Makomi
Etele 9


Mokapo 9

Bokonzi boleki uta moko na mosusu na libota, poloso, mpe bobomi—Emele amoni Mwana Mobali wa Bosembo—Baprofeta mingi babeleli boyamboli—Nzala mpe nioka ya ngenge eniokoli bato.

1 Mpe sikawa ngai, Moloni, nakobi kokoma likundoli lya ngai. Bongo, tala, esalemaki ete na ntina ya makelemba ma nkuku ma Akisi mpe baninga ba ye, tala, bakweyisaki bokonzi bwa Omele.

2 Nzokande, Nkolo ayokaki ngolu epai ya Omele, mpe lokola na bana babali ba ye mpe bana basi ba ye baye balukaki te bobebisami bwa ye.

3 Mpe Nkolo akebisaki Omele o ndoto yoko ete akende libanda lya mboka; bongo Omele akendeki libanda lya mboka elongo na libota lya ye, mpe atambolaki mobembo mikolo mingi, mpe ayaki mpe alekaki mpembeni ya ngomba ya Simi, mpe ayaki mpe alekaki mpembeni ya esika wapi Banefi babebisamaki, mpe uta kuna epai ya esti, mpe ayaki o esika yoko ebiangemaki Abilomi, mpembeni ya libongo lya mbu, mpe kuna atelemisaki ema ya ye, mpe lisusu bana babali ba ye mpe bana basi ba ye, mpe na baye ndako ya ye mobimba, longola se soko ezalaki Yelede mpe libota lya ye.

4 Mpe esalemaki ete Yelede apokolamaki mokonzi likolo lya bato, na loboko la nkuna; mpe apesaki epai ya Akisi mwana mwasi wa ye o bolongani.

5 Mpe esalemaki ete Akisi alukaki bomoi bwa bokilo mobali wa ye; mpe asengeki epai ya bango baye alapisaka ndai ya baye ba kala, mpe bazwaki moto mwa bokilo mobali wa ye, lokola efandaki ye o ngbende ya ye, koyambaka bato ba ye.

6 Mpo enene boye ezalaki bopanzani bwa lingomba liye lya nkuna mpe nkuku libebisaka mitema mya bato banso; yango wana Yelede abomamaki likolo lya ngbende ya ye, mpe Akisi akonzaki o esika na ye.

7 Mpe esalemaki ete Akisi abandaki koyoka likunia na mwana mobali wa ye, yango wana akangaki ye o boloko, mpe abombaki ye na mwa bilei to te kina azwaka mpasi ya liwa.

8 Mpe sikawa, ndeko mobali wa ye oyo azwaki mpasi ya liwa (mpe nkombo ya ye ezalaki Nimela) asilikaki na tata wa ye na ntina ya ena eye tata wa ye asalaki epai ya ndeko mobali wa ye.

9 Mpe esalemaki ete Nimela asangisaki elongo motango moke mwa bato, mpe akimaki libanda lya mboka, mpe akendeki mpe afandaki elongo na Omele.

10 Mpe esalemaki ete Akisi abotaki bana babali, mpe balongaki mitema mya bato, ata balapaki ndai epai ya ye mpo ya kosala ndenge inso ya bobe engebene na ena eye azalaki na mposa.

11 Sikawa bato ba Akisi bazalaki na mposa ya matabisi, kutu lokola Akisi azalaki na mposa ya nguya; yango wana, bana babali ba Akisi babonzelaki bango mbongo, na eye nzela babendaki mosika eteni eleki mingi ya bato nsima ya bango.

12 Mpe ebandaki kozala etumba yoko o kati ya bana babali ba Akisi mpe Akisi, eye ewumelaki mpo ya ntaka ya mibu mingi, iyo, mpo ya bobebisami bwa penepene na bato banso ba bokonzi, iyo, kutu banso longola se soko ezalaki bato ntuku basato, mpe bango baye bakimaki elongo na ndako ya Omele.

13 Yango wana, Omele azongisamaki lisusu o mboka ya lisango lya ye.

14 Mpe esalemaki ete Omele abandaki kokoma mobange; nzokande o bobange bwa ye, abotaki Emele; mpe apakolaki Emele mpo ya kozala mokonzi mpo ya kokonza o esika ya ye.

15 Mpe esilisaka ye kopakola Emele mpo ya kozala mokonzi, amonoki kimia o mboka mpo ya ntaka ya mibu mibale, mpe akufaki, komonoko mikolo mingi mpenza, miye mitondaki na mawa. Mpe esalemaki ete Emele akonzaki o esika ya ye, mpe alandaki botamboli bwa tata wa ye.

16 Mpe Nkolo abandaki lisusu kolongola botutu uta o mboka, mpe ndako ya Emele ezwaki bomengo mpenza o nse ya bokonzi bwa Emele; mpe o ntaka ya mibu ntuku motoba na mibale bakomaki makasi mpenza, mpenza ete bakomaki na bozwi mpenza—

17 Kokomaka na ndenge inso ya mbuma, mpe ya mboto, mpe ya swa, mpe ya lino malonga, mpe ya wolo, mpe ya mpauni, mpe ya biloko bya motuya;

18 Mpe lisusu ndenge inso ya bibwele, ya pakasa mpe ya ngombe, mpe ya mpate, mpe ya ngulu, mpe ya ntaba, mpe lisusu ndenge mingi isusu ya niama iye isengelamaki mpo ya bilei bya moto.

19 Mpe bazalaki lisusu na farasa, mpe na mpunda, mpe izalaki nzoku mpe kulelomi mpe kumomi; inso iye isengelamaki epai ya moto, mpe mingi koleka nzoku mpe kulelomi mpe kumomi.

20 Mpe boye Nkolo asopaki mapamboli ma ye likolo lya mboka eye, eye eponomoki likolo lya mboka inso isusu; mpe atindaki ete oyo akozwa mboka akozwa yango mpo ya Nkolo, to akobebisama ekotela bango o bobe; mpo likolo lya ba lolenge loye, elobi Nkolo: Nakosopa litondi lya nkele ya ngai.

21 Mpe Emele asalaki bosambisi o bosembo mikolo mya ye minso, mpe abotaki bana babali mpe bana basi mingi; mpe abotaki Koliatumi, mpe apakolaki Koliatumi mpo ya kokonza o esika ya ye.

22 Mpe esilisaka ye kopakola Koliatumi mpo ya kokonza o esika ya ye azalaki na bomoi mibu minei, mpe amonoki kimia o mboka; iyo, mpe amonoki kutu Mwana Mobali wa Bosembo, mpe asepelaki mpe akembelaki o mikolo mya ye, mpe akufaki na kimia.

23 Mpe esalemaki ete Koliatumi atambolaki o matambe ma tata wa ye, mpe atongaki bingumba bikasi mingi, mpe asalaki ena eye ezalaki elamu epai ya bato ba ye o mikolo mya ye minso. Mpe esalemaki ete azalaki na bana te kina akomaki mobange mpenza.

24 Mpe esalemaki ete mwasi wa ye akufaki, kozalaka na mibu nkama moko na mibale. Mpe esalemaki ete Koliatumi akamataka o bolongani, o bobange bwa ye, elenge mwasi, mpe abotaki bana babali mpe bana basi; yango wana azalaki na bomoi kina azalaki na mibu nkama moko na ntuku minei na mibale.

25 Mpe esalemaki ete abotaki Komi, mpe Komi akonzaki o esika ya ye; mpe akonzaki mibu ntuku minei na libwa, mpe abotaki Eti; mpe lisusu abotaki bana babali mpe bana basi basusu.

26 Mpe bato bapanzanaki lisusu likolo lya etando mobimba ya mboka, mpe ebandaki lisusu kozala nkuna enene mpenza likolo lya etando ya mboka, mpe Eti abandaki koyamba mwango mwa nkuku lisusu ya kala, mpo ya kobebisa tata wa ye.

27 Mpe esalemaki ete abotoloki ngbende ya bokonzi ya tata wa ye, mpo abomaki ye na mopanga mwa yemei; mpe akonzaki o esika ya ye.

28 Mpe eyaki baprofeta lisusu o mboka, kobelelaka boyamboli epai ya bango—ete basengeli kolengele nzela ya Nkolo to ekozala botutu boko likolo lya etando ya mboka; iyo, kutu ekozala nzala yoko enene, o yango bakobebisama soko bayamboli te.

29 Kasi bato bandimaki te maloba ma baprofeta, kasi babwakaki bango libanda; mpe boko ya bango babwakaki o kati ya mabulu, mpe batikaki bango bawa. Mpe esalemaki ete basalaki makambo maye manso engebene na motindo mwa mokonzi, Eti.

30 Mpe esalemaki ete ebandaki bokeleli boko o mboka, mpe bafandi babandaki kobebisama noki mpenza na ntina ya bokeleli, mpo ezalaki mvula te likolo lya etando ya mabele.

31 Mpe eyaka nioka ya ngenge lisusu likolo lya etando ya mboka, mpe batiaki ngenge bato mingi. Mpe esalemaki ete bibwele bya bango bibandaki kokima liboso lya nioka ya ngenge, ona mboka ya epai ya sudi, eye ebiangemaki na Banefi Zalayemila.

32 Mpe esalemaki ete ezalaki mingi ya bango bawaki mpembeni ya nzela; nzokande, ezalaki boko baye bakimaki o kati ya mboka ya epai ya sudi.

33 Mpe esalemaki ete Nkolo asalaki nioka ete ilanda bango lisusu te, kasi itia bikonongo o nzela ete bato bakoka te koleka, ete oyo akomeka koleka akoka kokweya na nioka ya ngenge.

34 Mpe esalemaki ete bato balandaki nzela ya mobembo mwa niama, mpe badundaki bibembe bya bango baye bakweyaki mpembeni ya nzela, kina badundaki bango banso. Sikawa emonoki bato ete basengelaki kowa babandaki koyambola mabe ma bango mpe kobelela epai ya Nkolo.

35 Mpe esalemaki ete emikitisaka bango ndenge ikoki liboso lya Nkolo, atindaki mvula likolo lya etando ya mabele; mpe bato babandaki kozala na bomoi lisusu, mpe ebandaki kozala mbuma o bikolo bya nordi, mpe o bikolo binso zingazinga mpembeni. Mpe Nkolo alakisaki nguya ya ye epai ya bango na kobikisa bango na nzala.