Makomi
Etele 10


Mokapo 10

Mokonzi moko akitani mosusu—Boko bakonzi bazali sembo; basusu bazali ba nkuna—Edondwi bosembo, bato bapambolami mpe bazwi bomengo na Nkolo.

1 Mpe esalemaki ete Sezi, oyo azalaki eboto moko ya Eti—mpo Eti awaki na nzala, mpe baye ndako ya ye banso longola se soko ezalaki Sezi—Bongo, Sezi abandaki kotonga lisusu bato boko babukana.

2 Mpe esalemaki ete Sezi amikundolaki bobebisami bwa batata ba ye, mpe atongaki bokonzi boko sembo; mpo amikundolaki nini Nkolo asalaka na komemeke Yelede mpe ndeko mobali wa ye na kokatisa mozindo; mpe atambolaki o nzela ya Nkolo; mpe abotaki bana babali mpe bana basi.

3 Mpe mwana mobali wa ye wa nkulutu, oyo ya ye nkombo ezalaki Sezi, atombokaki na ye; nzokande, Sezi abetemeki na loboko la moyongoli moko, na ntina ya bozwi boluti bwa ye, boye bomemeki kimia lisusu epai ya tata wa ye.

4 Mpe esalemaki ete tata wa ye atongaki bingumba mingi likolo lya etando ya mboka, mpe bato babandaki lisusu kopanzana likolo lya etando ya mboka. Mpe Sezi azalaki na bomoi kina o bobange; mpe abotaki Lipilakisi. Mpe akufaki, mpe Lipilakisi akonzaki o esika ya ye.

5 Mpe esalemaki ete Lipilakisi asalaki te ena eye ezalaki alima o bomoni bwa Nkolo, mpo azalaki na basi ba makango mingi, mpe atiaki likolo lya mapeka ma bato eye ezalaki mpasi mpo ya komeme; iyo, afutisaki bango mpako ya bozito; mpe na mpako atongaki ndako inene mingi.

6 Mpe amisalelaki ngbende yoko kitoko mpenza; mpe atongaki boloko ebele, mpe moto oyo alingaki te koyangelama na mpako abwakamaki o kati ya boloko; mpe oyo akokaki te kofuta mpako abwakamaki o kati ya boloko; mpe asalaki ete basala ntango inso mpo ya kozwa lisungi bango; mpe oyo aboyaki kosala asalaki atiama o liwa.

7 Bongo azwaki mosala malonga monso mwa ye, iyo, kutu wolo malonga ya ye asalaki epetolama o boloko; mpe ndenge inso ya bikelamo malonga asalisaki o boloko. Mpe esalemaki ete ayokisaki bato mpasi na pite mpe bonsomo bwa ye.

8 Mpe ekonzaka ye mpo ya ntaka ya mibu ntuku minei na mibale bato batelemelaki ye o botomboki; mpe ebandaki kozala lisusu etumba o mboka, mpenza ete Lipilakisi abomamaki, mpe biboto bya ye bibenganamaki libanda lya mboka.

9 Mpe esalemaki ete nsima ye ntaka ya mibu mingi, Moliatoni, (ye kozalaka eboto moko ya Lipilakisi) asangisaki elongo limpinga lyoko lya batwa, mpe akendeki mpe apesaki etumba epai ya bato; mpe alongaki nguya likolo lya bingumba mingi; mpe etumba yango ekomaki nsomo mpenza, mpe ewumelaki mpo ya ntaka ya mibu mingi; mpe alongaki nguya likolo lya mboka mobimba, mpe amitiaki mokonzi likolo lya mboka mobimba.

10 Mpe esilisaki ye komitiaka mokonzi alembisaki mokumba mwa bato, na yango alongaki lisungi o miso mya bato, mpe bapakolaki ya mpo ya kozala mokonzi wa bango.

11 Mpe asalaki boyengebene epai ya bato, kasi epai ya yemei te na ntina ya pite mingi; yango wana akatamaki mosika uta o miso mya Nkolo.

12 Mpe esalemaki ete Moliatoni atongaki bingumba mingi, mpe bato bakomaki na bozwi mpenza o nse ya bokonzi bwa ye, ndako, wolo, mpauni, eboto ya kolona, bibwele, mpe bitonga, mpe biloko biye bizongisamaki epai ya bango.

13 Mpe Moliatoni azalaki na bomoi kina o mibu mingi mpenza, mpe nde abotaki Kimi; mpe Kimi akonzaki o esika ya tata wa ye; mpe akonzaki mibu mwambe, mpe tata wa ye akufaki. Mpe esalemaki ete Kimi akonzaki na bosembo te, yango wana asungamaki te na Nkolo.

14 Mpe ndeko mobali wa ye atelemelaki ye o botomboki, na bwango amemeki ye o kati ya bokangemi; mpe atikalaki o bokangemi mikolo mya ye minso; mpe abotaki bana babali mpe bana basi o bokangemi, mpe o bobange bwa ye abotaki Lewi; mpe akufaki.

15 Mpe esalemaki ete Lewi asalaki o bokangemi nsima ya liwa lya tata wa ye, mpo ya ntaka ya mibu ntuku minei na mibale. Mpe abundaki etumba na mokonzi wa mboka, na yango azwaki mpo ya yemei bokonzi.

16 Mpe esilisaka ye kozwa mpo ya yemei bokonzi asalaki eye ezalaki alima o bomoni bwa Nkolo; mpe bato bozwaki bomengo o mboka; mpe azalaki na bomoi kina o bobange boko bolamu, mpe abotaki bana babali mpe bana basi, mpe lisusu abotaki Kolomi, oyo apakolaki mokonzi o esika ya ye.

17 Mpe esalemaki ete Kolomi asalaki ena eye ezalaki elamu o bomoni bwa Nkolo na mikolo mya ye minso; mpe abotaki bana babali mpe bana basi mingi; mpe esilaka ye komono mikolo mingi alekaki, kutu bo mpo ya etikali ya mabele; mpe Kisi akonzaki o esika ya ye.

18 Mpe esalemaki ete Kisi alekaki lokola, mpe Libi akonzaki o esika ya ye.

19 Mpe esalemaki ete Libi asalaki ena eye ezali elamu o bomoni bwa Nkolo. Mpe o mikolo mwa Libi nioka ya ngenge ibebisamaki. Bongo bakendeki o kati ya mboka ya epai ya sudi, mpo ya bokila bwa bilei mpo ya bato ba mboka, mpo mboka motondaki na niama ya zamba. Mpe Libi yemei akomaki moto wa bokila monene.

20 Mpe batongaki engumba enene mpembeni ya nkingo eke ya mboka, mpembeni ya esika wapi mbu ekaboli mboka.

21 Mpe babatelaki mboka ya epai ya sudi mpo ya esobe, mpo ya kozwa niama ya zamba. Mpe etando mobimba ya mboka ya epai ya nordi etondaki na bafandi.

22 Mpe bazalaki balinga mosala mpenza, mpe basombaki mpe kotekeki, mpe basalaki mombongo bango na bango, ete bakoka kozwa litomba.

23 Mpe basalaki ndenge inso ya makele, mpe basalaki wolo, mpe mpauni, mpe ebende, mpe motako, mpe ndenge inso ya bibende; mpe batimolaki yango libanda lya mabele; yango wana, babwakaki mabondo makasi ma mabele mpo ya kozwa makele, wolo, mpe mpauni, mpe ebende, mpe makese. Mpe basalaki ndenge inso ya misala malonga.

24 Mpe bazalaki na swa, mpe lino lya mapasa-malonga; mpe basalaki ndenge inso ya bilamba, ete bakoka komilatisa na bolumbu bwa bango.

25 Mpe basalaki ndenge inso ya bisalele mpo ya kosala bilanga, mpo ya kobalola mpe mpo ya kokona, mpe mpo ya kobuka mpe mpo ya kotimola na nkongo, mpe lisusu mpo ya koyungula.

26 Mpe basalaki ndenge inso ya bisalele na byango basalelaki niama ya bango.

27 Mpe basalaki ndenge inso ya mandoki ma etumba. Mpe basalaki ndenge inso ya misala mwa esaleli ya ntoki.

28 Mpe mokolo moko te bato boko bakokaki kopambolama mingi koleka ezalaki bango, mpe kozwa bomengo mingi o maboko ma Nkolo. Mpe bazalaki o mboka eye eponomoki likolo lya mboka inso, mpo Nkolo alobaka yango.

29 Mpe esalemaki ete Libi azalaki na bomoi mibu mingi, mpe abotaki bana babali mpe bana basi, mpe abotaki lisusu Alitomi.

30 Mpe esalemaki ete Alitomi akonzaki o esika ya tata wa ye. Ekozanka Alitomi mibu ntuku mibale na minei, tala, bokonzi bobotolomoki. Mpe asalaki mibu mingi o bokangemi, iyo, mpe kutu etikali enso ya mikolo mya ye.

31 Mpe abotaki Eti, mpe azalaki na bomoi o bokangemi mikolo mya ye minso. Mpe Eti abotaki Aloni, mpe Aloni afandaki o bokangemi mikolo mya ye minso; mpe abotaki Aminigada, mpe Aminigada lokola afandaki o bokangemi mikolo mya ye minso; mpe abotaki Koliatumi, mpe Koliatumi afandaki o bokangemi mikolo mya ye minso; mpe abotaki Komi.

32 Mpe esalemaki ete Komi abendaki mosika katikati ya bokonzi. Mpe akonzaki likolo lya katikati ya bokonzi mibu ntuku minei na mibale; mpe akendeki kobunda na mokonzi, Amigidi, mpe babundaki mpo ya ntaka ya mibu mingi, o ntango yango Komi alongaki nguya likolo lya Amigidi, mpe azwaki nguya likolo lya etikali ya bokonzi.

33 Mpe o mikolo mya Komi ebandaki kozala bayongoli o mboka; mpe bandimaki miango mya kala, mpe basalaki ndai nsima ya baye ba kala, mpe balukaki lisusu kobebisa bokonzi.

34 Sikawa Komi abundaki na bango mingi; nzokande, alongaki bango te.