisi akomonana tokomona ye lokola azali, Mal&May 130:1 .
Mobikisi akotelema na kati ya bato na ye mpe akoyangela, Mal&May 133:25 .
Nani azali ye oyo akiti na nse uta na Nzambe na lola na bilamba ya motane, Mal&May 133:46 (Yis. 63:1 ).