Mosala ya kotia maboko likolo ya moto ya moto lokola ndambo ya bokuli ya bonganganzambe. Makuli ya bonganganzambe mingi masalemaka na botie ya maboko, ndakisa bokulisi, mapamboli, kosalisa bakoni, kofandisa ya moto lokola mondimi ya Eklezia, mpe kopesa Molimo Mosantu.
Mose atiaki maboko na ye likolo ya moto ya Yosua, lokola etindaki Nkolo, Mit. 27:18, 22–23 (Dut. 34:9 ).
Yesu atiaki maboko na ye likolo ya mwa ndambo ya bakoni, mpe abikisaki bango, Mal. 6:5 (Morm. 9:24 ).
Bapostolo batiaki maboko na bango likolo ya bato sambo oyo balingaki kosunga bango, Mis. 6:5–6 .
Molimo Mosantu mopesamaki na nzela ya botie ya maboko, Mis. 8:14–17 .
Anania atiaki maboko na ye likolo ya Saulo mpe azongisaki bomoni na ye, Mis. 9:12, 17–18 .
Paulo atiaki maboko na ye likolo na ye mpe abikisaki ye, Mis. 28:8 .
Paulo ateyaki malongi ya libatisi mpe ya botie ya maboko, Ebe. 6:2 .
Alma akulisaki banganganzambe mpe bampaka na botie ya maboko, Alma 6:1 .
Yesu apesaki bayekoli na ye nguya ya kopesa Molimo Mosantu na botie ya maboko, 3 Nef. 18:36–37 .
Likolo ya oyo bokotia maboko na bino, bosengeli kopesa Molimo Mosantu, Mor. 2:2 .