Makomi
Etele 14


Mokapo 14

Bobe bwa bato bomemi botutu likolo lya mboka—Koliatumili ayingeli o etumba na Gilada, bongo na Libi, mpe bongo na Sizi—Makila mpe mobomano mozipi mboka.

1 Mpe sikawa ebandaki kozala botutu boko bonene likolo lya mboka mobimba na ntina ya bobe bwa bato, o bwango, soko moto moko alalisi esalele ya ye to mopanga mwa ye likolo lya mesa ya ye, to likolo lya esika wapi alingi kobomba yango, tala, o mokolo mwa nsima, akokuta yango te, boye enene ezalaki botutu likolo lya mboka.

2 Yango wana moto na moto akangaki ena eye ezalaki ya yemei, na maboko ma ye, mpe alingaki te kodefa mpe alingaki te kodefisa; mpe moto na moto abombaki esimbelo ya mopanga mwa ye na loboko la mobali la ye, mpo ya bobateli bwa bozwi mpe bomoi bwa yemei, mpe bwa basi mpe bana ba ye.

3 Mpe sikawa, nsima ya ntaka ya mibu mibale, mpe nsima ya liwa lya Saledi, tala, etelemeki ndeko mobali wa Saledi mpe apesaki etumba epai ya Koliatumili, o yango, Koliatumili abeteki ye mpe alandaki ye o esobe ya Akisi.

4 Mpe esalemaki ete ndeko mobali wa Saledi apesaki etumba epai ya ye o esobe ya Akisi; mpe etumba ekomaki nsomo mpenza, mpe nkoto mingi bakweyaki o mopanga.

5 Mpe esalemaki ete Koliatumili atiaki bozingi o esobe; mpe ndeko mobali wa Saledi atambolaki libanda lya esobe o butu, mpe abomaki eteni yoko ya limpinga lya Koliatumili lokola elangwaki bango.

6 Mpe ayaki o mboka ya Molona, mpe amitiaki likolo lya ngbende ya Koliatumili.

7 Mpe esalemaki ete Koliatumili afandaki elongo na limpinga lya ye o esobe mpo ya ntaka ya mibu mibale, o myango azwaki bokasi bonene o limpinga lya ye.

8 Sikawa ndeko mobali wa Saledi, oyo ya ye nkombo ezalaki Gilidi, azwaki bokasi bonene o limpinga lya ye, na ntina ya makelemba ma nkuku.

9 Mpe esalemaki ete nganga monene wa ye abomaki ye lokola efandaki ye likolo lya ngbende ya ye.

10 Mpe esalemaki ete moko wa makelemba ma nkuku abomaki ye o nzela yoko ya nkuku, mpe akamataki epai ya yemei bokonzi; mpe nkombo ya ye ezalaki Libi; mpe Libi azalaki moto moko wa bolai bonene koleka bato banso.

11 Mpe esalemaki ete o mobu mwa yambo mwa bokonzi bwa Libi, Koliatumili amataki epai ya mboka ya Molona, mpe apesaki etumba epai ya Libi.

12 Mpe esalemaki ete abundaki na Libi, o yango, Libi abeteki ye likolo lya loboko la ye ete azokisamaki; nzokande, limpinga lya Koliatumili liwelaki o boso likolo lya Libi, ete akimaki o ndelo likolo lya libongo lya mbu.

13 Mpe esalemaki ete Kolianitumi alandaki ye; mpe Libi apesaki etumba epai ya ye likolo lya libongo lya mbu.

14 Mpe esalemaki ete Libi abeteki limpinga lya Kolianitumi ete bakimaki lisusu o esobe ya Akisi.

15 Mpe esalemaki ete Libi alandaki ye kina ayaki o bisobe bya Agosi. Mpe Kolianitumi akamataka bato banso elongo na ye lokola ekimaki ye liboso lya Libi o ntaka eye ya mboka wapi akimaki.

16 Mpe eyaka ye o bisobe bya Agosi, apesaki etumba epai ya Libi, mpe abeteki likolo lya ye kina akufaki; nzokande, ndeko mobali wa Libi ayaki kobunda na Koliatumili o esika ya ye, mpe etumba ekomaki nsomo mpenza, mpe Koliatumili akimaki lisusu liboso lya limpinga lya ndeko mobali wa Libi.

17 Sikawa nkombo ya ndeko mobali wa Libi ebiangemaki Sizi. Mpe esalemaki ete Sizi alandaki nsima ya Koliatumili, mpe akweyisaki bingumba mingi, mpe abomaki basi mpe bana lokola, mpe atumbaki bingumba.

18 Mpe ekendeki bobangi bwa Sizi o ntaka ya mboka mobimba; iyo, bogangi boko bokendeki o ntaka ya mboka—Nani akoka koteleme liboso lya limpinga lya Sizi? Tala, akombi mabele liboso lya ye!

19 Mpe esalemaki ete bato babandaki kosangana elongo na mampinga, o ntaka ya etando mobimba ya mboka.

20 Mpe bakabwanaki; mpe eteni yoko ya bango ekimaki o limpinga lya Sizi, mpe eteni yoko ya bango ekimaki o limpinga lya Koliatumili.

21 Mpe boye enene mpe elai ezalaki etumba, mpe boye elai ezalaki ezaleli ya bosopi makila mpe mobomano, ete etando mobimba ya mboka ezipamaki na nzoto ya bakufi.

22 Mpe boye mbangu mpe noki ezalaki etumba ete moto te atikalaki mpo ya kokunda bakufi, kasi batambolaki uta bosopi makila na bosopi makila, kotikaka nzoto ya babali, basi lokola, mpe bana ipalangana likolo lya etando ya mboka, mpo ya kokoma bilei na mpambo ya mosuni.

23 Mpe nsolo ya yango ekendeli likolo lya etando ya mboka, kutu likolo lya etando mobimba ya mboka; yango wana bato batungisamaki o moi mpe o butu, na ntina ya nsolo ya yango.

24 Nzokande, Sizi asilisaki te kolanda Koliatumili; mpo alapaki kobekola yemei likolo lya Koliatumili na makila ma ndeko mobali wa ye, oyo abomamaki, mpe maloba ma Nkolo maye mayaki na Etele ete Koliatumili akokweya te na mopanga.

25 Boye tomoni ete Nkolo abimelaki bango na litondi lya nkele ya ye, mpe nkuna mpe bonsomo bwa bango bolengeleki nzela yoko mpo ya bobebisami bwa bango bwa libela.

26 Mpe esalemaki ete Sizi alandaki Koliatumili epai ya esti, kutu o ndelo ya libongo lya mbu, kuna apesaki etumba epai ya Sizi mpo ya ntaka ya mikolo misato.

27 Mpe boye nsomo ezalaki bobebisami o ntei ya mampinga ma Sizi ete bato babandaki kobanga, mpe babandaki kokima liboso lya mampinga ma Koliatumili; mpe bakimaki o mboka ya Koliyolo, mpe bakomboki mosika bafandi liboso lya bango, bango banso baye balingaki te kosangana na bango.

28 Mpe batelemisaki biema bya bango o lobwaku la Koliyolo; mpe Koliatumili atelemisaki biema bya ye o lobwaku la Suli. Sikawa lobwaku la Suli lozalaki mpembeni ya ngomba ya Kominoli; yango wana, Koliatumili asangisaki mampinga ma ye elongo likolo lya ngomba ya Kominoli, mpe abeteki mondule moko epai ya mampinga ma Sizi mpo ya kobianga bango o etumba.

29 Mpe esalemaki ete bayaki mpembeni, kasi babenganamaki lisusu; mpe bayaki mbala ya ibale, mpe babenganamaki lisusu mbala ya ibale. Mpe esalemaki ete bayaki lisusu mbala ya isato, mpe etumba ekomaki nsomo mpenza.

30 Mpe esalemaki ete Sizi abeteki likolo lya Koliatumili ete apesaki ye mpota mingi; mpe Koliatumili, ebungisaki ye makila ma ye, asenzwaki, mpe akumbamaki mosika lokola soko akufaka.

31 Sikawa bobungisi bwa babali, basi mpe bana bozalaki o ngamba ibale bonene boye ete, Sizi atindaki bato ba ye ete balanda te mampinga ma Koliatumili; yango wana bazongaki o nganda ya bango.