Makomi
Etele 7


Mokapo 7

Oliya ayangeli kati na bosembo—Na katikati ya bobotoli bokonzi mpe boswani, babokonzi ya bombanda ya Sule mpe Kowolo etiami—Baprofeta bakitisi nkuna mpe bosambeli bikeko ya bato, baoyo bayamboli mpo na bango.

1 Mpe esalemaki ete Oliya asalaki bosambisi likolo ya mboka na bosembo mikolo na ye nyonso, oyo na ye mikolo ezalaki mingi mpenza.

2 Mpe abotaki bana mibali mpe bana basi; iyo, abotaki ntuku misato na moko, na kati na bango ezalaki bana mibali ntuku mibale na Misato.

3 Mpe esalemaki ete abotaki lisusu Kibi na bobange na ye. Mpe esalemaki ete Kibi ayangelaki na esika na ye; mpe Kibi abotaki Koliyolo.

4 Mpe ntango Koliyolo azalaki na mibu ntuku misato na mibale atombokaki na tata na ye, mpe amataki likolo mpe afandaki na mboka ya Newolo; mpe abotaki bana mibali mpe bana basi, mpe bakomaki kitoko mingi koleka, yango wana Koliyolo abendaki bato mingi nsima na ye.

5 Mpe ntango asangisaki esika moko limpinga amataki epayi na mboka ya Mowana wapi mokonzi afandaki, mpe akamataki ye mokangemi, oyo ekokisaki liloba ya ndeko ya Yelede ya mobali ete bakomemama kati na bokangemi.

6 Sikawa mboka ya Mowana, wapi mokonzi afandaki, ezalaki penepene na mboka oyo ebiangamaki Libebi na Banefi.

7 Mpe esalemaki ete Kibi afandaki kati na bokangemi, mpe bato na ye na nse ya Koliyolo mwana mobali na ye, kino akomaki mobange koleka; nzokande Kibi abotaki Sule na bobange na ye, wana ezalaki ye naino kati na bokangemi.

8 Mpe esalemaki ete Sule asilikaki na ndeko na ye ya mobali; mpe Sule akomaki makasi, mpe akomaki na nguya mingi na kotalaka bokasi ya moto moko; mpe azalaki lisusu makasi na bosambisi.

9 Yango wana, ayaki na ngomba moke ya Efelaima, mpe aniangolaki makele uta na ngomba moke yango, mpe asalaki mipanga uta na ebende makasi mpo na bango baoyo abendaki elongo na ye, mpe esilaki ye kopesa bango manduki ya mipanga azongaki na engumba ya Newolo, mpe abundisaki ndeko na ye ya mobali Koliyolo, nzela oyo wapi azwaki bokonzi mpe azongisaki yango epayi ya tata na ye Kibi.

10 Mpe sikawa na ntina ya likambo oyo Sule asalaki, tata na ye apesaki bokonzi likolo na ye; boye abandaki koyangela na esika ya tata na ye.

11 Mpe esalemaki ete asalaki bosambisi na bosembo; mpe apanzaki bokonzi na ye likolo ya etando mobimba ya mboka, mpo bato bakomaki motango monene koleka.

12 Mpe esalemaki ete Sule mpe lokola abotaki bana mibali mpe bana basi mingi.

13 Mpe Koliyolo ayambolaki uta na mabe mingi oyo asalaki; yango wana Sule apesaki ye nguya kati na bokonzi na ye.

14 Mpe esalemaki ete Koliyolo azalaki na bana mibali mpe bana basi mingi. Mpe na kati ya bana mibali ya Koliyolo ezalaki na moko oyo kani nkombo ezalaki Noa.

15 Mpe esalemaki ete Noa atombokaki na Sule, mokonzi, mpe lisusu na tata na ye Koliyolo, mpe abendaki nsima na ye Kowolo ndeko na ye ya mobali, mpe lisusu bandeko na ye nyonso mpe bato mingi.

16 Mpe abundisaki Sule, mokonzi, na oyo wapi etumba azwaki mboka ya yambo ya bosangoli libula na bango; mpe akomaki mokonzi likolo ya eteni wana ya mboka.

17 Mpe esalemaki ete abundisaki lisusu Sule, mokonzi; mpe akamataki Sule, mokonzi, mpe amemaki ye mokangemi kati na Mowana;

18 Mpe esalemaki ete lokola azalaki penepene na koboma ye, bana mibali ya Sule bakotaki kati na nkuku kati na ndako ya Noa na butu mpe babomaki ye, mpe babukaki ekuke ya boloko mpe babimisaki tata na bango, mpe batiaki ye likolo ya kiti ya bokonzi na ye na bokonzi na ye moko.

19 Yango wana, mwana mobali ya Noa atongaki bokonzi na ye na esika na ye; nzokande, bazwaki lisusu te nguya likolo ya mokonzi Sule, mpe bato oyo bazalaki na nse ya bokonzi ya mokonzi Sule bafulukaki mingi koleka mpe bakomaki bato banene.

20 Mpe ekolo ekabwanaki; mpe ezalaki na babokonzi mibale, bokonzi ya Sule, mpe bokonzi ya Kowolo, mwana mobali ya Noa.

21 Mpe Kowolo, mwana mobali ya Noa, asalaki ete bato na ye babundisa Sule etumba, na oyo wapi Sule abetaki bango mpe abomaki Kowolo.

22 Mpe sikawa Kowolo azalaki na mwana mobali moko oyo abiangamaki Nimilodi; mpe Nimilodi apesaki bokonzi ya Kowolo epayi na Sule, mpe azwaki lisungi na miso ya Sule; yango wana Sule apesaki masungi minene likolo na ye, mpe asalaki mpenza kati na bokonzi ya Sule engebene na mposa na ye.

23 Mpe lisusu na boyangeli ya Sule baprofeta bayaki na kati ya bato, oyo batindamaki uta na Nkolo, kosakolaka ete nkuna mpe kosambela nzambe ya bikeko na bato ezalaki komema bolakeli mabe likolo ya mboka, mpe bakobebisama soki bayamboli te.

24 Mpe esalemaki ete bato batiolaki baprofeta, mpe basekaki bango. Mpe esalemaki ete mokonzi Sule asambisaki bango nyonso oyo batiolaki baprofeta.

25 Mpe asakolaki mobeko moko epayi nyonso na mboka mobimba, oyo epesaki nguya epayi ya baprofeta ete bakende esika nyonso wapi balingi; mpe na ntina oyo bato bamemamaki na boyamboli.

26 Mpe lokola bato bayambolaki uta na mabe na bango mpe bosambeli bikeko Nkolo abatelaki bango, mpe babandaki kofuluka lisusu kati na mboka. Mpe esalemaki ete Sule abotaki bana mibali mpe bana basi na bobange na ye.

27 Mpe bitumba ezalaki lisusu te na mikolo ya Sule; mpe amikundolaki makambo minene oyo Nkolo asalaki mpo na batata na ye na komemaka bango kokatisa mozindo monene epayi na mboka elakelama; yango wana asalaki bosambisi na bosembo mikolo na ye nyonso.

Bimisa na lokasa