Mboka oyo Nkolo alaki lokola mboka ya bosangoli libula na balandi na Ye ya sembo, mpe mbala mingi lisusu na biboto na bango. Bamboka elakelama ezali mingi. Mbala mingi na kati ya Buku ya Mormon, mboka elakelama oyo elobelami ezali Amerika.
Epayi ya nkona na yo nakopesa mboka oyo, Gen. 12:7 (Abal. 2:19 ).
Nakopesa epayi na yo mpe bana na yo mboka ya Kanana, Gen. 17:8 (Gen. 28:13 ).
Mose alakisaki polele bandelo ya mboka ya Yisalaele na Kanana, Mit. 34:1–12 (Mit. 27:12 ).
Bokokambama na mboka ya elaka, 1Â Nef. 2:20 (1Â Nef. 5:5 ).
Nkolo akokamba moto ya sembo mosika kati na mboka ya motuya, 1Â Nef. 17:38 .
Soki biboto ya Lehi babombi mitindo ya Nzambe, bakofuluka na mboka ya elaka, 2 Nef. 1:5–9 .
Yisalaele ekozonga na mboka na bango ya elaka, 2 Nef. 24:1–2 (Yis. 14:1–2 ).
Ekolo nyonso oyo ekozwa mboka oyo esengeli kosalela Nzambe, soki te bakokombolama, Etel. 2:9–12 .
Oyo ezali mboka ya elaka, mpe esika mpo na engumba ya Siona, Mal&May 57:2 .
Yuda ekoki kobanda kozonga na mboka ya Abalayama, Mal&May 109:64 .