Makomi
Etele 5


Mokapo 5

Banzeneneke Misato mpe mosala yango moko bakotelema lokola litatoli ya bosolo mpenza ya Buku ya Mormon.

1 Mpe sikawa ngai, Moroni, nakomaki maloba oyo natindamaki, engebene na makoki ya bokundoli na ngai; mpe nayebisi yo makambo oyo nakangaki; boye kosimba yango te na ntina ete okoka kobongola yango; mpo likambo wana epekisami mpo na yo, longola se na ntango ekozala bwania na Nzambe.

2 Mpe tala, okoki kozala na litomba ete okoka kolakisa bapalaki epayi na bango oyo wana bakosalisa mpo na komema mosala oyo liboso;

3 Mpe epayi ya Misato ekolakisama na nguya ya Nzambe; yango wana bakoyeba na ntembe te ete makambo oyo ezali solo.

4 Mpe na monoko ya banzeneneke Misato makambo oyo ekotiama; mpe litatoli ya Misato, mpe mosala oyo, na oyo wapi nguya ya Nzambe mpe lisusu liloba na ye ekolakisama, oyo wapi Tata, mpe Mwana, mpe Molimo Mosantu bapesi litatoli—mpe nyonso oyo ekotelema lokola litatoli mpo na mabe ya mokili na mokolo ya nsuka.

5 Mpe soki ezali bongo ete bayamboli mpe bayei epayi ya Tata na nkombo ya Yesu, bakoyambama kati na bokonzi ya Nzambe.

6 Mpe sikawa, soki nazali te na likoki mpo na makambo oyo, bosambisa; mpo bokoyeba ete ngai nazali na likoki ntango bokomona ngai, mpe tokotelema liboso ya Nzambe na mokolo ya nsuka. Amene.

Bimisa na lokasa