Makomi
Etele 11


Mokapo 11

Bitumba, boswani, mpe nkuna edondwi o bomoi bwa Bayelede—Baprofeta balobeli yambo esalema bobebisami mpenza bwa Bayelede longola se soko bayamboli—Bato babwaki maloba ma baprofeta.

1 Mpe eyaki lisusu o mikolo mya Komi baprofeta mingi, mpe babikulaki bobebisami bwa bato bana banene longola se soko bakoyambola, mpe bakobaluka epai ya Nkolo, mpe bakosundola bobomi mpe nkuna ya bango.

2 Mpe esalemaki ete baprofeta babwakamaki na bato, mpe bakimaki epai ya Komi mpo ya bobatelami, mpo bato balukaki koboma bango.

3 Mpe babikulaki epai ya Komi makambo mingi; mpe apambolamaki o etikali enso ya mikolo mya ye.

4 Mpe azalaki na bomoi kina o bobange boko bolamu, mpe abotaki Sibilomi; mpe Sibilomi akonzaki o esika ya ye. Mpe ndeko mobali wa Sibilomi atombokaki na ye, mpe ebandaki kozala etumba enene mpenza o mboka mobimba.

5 Mpe esalemaki ete ndeko mobali wa Sibilomi asalaki ete baprofeta banso baye babikulaki batiama o liwa;

6 Mpe ezalaki likambo lya mawa manene o mboka mobimba, mpo batatolaki ete botutu bonene bokoya likolo lya mboka, mpe likolo lya bato, mpe ete ekozala bobebisami bonene o ntei ya bango, bwa lolenge loko lokola esalema mokolo moko te likolo lya etando ya mabele, mpe mikuwa mya bango mikoya lokola mabondo ma mabele likolo lya etando ya mboka longola se soko na koyambola nkuna ya bango.

7 Mpe bayokemelaki te epai ya mongongo mwa Nkolo, na ntina ya makelemba ma nkuna ma bango; yango wana, ebandaki kozala bitumba mpe boweli o mboka mobimba, mpe lisusu nzala mpe bokono mingi, mpenza ete ezalaki bobebisami bonene, bwa lolenge loko lokola eyebanaka mokolo moko te likolo lya etando ya mabele; mpe enso eye esalemaki o mikolo mya Sibilomi.

8 Mpe bato babandaki koyambola bobe bwa bango; mpe mbala nzike lokola basalaki yango Nkolo ayokaki ngolu likolo lya bango.

9 Mpe esalemaki ete Sibilomi abomamaki, mpe Sete amememeki o bokangemi, mpe afandaki o bokangemi mikolo mya ye minso.

10 Mpe esalemaki ete Aya, mwana mobali wa ye, azwaki bokonzi; mpe akonzaki likolo lya bato mikolo mya ye minso. Mpe asalaki ndenge inso ya bobe o mikolo mya ye, na bwango asalaki bosopi bwa makila mingi; mpe mikolo mya ye mizalaki mike.

11 Mpe Etemi, kozalaka eboko moko ya Aya, azwaki bokonzi; mpe lisusu asalaki ena eye ezalaki ya nkuna o mikolo mya ye.

12 Mpe esalemaki ete o mikolo mya Etemi eyaki baprofeta mingi, mpe babikulaki lisusu epai ya bato; iyo, babikulaki ete Nkolo akobebisa bango mpenza uta o etando ya mabele longola se soko bayambolaki mabe ma bango.

13 Mpe esalemaki ete bato bayeisaki mitema mya bango mikasi, mpe bayokemelaki te epai ya maloba ma bango; mpe baprofeta balelaki mpe balongwaki uta o ntei ya bato.

14 Mpe esalemaki ete Etemi asalaki bosambisi o nkuna mikolo mya ye minso; mpe abotaki Molona. Mpe esalemaki ete Molona akonzaki o esika ya ye; mpe Molona asalaki ena eye ezalaki ebe liboso lya Nkolo.

15 Mpe esalemaki ete ezalaki botomboki boko o ntei ya bato, na ntina ya makelemba ma nkuku maye matongamaki mpo ya kozwa nguya mpe matabisi; mpe etelemeki moto moko mokasi o ntei ya bango o bobe, mpe apesaki etumba epai ya Molona, o yango, akweyisaki katikati ya bokonzi; mpe asimbaki katikati ya bokonzi mpo ya mibu mingi.

16 Mpe esalemaki ete Molona akweyisaki ye, mpe azwaki bokonzi lisusu.

17 Mpe esalemaki ete etelemeki moto mokasi mosusu; mpe azalaki eboto moko ya ndeko mobali wa Yelede.

18 Mpe esalemaki ete asukumaki Molona mpe azwaki bokonzi; yango wana, Molona afandaki o bokangemi etikali ya mikolo mya ye; mpe abotaki Koliatoli.

19 Mpe esalemaki ete Koliatoli afandaki o bokangemi mikolo mya ye minso.

20 Mpe o mikolo mya Koliatoli eyaki lisusu baprofeta mingi, mpe babikulaki makambo manene mpe ma bokamwi, mpe babelelaki boyamboli epai ya bato, mpe longola se soko bakoyambola Nkolo Nzambe alingaki kosala bosambisi na bango kina o bobebisami mpenza bwa bango;

21 ete Nkolo Nzambe alingaki kotinda to komeme bato basusu mpo ya kozwa mboka, na nguya na ye, nsima ya lolenge na lango amemeki batata ba bango.

22 Mpe babwakaki maloba manso ma baprofeta, na ntina ya lingomba lya nkuku lya bango mpe bonsomo bwa nkuna bwa bango.

23 Mpe esalemaki ete Koliatoli abotaki Etele, mpe akufaki, efandaki ye o bokangemi mikolo mya ye minso.