Makomi
Etele 3


Mokapo 3

Ndeko mobali wa Yelede amoni mosapi mwa Nkolo lokola esimbaki ye mabanga zomi na motoba—Klisto alakisi nzoto ya ye ya molimo na ndeko mobali wa Yelede—Bango baye bazali na boyebi boko bobongo nie bakoki kobombama te uta o libanda lya elamba—Bibongolele bipesami mpo ya komeme likundoli lya Bayelede o mwinda.

1 Mpe esalemaki ete ndeko mobali wa Yelede, (sikawa motango mwa masuwa maye malengelemeki mozalaki mwambe) akendeki epai ya ngomba, eye babiangaki ngomba Selemi, na ntina ya bosanda boluti bwa yango, mpe aniangolaki uta o libanga lyoko mabanga zomi na motoba; mpe mazalaki mpembe mpe polele, kutu lokola talatala ekomonisaka na kati; mpe akumbaki mango o maboko ma ye likolo lya nsonge ya ngomba, mpe abelelaki lisusu epai ya Nkolo, kolobaka:

2 O Nkolo, olobaki ete tokozingama na mbonge. Sikawa tala, O Nkolo, mpe zala te na nkanda ya mosali wa yo na ntina ya botau bwa ye liboso lya yo; mpo toyebi ete yo ozali mosantu mpe ofandi o lola, mpe tolongobani te liboso lya yo; na ntina ya bokwei bozali bwa biso bokoma bobe ntango inso; nzokande, O Nkolo, opesi biso motindo moko ete tosengeli kobianga likolo lya yo, ete uta na yo tokoka kozwa engebene na mposa ya biso.

3 Tala, O Nkolo, obeti biso na ntina ya bobe bwa biso, mpe obenganaki biso, mpe mpo ya mibu miye mingi tofandaki o esobe; nzokande, osali ngolu epai ya biso. O Nkolo, tala ngai na mawa, mpe balola mosika nkanda ya yo uta na bato baye ba yo, mpe tika te ete bakatisa mozindo moye mongali o molili; kasi tala biloko biye, biye naniangoli libanda lya libanga.

4 Mpe nayebi, O Nkolo, ete ozali na nguya inso, mpe okoki kosala nini olingi mpo ya litomba lya moto; yango wana simba mabanga maye, O Nkolo, na mosapi mwa yo, mpe lengele mango ete makoka kongenge o molili; mpe makongenge epai ya biso o kati ya masuwa maye tolengeli, ete tokoka kozala na mwinda ntango ekokatisa biso mbu.

5 Tala, O Nkolo, okoki kosala eye. Toyebi ete ozali na makoki mpo ya kolakisa nguya enene, eye ekomonono eke o bososoli bwa bato.

6 Mpe esalemaki ete elobaka ndeko mobali wa Yelede maloba maye, tala, Nkolo atandolaki loboko la ye mpe asimbaki mabanga moko na moko na mosapi mwa ye. Mpe elamba elongwaki mosika uta o miso mya ndeko mobali wa Yelede, mpe amonoki mosapi mwa Nkolo; mpe ezalaki lokola mosapi mwa moto moko, bo epai ya mosuni mpe makila; mpe ndeko mobali wa Yelede akweyaki o nse liboso lya Nkolo, mpo abetemeki na bobangi.

7 Mpe Nkolo amonoki ete ndeko mobali wa Yelede akweyaka o mabele; mpe Nkolo alobaki epai ya ye: Teleme, ntina nini okwei?

8 Mpe alobaki epai ya Nkolo: namoni mosapi mwa Nkolo, mpe nabangaki mbele abete ngai; mpo ngai nayebaki te ete Nkolo azalaki na mosuni mpe makila.

9 Mpe Nkolo alobaki epai ya ye: Na ntina ya bondimi bwa yo omoni ete nakokamata likolo lya ngai mosuni mpe makila; mpe mokolo moko te moto ayei liboso lya ngai na bondimi boluti bwa lolenge loye lokola ozwi; mpo ezalaka boye te okokaki te komono mosapi mwa ngai. Emoni yo mingi koleka eye?

10 Mpe ayanolaki: Te; Nkolo, omilakisa epai ya ngai.

11 Mpe Nkolo alobaki epai ya ye: Endimi yo maloba maye nakoloba?

12 Mpe ayanolaki: Iyo, Nkolo, nayebi ete yo okolobaka bosolo, mpo ozali Nzambe moko wa bosolo, mpe okoki te kokosa.

13 Mpe elobaka ye maloba maye, tala, Nkolo amilakisaki epai ya ye, mpe alobaki: Zambi oyebi makambo maye okosikolama uta o bokwei; yango wana ozongisami o kati ya miso mya ngai; yango wana namilakisi epai ya yo.

14 Tala, nazali ye oyo alengelemeki uta o bokelami bwa mokili mpo ya kosikola bato ba ngai. Tala, ngai nazali Yesu Klisto. Nazali Tata mpe Mwana Mobali. Na ngai bato banso bakozwa bomoi, mpe bwango seko, kutu bango baye bakondima likolo lya nkombo ya ngai, bakozwa bomoi bwa seko; mpe bakokoma bana babali ba ngai mpe bana basi ba ngai.

15 Mpe mokolo moko te namilakisi epai ya moto oyo nakelaki, mpo mokolo moko te moto andimaki na ngai lokola yo. Emoni yo ete okelami na elilingi ya ngaimei? iyo, kutu bato banso bakelamaki o ebandeli nsima ya elilingi ya ngaimei.

16 Tala, nzoto eye, eye sikawa omoni, ezali nzoto ya molimo mwa ngai; mpe moto nakelaki nsima ya lolenge la nzoto ya molimo mwa ngai; mpe kutu lokola nabimi epai ya yo mpo ya kozala o molimo nakobima epai ya bato ba ngai o mosuni.

17 Mpe sikawa, ngai, Moloni, nalobaki, nakokaki te kosala nsango mobimba ya makambo maye makomami, yango wana ekoki na ngai mpo ya koloba ete Yesu amilakisaki epai ya moto oyo o molimo, nsima ya lolenge mpe o boulani bwa nzoto eye kaka kutu lokola o ntango amilakisaki epai ya Banefi.

18 Mpe asalaki epai ya ye kutu lokola asalaki epai ya Banefi; mpe enso eye, ete moto akoka koyeba ete azalaki Nzambe, na ntina ya misala minene miye Nkolo alakisaki epai ya ye.

19 Mpe na ntina ya boyebi bwa moto oyo, bakokaki te kobombama uta o botali o kati ya elamba; mpe amonoki mosapi mwa Yesu, moye, emonoki ye, akweyaki o bobangi; mpo ayebaki ete ezalaki mosapi mwa Nkolo; mpe azalaki na bondimi lisusu te, mpo ayebaki, kotiaka ntembe na eloko te.

20 Bongo, kozalaka na boyebi boye bobongo nie bwa Nzambe, akokaki te kobombama uta o kati ya elamba; yango wana amonoki Yesu; mpe asalaki epai ya ye.

21 Mpe esalemaki ete Nkolo alobaki epai ya ndeko mobali wa Yelede: Tala, okondima te ete makambo maye, maye omoni mpe oyoki makende epai ya mokili, kina ntango eyei ete nakokembela nkombo ya ngai o mosuni; yango wana, okosala bomengo makambo maye omoni mpe oyoki, mpe okolakisa yango na moto te.

22 Mpe tala, ekoya yo epai ya ngai, okokoma mango mpe okokanga mango, ete moko te akoka kobongola mango; mpo okokoma mango o lokota loko ete makoka te kotangema.

23 Mpe tala, mabanga maye mabale nakopesa epai ya yo, mpe okokanga mango elongo ya makambo maye okokoma.

24 Mpo tala, lokota loye okokoma nabulunganisi lango; nakosala o ntango esengeli ya ngaimei mabanga maye makokumisa o miso mya bato makambo maye okokoma.

25 Mpe ntango elobaka Nkolo maloba maye, alakisaki epai ya ndeko mobali wa Yelede bafandi banso ba mabele baye bazalaka, mpe lisusu banso baye bakozala; mpe alongolaki te bango uta o bomoni bwa ye, kutu kina o nsuka ya mabele.

26 Mpo alobaki epai ya ye o ntango ya yambo, ete soko akondima na ye ete akoka kolakisa epai ya ye makambo manso—ekolakisama epai ya ye; yango wana Nkolo akokaki te kolongola eloko moko na ye, mpo ayebaki ete Nkolo akokaki kolakisa ye makambo manso.

27 Mpe Nkolo alobaki epai ya ye: Koma makambo maye mpe kanga mango; mpe nakolakisa mango o ntango esengeli ya ngaimei epai ya bana ba bato.

28 Mpe esalemaki ete Nkolo atindaki ye akanga mabanga mabale maye azwaka, mpe alakisa mango te, kina Nkolo akolakisa mango epai ya bana ba bato.