Nyonso, mobimba, mpe oyo ekoli mobimba; nyonso sembo. Ya bobongi nie elimboli lisusu oyo ezanga lisumu to mabe. Bobele Klisto azalaki ya bobongi nie mpenza. Bandimi ya solo ya Klisto bakoki kokoma bato babongi nie na nzela ya ngolu mpe Bomikabi na Ye.
Boye bozala bato ya bobongi nie, kutu lokola Tata na bino na lola, Mat. 5:48 (3Â Nef. 12:48 ).
Soki moto nani atuki na maloba te, se moko wana azali moto ya bobongi nie, Yak. 3:2 .
Bondimi ezali te kozala na boyebi boko bobongi nie ya makambo, Alma 32:21, 26 .
Bomikabi esalemaki mpo ete Nzambe akoka kozala Nzambe moko ya bobongi nie, Alma 42:15 .
Moroni azalaki moto moko ya bososoli ya bobongi nie, Alma 48:11–13, 17–18 .
Molimo ya Klisto mopesami na moto nyonso mpo na kosambisa mpe koyeba na boyebi moko ya bobongi nie soki eloko ezali ya Nzambe to ya zabulu, Mor. 7:15–17 .
Yakani epayi ya Klisto, mpe bozala bato na bobongi nie na ye, Mor. 10:32 .
Koba na bompikiliki kino na bobongi nie, Mal&May 67:13 .
Baoyo bazali bato bayengebene baoyo babongi nie na nzela ya Yesu, Mal&May 76:69 .
Misala oyo kati na Eklezia ezali mpo na bobongi nie ya Basantu na ngai, Mal&May 124:143 (Efe. 4:11–13 ).
Bato na bomoi bakoki te kokoma ya bobongi nie na kozangaka bakufi na bango, Mal&May 128:15, 18 .