Nkita to bofuluki. Nkolo apesaki Basantu toli ete baluka te bozwi ya mokili longola se mpo na kosala bolamu. Basantu basengeli te kotia boluki ya bozwi ya mokili liboso ya boluki ya bokonzi ya Nzambe, boye ezali na bozwi ya boseko (Yako. 2:18–19 ).
Soki bozwi boyei mingi, kotia motema na yo te likolo na yango, Nze. 62:10 .
Bozwi ezali na litomba te na mokolo ya nkele, Mas. 11:4 .
Ye oyo atii motema likolo ya bozwi na ye akokweya, Mas. 11:28 .
Nkombo ya malamu esengeli koponama koleka bozwi monene, Mas. 22:1 .
Lolenge boni ekozala mpasi mpo na baye bazali na bozwi kokota kati na bokonzi ya Nzambe, Mal. 10:23 (Luk. 18:24–25 ).
Bolingo ya mosolo ezali ntina ya mabe nyonso, 1Â Tim. 6:10 .
Lisuma epayi ya bazwi baye bazali kotiola babola mpe baye kani biloko ya motuya bikoma nzambe ya bango, 2Â Nef. 9:30 .
Basembo batiaki te mitema na bango likolo ya bozwi kasi bakabaki na banso, Alma 1:30 .
Bato babandaki kokola na ntina ya bozwi lolendo, Alma 4:6–8 .
Bato bakesenaki na nkondo, engebene na bozwi na bango, 3Â Nef. 6:12 .