Makomi
Etele 2


Mokapo 2

Bayelede balengeli mpo ya mobembo mwa bango o mboka elakelama—Ezali mboka eponomo wapi bato basengeli kosalela Klisto to kokombomo mosika—Nkolo alobi na ndeko mobali wa Yelede mpo ya ngonga isato—Bayelede batongi masuwa—Nkolo atuni ndeko mobali wa Yelede mpo ya kokana boniboni ebengi ekopelisama mwinda.

1 Mpe esalemaki ete Yelede mpe ndeko mobali wa ye, mpe mabota ma bango, mpe lisusu baninga ba Yelede mpe baninga ba ndeko mobali wa ye mpe mabota ma bango, bakitaki o kati ya lobwaku loye lozalaki epai ya nordi, (mpe nkombo ya lobwaku ezalaki Nimilodi, kobiangemaka nsima ya moto mokasi wa bokila) elongo na bibwele bya bango biye basangisaka elongo, ya babali mpe basi, bya lolenge na lolenge.

2 Mpe balalisaki lisusu mitambo mpe bakangaki ndeke ya mopepe; mpe balengeleki sani yoko, na yango bakumbaki mbisi ya mai.

3 Mpe lisusu bakumbaki elongo na bango deserete, eye, na bobongoli; ezalaki mafuta ma nzoi, mpe boye bakumbaki elongo na bango lingambo lya nzoi, mpe ndenge inso ye ena eye ezalaki likolo lya etando ya mboka, nkona ya lolenge na lolenge.

4 Mpe esalemaki ete ekitaka bango o kati ya lobwaku la Nimilodi Nkolo akitaki mpe alobaki elongo na ndeko mobali wa Yelede; mpe azalaki o lipata, mpe ndeko mobali wa Yelede amonoki ye te.

5 Mpe esalemaki ete Nkolo atindaki bango ete bakende o kati ya esobe, iyo, o kati ya ntaka wapi moto moko akomaka mokolo moko te. Mpe esalemaki ete Nkolo akendeki liboso lya bango, mpe alobaki elongo na bango lokola etelemeki ye o lipata, mpe apesaki nzela wapi bakokende mobembo.

6 Mpe esalemaki ete bakendeki mobembo o esobe, mpe batongaki ebengi, na yango bakatisaki mai mingi, kotambolisamaka ntango inso na loboko la Nkolo.

7 Mpe Nkolo alingaki te ete bakangama nsima ya mbu o esobe, kasi alingaki ete baya kutu epai ya mboka ya elako, eye eponomoko likolo lya mboka inso isusu, eye Nkolo Nzambe abatelaki mpo ya bato boko sembo.

8 Mpe alapaki ndai na nkanda ya ye epai ya ndeko mobali wa Yelede, ete oyo akokamata mboka ya elako, uta sikawa mpe libela, akosalela ye, Nzambe se moko mpe wa solo, to bakokombomo mosika ekoya litondi lya nkele ya ye likolo lya bango.

9 Mpe sikawa, tokoki komono mikano mya Nzambe mitali mboka eye, eye ezali mboka ya elako; mpe ekolo ekozwa yango ekosalela Nzambe, to bakokombomo mosika ekoya litondi lya nkele ya ye likolo lya bango. Mpe litondi lya nkele ya ye likoya likolo lya bango ekokomela bango o bobe.

10 Mpo tala, eye ezali mboka yoko eye eponomi likolo lya mboka inso isusu; yango wana ye oyo akokamata yango akosalela Nzambe to akokombomo; mpo ezali mokano mwa libela mwa Nzambe. Mpe ezali te kina o litondi lya bobe o ntei ya bana ba mboka, ete bakokombomo.

11 Mpe eye eyei epai ya bino, O bino Bapaganu, ete bokoka koyeba mikano mya Nzambe—ete bokoka koyambola, mpe bokoba te o mabe ma bino kina litondi liyei, ete bokoka te komeme o nse litondi lya nkele ya Nzambe likolo lya bino lokola bafandi ba mboka basali kina sikawa.

12 Tala, eye ezali mboka yoko eponomo, ekolo enso ekozwa yango ekozala nsomi uta o bowumbu, mpe uta o bokangemi, mpe uta o bikolo bisusu o nse ya lola, soko bakosalela kaka Nzambe wa mboka, oyo azali Yesu Klisto, oyo amimonisi na makambo maye tokomi.

13 Mpe sikawa nakobi na likundoli lya ngai; mpo tala, esalemaki ete Nkolo amemeki Yelede mpe bandeko ba ye kutu o mbu enene eye ekabolaki mboka. Mpe lokola bayaki o mbu batelemisaki biema bya bango; mpe babiangaki nkombo ya esika Moliakumele; mpe bafandaki o biema, mpe bafandaki o biema likolo lya libongo lya mbu mpo ya ntaka ya mibu minei.

14 Mpe esalemaki ete o nsuka ya mobu mwa minei Nkolo ayaki lisusu epai ya ndeko mobali wa Yelede, mpe atelemeki o lipata mpe alobaki elongo na ye. Mpe mpo ya ntaka ya ngonga isato Nkolo asololaki na ndeko mobali wa Yelede, mpe atumbolaki ye zambi amikundolaki te kobianga nkombo ya Nkolo.

15 Mpe ndeko mobali wa Yelede ayambolaki bobe boye asalaka, mpe abiangaki likolo lya nkombo ya Nkolo mpo ya bandeko ba ye baye bazalaki elongo na ye. Mpe Nkolo alobaki epai ya ye: Nakolimbisa yo mpe bandeko ba yo na masumu ma bango; kasi okosumuka lisusu te, mpo okomikundola ete Molimo mwa ngai akobunda ntango inso te elongo na moto; yango wana, soko okosumuka kina oteli mobimba okokatama mosika uta o miso mya Nkolo. Mpe iye izali makanisi ma ngai likolo lya mboka eye nakopesa bino mpo ya lisango lya bino; mpo ekozala mboka yoko eponomo likolo lya mboka inso.

16 Mpe Nkolo alobaki: Kende kosala mpe tonga, nsima ya lolenge la bibengi biye otongi kina sikawa. Mpe esalemaki ete ndeko mobali wa Yelede akendeki kosala, elongo na bandeko ba ye, mpe batongaki nsima ya lolenge loye batongaka, engebene na bitinda bya Nkolo. Mpe bizalaki bike, mpe bizalaki pepele likolo lya mai, mpe kutu bo pepele ya ndeke likolo lya mai.

17 Mpe bitongamaki nsima ya lolenge loye lozalaki mpenza na lidusu te, kutu ete bizalaki kokanga mai bo sani yoko, mpe nse ya byango ezalaki na lidusu te bo sani yoko; mpe mpanzi ya byango izalaki na lidusu te bo sani yoko; mpe nsuka ya byango izalaki nsonge; mpe likolo lya byango ezalaki na lidusu te bo sani yoko; mpe bolai bwa byango bozalaki bwa nzete moko; mpe ekuke ya byango, ekangamaki yango, ezalaki na lidusu te bo sani.

18 Mpe esalemaki ete ndeko mobali wa Yelede abelelaki epai ya Nkolo, kolobaka: O Nkolo, nasali mosala moye otindaki ngai, mpe nasali bibengi engebene lokola okambaki ngai.

19 Mpe tala, O Nkolo, o kati ya byango mwinda mozali te; wapi tokoyenda? Mpe lisusu tokowa, mpo o byango tokoka te kopema, longola se soko ezali mopepe moye mozali o yango; yango wana tokowa.

20 Mpe Nkolo alobaki epai ya ndeko mobali wa Yelede: Tala, sala lidusu lyoko o likolo, mpe lisusu o nse, mpe ekoyoka yo mpasi mpo ya mopepe okozipola lidusu mpe okozwa mopepe. Mpe soko ezali boye ete mai makoti likolo lya yo, tala, okozipa lidusu yango, ete okoka te kowa na mpela.

21 Mpe esalemaki ete ndeko mobali wa Yelede asalaki boye, engebene lokola Nkolo atindaki ye.

22 Mpe abelelaki lisusu epai ya Nkolo kolobaka: O Nkolo, tala nasali kutu lokola otindaki ngai; mpe nalengeli masuwa mpo ya bato ba ngai, mpe tala ezali na mwinda te. Tala, O Nkolo ekondima yo ete tokatisa mai manene o molili?

23 Mpe Nkolo alobaki epai ya ndeko mobali wa Yelede: Nini olingi nasala ete bokoka kozala na mwinda o kati ya masuwa ma bino? Mpo tala, bokoki te kozala na maninisa, mpo ekopasuka na biteni; mpe bokomeme moto te elongo na bino, mpo bokokende te na mwinda ya moto.

24 Ete tala, bokozala lokola mbisi enene o katikati ya mbu; mpo ngomba ya mbonge ekobete likolo lya bino. Nzokande, nakomeme bino lisusu likolo libanda lya mozindo mwa mbu; mpo mipepe mibimaki na monoko mwa ngai, mpe mvula mpe mpela natindi.

25 Mpe tala, nalengeli bino mpo ya biloko biye; mpo bokoki te kokatisa mozindo moye monene longola se soko nalengeli bino mpo ya mbonge ya mbu, mpe mipepe miye mikei, mpe mpela eye ekoya. Bongo nini elingi bino nalengele mpo ya bino ete bokoka kozala na mwinda ekominama bino o mozindo mwa mbu?