Bonzambe, Nzambe
Ezali na bato basato bakeseni kati na Bonzambe: Nzambe, Tata ya Seko; Mwana na Ye, Yesu Klisto; mpe Molimo Mosantu. Tondimi moko na moko kati na Bango (Bit. Bond. 1:1). Uta na emoniseli ya mikolo ya nsuka toyekoli ete Tata mpe Mwana bazali na nzoto oyo ekoki kosimbama ya mosuni mpe mikuwa mpe ete Molimo Mosantu azali moto ya molimo, kozangaka mosuni mpe mikuwa (Mal&May 130:22–23). Bato basato baye bazali moko kati na bomoko mpe boyokani ya bobongi nie ya ntina mpe malongi (Yoan. 17:21–23; 2 Nef. 31:21; 3 Nef. 11:27, 36).
Nzambe Tata
Ezali na botali nyonso Tata, soki te Eloyim, oyo atangami na nkombo ya Nzambe. Abiangami Tata mpamba te Azali tata ya milimo na biso (Mit. 16:22; 27:16; Mki. 2:10; Mat. 6:9; Efe. 4:6; Ebe. 12:9). Nzambe Tata azali mokonzi ya koluta banso ya molongo mobimba. Azali na nguya nyonso (Gen. 18:14; Alma 26:35; Mal&May 19:1–3), koyebaka nyonso (Mat. 6:8; 2 Nef. 2:24), mpe azali wana mpe na esika nyonso na nzela ya Molimo na Ye (Nze. 139:7–12; Mal&May 88:7–13, 41). Bato nyonso bazali na mokangano ya malamu koleka na Nzambe oyo moti moto mpembeni uta na biloko nyonso misusu oyo ekelamaki: mibali mpe basi bazali bana ya Nzambe ya milimo (Nze. 82:6; 1 Yoan. 3:1–3; Mal&May 20:17–18).
Mabaku ya Nzambe Tata komonisamaka to kolobaka na moto ezali mingi te na makomi. Makomi malobi ete Alobaki na Adama mpe Eva (Mose 4:14–31) mpe alakisaki Yesu Klisto na bato na mabaku ebele (Mat. 3:17; 17:5; Yoan. 12:28–29; 3 Nef. 11:3–7). Amonanaki na Setefano (Mis. 7:55–56) mpe na Joseph Smith (JS—Mambi ya Kala 1:17). Nsima Amonanaki na banso mibale Joseph Smith mpe Sidney Rigdon (Mal&May 76:20, 23). Na baoyo wana balingaka Nzambe mpe bamipetolaka liboso na Ye, Nzambe apesaka mbala mingi litomba ya komona mpe koyeba mpo na bango moko ete Azali Nzambe (Mat. 5:8; 3 Nef. 12:8; Mal&May 76:116–118; 93:1).
Nzambe Mwana
Nzambe oyo ayebani lokola Yehova azali Mwana, Yesu Klisto (Yis. 12:2; 43:11; 49:26; 1 Kol. 10:1–4; 1 Tim. 1:1; Emon. 1:8; 2 Nef. 22:2). Yesu asalaka na nse ya bokambi ya Tata mpe azali na boyokani nie mpenza na Ye. Bato nyonso bazali bandeko mibali mpe bandeko basi na Ye, mpamba te Azali nkulutu koleka banso ya bana ya molimo ya Eloyim. Matangi masusu ya makomi matangi Ye na nkombo liloba ya Nzambe. Ndakisa, makomi malobi ete “Nzambe akelaki lola mpe mabele” (Gen. 1:1), kasi ezalaki solo Yesu oyo azalaki Mokeli na nse ya bokambi ya Nzambe Tata (Yoan. 1:1–3, 10, 14; Ebe. 1:1–2).
Nzambe Molimo Mosantu
Molimo Mosantu azali lisusu Nzambe mpe abiangami Molimo Mosantu, Molimo, mpe Molimo ya Nzambe, na kati ya bankombo mpe nkombo esusu ya lokumu ya lolenge moko. Na lisalisi ya Molimo Mosantu, moto akoki koyeba bolingi ya Nzambe Tata mpe koyeba ete Yesu azali Klisto (1 Kol. 12:3).