Makomi
Etele 15


Mokapo 15

Mifuku mya Bayelede babomami o etumba—Sizi mpe Koliatumili basangisi bato banso mpo ya etumba ya kufa—Molimo mwa Nkolo atiki kobunda elongo na bango—Ekolo ya Bayelede babebisami nie—Bobele Koliatumili atikali.

1 Mpe esalemaki ete ezipaka Koliatumili mpota ya ye, abandi komikundola maloba maye Etele alobaka epai ya ye.

2 Amonoki ete basili babomamaka na mopanga penepene na mifuku mibale mya bato ba ye, mpe abandaki koyoka mawa o motema mwa ye; iyo, babomamaka mifuku mibale mya bato bakasi, elongo na basi mpe bana ba bango.

3 Abandaki koyambola bobe boye asalaka; abandaki komikundola maloba maye malobamaka na monoko mwa baprofeta banso, mpe amonoki mango ete makokisamaki kina sikawa, eteni na eteni; mpe bozo bwa ye bolelaki mpe boboyaki kobondisama.

4 Mpe esalemaki ete akomaki monkanda epai ya Sizi, kozalaka na mposa na ye ete abatela bato, mpe alongaki kotika bokonzi mpo ya litomba lya bomoi bwa bato.

5 Mpe esalemaki ete ezwaka Sizi monkanda mwa ye akomaki monkanda moko epai ya Koliatumili, ete soko amitiki, ete akoka koboma ye na mopanga mwa yemei, ete abatela bomoi bwa bato.

6 Mpe esalemaki ete bato koyambolaki te bobe bwa bango; mpe bato ba Koliatumili balamusamaki na nkanda na bato ba Sizi; mpe bato ba Sizi balamusamaki na nkanda na bato ba Koliatumili; yango wana, bato ba Sizi bapesaki etumba epai ya bato ba Koliatumili.

7 Mpe Emonoki Koliatumili ete akomaki mpembeni ya kokweya, akimaki lisusu liboso lya bato ba Sizi.

8 Mpe esalemaki ete ayaki o mai ma Lipiliakumi, eye, na bolimboli, ezali enene, to eluti inso; yango wana, eyaki ye o mai maye batelemisaki biema bya bango; mpe Sizi lisusu atelemisaki biema bya ye penepene na mango; mpe yango wana o mokolo mwa nsima bayaki o etumba.

9 Mpe esalemaki ete babundaki etumba yoko ya nsomo mpenza, o yango Koliatumili azokisamaki lisusu, mpe asenzwaki na bobungisi bwa makila.

10 Mpe esalemaki ete mampinga ma Koliatumili mawelaki likolo lya mampinga ma Sizi ete bakoka kobete bango, ete basala bango kokima liboso lya bango; mpe bakimaki epai ya sudi, mpe batelemisaki biema bya bango o esika yoko ebiangemaki Ogati.

11 Mpe esalemaki ete limpinga lya Koliatumili litelemisaki biema bya bango mpembeni ya ngomba patatalu Lamaye; mpe ezalaki ngomba ena kaka wapi tata wa ngai Molomoni abombaki makundoli ma Nkolo, maye mazalaki ma bule.

12 Mpe esalemaki ete basangisaki elongo bato banso likolo lya etando mobimba ya mboka, baye babomamaki te, longola se soko ezalaki Etele.

13 Mpe esalemaki ete Etele amonoki bikela binso bya bato; mpe amonoki ete bato baye bazalaki mpo ya Koliatumili basangisamaki elongo na limpinga ya Koliatumili; mpe bato baye bazalaki mpo ya Sizi basangisamaki elongo na limpinga lya Sizi.

14 Yango wana, basangisamaki elongo mpo ya ntaka ya mibu minei, ete bakoka kozwa baye banso bazalaki likolo lya etando ya mboka, mpe ete bakoka kozwa bokasi bonso boye bakokaki kozwa.

15 Mpe esalemaki ete esanganaka bango elongo, moto na moto o limpinga liye alingaki, elongo na basi ba bango mpe bana ba bango—babali, basi lokola mpe bana ba bango kolataka mandoki ma etumba, kozalaka na nguba, mpe bibende bya ntolo, mpe bibende bya mito, mpe balataki nsima ya lolenge la etumba—batambola mpo ya kobunda bango na bango; mpe babundaki mokolo mona mobimba, mpe balongaki te.

16 Mpe esalemaki ete ezalaki butu balembeki, mpe bazongaki o nganda ya bango; mpe esilaki bango kozonga o nganda ya bango bakamataki kolela mpe komilela mpo ya bobungisi bwa bato ba bango; mpe boye enene ezalaki boleli bwa bango, bogangi mpe biyelela bya bango, ete epasolaki mopepe mpenza.

17 Mpe esalemaki ete o mokolo mwa nsima bakendeki lisusu mpe babundaki, mpe enene mpe ya nsomo ezalaki mokolo mona; nzokande, balongaki te, mpe eyaki butu lisusu bapasolaki mopepe na boleli bwa bango, mpe bogangi bwa bango, mpe matanga ma bango, mpo ya bobungisi bwa bobomi bwa bato ba bango.

18 Mpe esalemaki ete Koliatumili akomaki lisusu monkanda moko epai ya Sizi, kozalaka na mposa ete aya lisusu te kobunda, kasi akamata bokonzi, mpe abatelaki bomoi bwa bato.

19 Kasi tala, Molimo mwa Nkolo atikaki kobunda elongo na bango, mpe Satana azalaki na nguya etonda likolo lya mitema mya bato; mpo bamipesaki mobimba epai ya bokasi bwa mitema mya bango, mpe lolanda la mayele ma bango ete bakoka kobebisama; yango wana bakendeki kobunda.

20 Mpe esalemaki ete babundaki mokolo mona mobimba, mpe eyaki butu balalaki likolo lya mipanga mya bango.

21 Mpe o mokolo mwa nsima babundaki kutu kina butu eyaki.

22 Mpe eyaki butu balangwaki na nkanda, kutu lokola moto alangwi na vino; mpe balalaki lisusu likolo lya mipanga mya bango.

23 Mpe o mokolo mwa nsima babundaki lisusu; mpe eyaki butu banso bakweyaki na mopanga longola se soko ezalaki ntuku itano na ibale ya bato ba Koliatumili, mpe ntuku motoba na libwa ya bato ba Sizi.

24 Mpe esalemaki ete balalaki likolo lya mipanga mya bango butu ena, mpe o mokolo mwa nsima babundaki lisusu, mpe bawelaki na makasi ma bango elongo na mipanga mpe elongo na nguba, mokolo mona mobimba.

25 Mpe eyaki butu ezalaki ntuku isato na ibale ya bato ba Sizi, mpe ntuku ibale na sambo ya bato ba Koliatumili.

26 Mpe esalemaki ete baliaki mpe balalaki, mpe balengeleki mpo ya kokufa o mokolo mwa nsima. Mpe bazalaki bato banene mpe bakasi lokola na bokasi bwa bato.

27 Mpe esalemaki ete babundaki o ntaka ya ngonga isato, mpe basenzwaki na bobungisi bwa makila.

28 Mpe esalemaki ete ezwaki bato ba Koliatumili lisusu makasi makoki ete bakokaki kotambola, bazalaki penepene na kokima mpo ya bomoi bwa bango; kasi tala, Sizi alamukaki, mpe bato ba ye lokola, mpe alapaki na nkanda ya ye ete akoboma Koliatumili to akowa na mopanga.

29 Yango wana, alandaki bango, mpe o mokolo mwa nsima azwaki bango; mpe babundaki lisusu na mopanga. Mpe esalemaki ete ntango ekweyaka bango banso na mopanga, longola se soko ezalaki Koliatumili mpe Sizi, tala Sizi asenzwaki na bobungisi bwa makila.

30 Mpe esalemaki ete eyekemeke Koliatumili likolo lya mopanga mwa ye, ete apemaki moke, akataki moto mwa Sizi.

31 Mpe esalemaki ete esilisaki ye kokata moto mwa Sizi, Sizi atelemeki likolo lya maboko ma ye mpe akweyaki; mpe nsima ya kobuna mpo ya mpema, akufaki.

32 Mpe esalemaki ete Koliatumili akweyaki o mabele, mpe akomaki lokola soko azalaki na bomoi te.

33 Mpe Nkolo alobaki epai ya Etele, mpe alobaki epai ya ye: Kende. Mpe akendeki, mpe amonoki ete maloba ma Nkolo makokisamaki manso; mpe asilisaki likundoli lya ye; (mpe eteni yoko ya nkama nakomi te) mpe abombaki mango o lolenge loko ete bato ba Limiyi bakutaki mango.

34 Sikawa, maloba ma nsuka maye makomamaki na Etele mazali maye: Soko Nkolo alingi ete nanatama, to ete nayoka mpasi ya bolingi bwa Nkolo o mosuni, ezali likambo te, soko ezali ete nabikisami o bokonzi bwa Nzambe. Amene.