Makomi
Etele 4


Mokapo 4

Moloni atindami mpo ya kokanga nkoma ya ndeko mobali wa Yelede—Ikobimisama te kina bato bakozala na bondimi lokola ndeko mobali wa Yelede—Klisto atindi bato mpo ya kondima maloba ma ye, mpe maye ma bayekoli ba ye—Bato batindami mpo ya koyambola, mpe kondima nsango elamu, mpe kobikisama.

1 Mpe Nkolo atindaki ndeko mobali wa Yelede akita libanda lya ngomba uta o miso mya Nkolo, mpe akoma makambo maye amonoko; mpe mapekisamaki koya epai ya bana ba bato kina nsima ya ntango akotombolama likolo lya ekulusu; mpe mpo ya ntina eye mokonzi Moziya abombaki mango, ete maya te epai ya mokili kina ekosila Klisto komilakisa epai ya bato baye.

2 Mpe esilaka Klisto komilakisa epai ya bato ba ye atindaki ete ikoka komonisama.

3 Mpe sikawa, esalemaki ete, banso bakulumwaki o bozangi bondimi; mpe ezalaki moko te atikalaki longola se soko ezali Balamani, mpe babwakaki nsango elamu ya Klisto; yango wana natindami ete nabomba yango lisusu o mabele.

4 Tala, nakomaki likolo lya palaki iye makambo mpenza maye ndeko mobali wa Yelede amonoki; mpe emonisamaki mokolo moko te makambo manene mingi koleka mana maye mamonisamaki epai ya ndeko mobali wa Yelede.

5 Yango wana Nkolo atindaki ngai mpo ya kokoma mango; mpe nakomi mango. Mpe atindaki ngai ete nakanga mango; mpe atindaki ngai lisusu ete nasengeli kokanga bobongoli bwa mango lokola; bongo nakangaki bibongolele, engebene na motindo mwa Nkolo.

6 Mpo Nkolo alobaki epai ya ngai: makokende te epai ya Bapaganu kina o mokolo moye bakoyambola bobe bwa bango, mpe bakokoma sembesembe liboso lya Nkolo.

7 Mpe o mokolo mona bakosalela bondimi bwa bango na ngai, elobi Nkolo, kutu lokola ndeko mobali wa Yelede asalaki, ete bakoka kosantisama na ngai, nde nakomonisa epai ya bango makambo maye ndeko mobali wa Yelede amonoki, kutu mpo ya botandi epai ya bango mabimisi manso ma ngai, elobi Yesu Klisto, Mwana Mobali wa Nzambe, Tata wa lola mpe wa mabele, mpe biloko binso biye o mango bizali.

8 Mpe ye oyo akowela na maloba ma Nkolo, tika ye alakelama botutu; mpe ye oyo akowangana makambo maye, tika ye alakelama botutu; mpo epai ya bango nakolakisa te makambo manene mingi, elobi Yesu Klisto; mpo nazali ye oyo alobi.

9 Mpe na etinda ya ngai lola lofungwani mpe lokangemi; mpe na maloba ma ngai mabele maningani; mpe na etinda ya ngai bafandi ba mango baleki, kutu boye lokola na moto.

10 Mpe ye oyo andimi te maloba ma ngai andimi te bayekoli ba ngai; mpe soko ezali ete nalobi te, sambisani; mpo bokoyeba ete ezali ngai oyo alobi, o mokolo mwa nsuka.

11 Kasi ye oyo andimi makambo maye nalobi, ye nakobimela na mamonisi ma Molimo mwa ngai, mpe akoyeba mpe akopesa litatoli. Mpo na ntina ya Molimo mwa ngai akoyeba ete makambo maye mazali ma solo; mpo makondimisaka bato mpo ya kosala bolamu.

12 Mpe eloko enso ekondimisaka bato mpo ya kosala bolamu ezali ya ngai; mpo bolamu boyei na moko te longola se soko ezali na ngai. Nazali ye kaka oyo akokambaka bato mpo ya bolamu bonso; ye oyo andimi maloba ma ngai te akondima ngai te—ete nazali; mpe ye oyo akondima ngai te akondima te Tata oyo atindaki ngai. Mpo tala, nazali Tata, nazali mwinda, mpe bomoi, mpe bosolo bwa mokili.

13 Yakani epai ya ngai, O bino Bapaganu, mpe nakolakisa epai ya bino makambo manene mingi, boyebi boye bobombami na ntina ya bozangi bondimi.

14 Yakani epai ya ngai, O bino ndako ya Yisalaele, mpe ekomonisama epai ya bino makambo manene boniboni Tata atii mpo ya bino, uta o bokelami bwa mokili; mpe eyei te epai ya bino, na ntina ya bozangi bondimi.

15 Tala, ekopasola bino elamba ya bozangi bondimi eye esali bino botikala o bozali bwa nsomo bwa bino bwa nkuna, mpe bokasi bwa mitema, mpe lolanda la mayele, nde makambo manene mpe ma bokamwi maye mabombani uta o bokelami bwa mokili uta na bino—iyo, ekobianga bino likolo lya Tata o nkombo ya ngai, na motema moko mobukana mpe molimo moko mwa mawa, nde bokoyeba ete Tata amikundoli boyokani boye asalaki epai ya batata ba bino, O ndako ya Yisalaele.

16 Mpe nde mabimisi maye nasalaki makomama na mosali wa ngai Yoane makotandolama o miso mya bato banso. Bomikundola, ekomono bino makambo maye, bokoyeba ete ntango ezali penepene ete mamonisama o ekela mpenza.

17 Yango wana, ekozwa bino likundoli liye, bokoka koyeba ete mosala mwa Tata mobandi o etando mobimba ya mboka.

18 Yango wana, yambolani bino banso nsuka ya mabele, mpe yakani epai ya ngai, mpe ndimani nsango elamu ya ngai, mpe batisamani o nkombo ya ngai; mpo ye oyo andimi mpe abatisami akobikisama; kasi ye oyo andimi te akotumbolama; mpe bilembo bikolanda bango baye bandimi o nkombo ya ngai.

19 Mpe apambolami ye oyo amononi potongono epai ya nkombo ya ngai o mokolo mwa nsuka, mpo akotombolama mpo ya kofanda o bokonzi bolengeleme mpo ya ye uta o bokelami bwa mokili. Mpe tala ezali ngai oyo alobi yango. Amene.