Makomi
Etele 8


Mokapo 8

Songisongi mpe boswani ezali likolo ya bokonzi—Akisi asali likelemba moko ya nkuku ya bato balapani ndai mpo na koboma mokonzi—Makelemba ya nkuku mawuti na zabulu mpe masukaka na bobebisami ya bikolo—Bayuda-te ya ntango ya Sika bakebisami na kosalaka likelemba ya nkuku oyo ekoluka kokweisa bonsomi ya mboka, mabota, mpe bikolo nyonso.

1 Mpe esalemaki ete abotaki Omele, mpe Omele akonzaki na esika na ye. Mpe Omele abotaki Yelede; mpe Yelede abotaki bana mibali mpe bana basi.

2 Mpe Yelede atombokaki na tata na ye, mpe ayaki mpe afandaki na mboka ya Eti. Mpe esalemaki ete abendaki bato mingi, na ntina ya maloba na ye ya lokuta, kino andimisaki ndambo ya bokonzi.

3 Mpe ntango esilaki ye kondimisa ndambo ya bokonzi abundisaki tata na ye, mpe akumbaki tata na ye mosika kati na bokangemi, mpe asalaki ete asalela kati na bokangemi;

4 Mpe sikawa, na mikolo ya boyangeli ya Omele azalaki kati na bokangemi ndambo moko ya mikolo na ye. Mpe esalemaki ete abotaki bana mibali mpe bana basi, na kati na bango ezalaki Heselone mpe Koliantumili;

5 Mpe basilikaki mingi koleka na ntina ya makambo oyo Yelede, ndeko mobali na bango asalaki, na lolenge ete batelemisaki limpinga moko mpe babundisaki Yelede. Mpe esalemaki ete babundisaki ye na butu.

6 Mpe esalemaki ete ntango babomaki limpinga ya Yelede bazalaki penepene na koboma ye mpe lokola; mpe asambaki na bango ete baboma ye te, mpe akotika bokonzi epayi ya tata na ye. Mpe esalemaki ete batikelaki ye bomoi na ye.

7 Mpe sikawa Yelede akomaki na mawa mingi koleka mpo abungisaki bokonzi na ye, mpo atiaka motema na ye na bokonzi mpe na nkembo ya mokili.

8 Sikawa mwana mwasi na yelede lokola azalaki nganga mayele mingi koleka, mpe lokola amonaki mawa ya tata na ye, akanisaki kosala mwango moko na oyo wapi akokaki kosikola bokonzi ya tata na ye.

9 Sikawa mwana mwasi na yelede azalaki kitoko mingi koleka. Mpe esalemaki ete asololaki na tata na ye, mpe alobaki epayi na ye: Mpo na nini tata na ngai ozali na mawa mingi boye? Etangi yo te lisolo ya makomi oyo batata na biso bamemaki na kokatisaka mozindo monene? Tala, ezali na lisolo oyo etali bango bato ya kala te, ete na miango na bango ya nkuku bazwaki babokonzi mpe nkembo monene?

10 Mpe sikawa, boye, tika tata na ngai abenga Akisi, mwana mobali ya Kiminolo; mpe tala, nazali kitoko, mpe nakobina liboso na ye, mpe nakosepelisa ye, mpe akozala na mposa na ngai na bolongani; yango wana soki akolinga uta na yo ete opesa ngai na bolongani epayi na ye, nde okoloba: Nakopesa yo ye soki oyeli ngai moto ya tata na ngai, mokonzi.

11 Mpe sikawa Omele azalaki moninga ya Akisi; yango wana, ntango Yelede abiangaki Akisi, mwana mwasi na yelede abinaki liboso na ye ete asepelisaki ye, na lolenge ete azalaki na mposa na ye na bolongani. Mpe esalemaki ete alobaki epayi ya Yelede: Pesa ngai ye na bolongani.

12 Mpe Yelede alobaki epayi na ye: Nakopesa ye epayi na yo, soki oyeli ngai moto ya tata na ngai, mokonzi.

13 Mpe esalemaki ete Akisi asangisaki na ndako ya Yelede libota na ye mobimba, mpe alobaki epayi na bango: Ekolapa bino ndai epayi na ngai ete bakozala sembo epayi na ngai na likambo oyo nakozala na mposa na bino?

14 Mpe esalemaki ete nyonso balapaki ndai epayi na ye, na nkombo ya Nzambe ya lola, mpe lisusu na lola, mpe lisusu na mabele, mpe lisusu namitu na bango, ete oyo akobaluka mosika na lisalisi oyo Akisi azalaki na yango mposa akobungisa moto na ye; mpe oyo akobimisa likambo nyonso Akisi asalaki ete eyebana epayi na bango, se ye moko wana akobungisa bomoi na ye.

15 Mpe esalemaki ete boye bayokanaki elongo na Akisi. Mpe Akisi asalaki mpo na bango ndai oyo epesamaki epayi na bango na bato ya kala oyo balukaki mpe lokola bokasi, oyo ekitanisamaki kutu uta na Kaina, oyo azalaki mobomi uta na ebandeli.

16 Mpe ebombamaki na nguya ya zabulu mpo ete apesa ndai oyo epayi ya bato mpo na kokanga bango na molili, mpo na kosalisa bango oyo balukaki nguya mpo na kozwa nguya, mpe mpo na koboma, mpe mpo na kopunza, mpe mpo na kokosa, mpe mpo na kosala ndenge nyonso ya nkuna mpe pite.

17 Nde ezalaki mwana mwasi na yelede oyo atiaki yangkati na motema na ye mpo na koluka makambo oyo ya kala; mpe Yelede atiaki yango na motema ya Akisi; yango wana, Akisi asalaki yango epayi na libota na ye mpe baninga na ye, kokambaka bango mosika na bilaka ya kitoko mpo na kosala eloko nyonso oyo azalaki na yango mposa.

18 Mpe esalemaki ete basalaki likelemba ya nkuku, kutu lokola bango bato ya ntango ya kala; oyo likelemba ezalaki ya nsomo mpe ya nkuna koleka nyonso, na miso ya Nzambe;

19 Mpo Nkolo asalaka kati na makelemba ya nkuku te, alingaka mpe ete moto asopa makila te, kasi apekisaki yango na makambo nyonso, uta na ebandeli ya moto.

20 Mpe sikawa ngai, Moroni, nakomi ndenge ya bandai mpe makelemba na bango te, mpo eyebisamaki epayi na ngai ete ezalaki na kati ya bato nyonso, mpe ezalaki na kati ya Balamani.

21 Mpe ebimisaki bobebisami ya bato oyo nazali kolobela sikawa, mpe lisusu bobebisami ya bato ya Nefi.

22 Mpe ekolo nyonso ekosunga makelemba ya nkuku ya lolenge oyo, mpo na kozwa nguya mpe matabisi, kino makopanzana likolo ya ekolo, tala, bakobebisama; mpo Nkolo akopesa te nzela ete makila ya basantu na ye, oyo makosopana na bango, ebelela ntango nyonso epayi na ye uta na mabele mpo na kobekola bango mpe nzokande abekoli bango te.

23 Yango wana, O bino baoyo bozali Bayuda-te, ezali bwania na Nzambe ete makambo oyo malakisama epayi na bino, ete na nzela oyo bokoka koyambola uta na masumu na bino, mpe bopesa te nzela ete makelemba oyo ya babomi, oyo matongami mpo na kozwa nguya mpe matabisi, mayangela likolo na bino—mpe mosala, iyo, kutu mosala ya bobebisami eya likolo na bino, iyo, kutu mompanga ya boyengebene ya Nzambe ya Seko ekweya likolo na bino, mpo na bokwei mpe bobebisami na bino soki bopesi nzela ete makambo oyo ezala.

24 Yango wana, Nkolo atindi bino, ntango bokomona makambo oyo kosalema na kati na bino ete bolamuka na koyebaka ezalela na bino ya nsomo, na ntina ya likelemba oyo ya nkuku oyo ekozala na kati na bino; soki te lisuma ezala epayi na likelemba yango, na ntina ya makila na bango oyo babomamaki; mpo bazali kobelela uta na mputulu mpo na bobekoli likolo na yango, mpe lisusu likolo na bango oyo batongaki yango.

25 Mpo esalemi ete ye oyo atongi yango mpo na kokweisa bonsomi ya mboka, mpe mabota, mpe bikolo nyonso; mpe ekomema bobebisami ya bato nyonso esalema, mpo etongami na zabulu, oyo azali tata ya lokuta nyonso; kutu mokosi se moko wana oyo akosaki baboti na biso ya yambo, iyo, kutu mokosi se moko wana oyo asalaki ete moto asala bobomi uta na ebandeli; oyo ayeisaki mitema ya bato makasi ete baboma baprofeta, mpe babamba bango mabanga, mpe babengana bango uta na ebandeli.

26 Yango wana, ngai, Moroni, natindami mpo na kokoma makambo oyo ete mabe esila, mpe ete ntango ekoka koya ete Satana akoka kozala na nguya te likolo ya mitema ya bana ya bato, kasi ete bakoka kondimisama mpo na kosala bolamu ntango nyonso, ete bakoka koya epayi na liziba ya bosembo nyonso mpe babikisama.

Bimisa na lokasa