Makomi
Etele 6


Mokapo 6

Bibengi bya Bayelede bibenganami na mipepe o mboka elakelama—Bato basanzoli Nzambe mpo ya bolamu bwa ye—Oliya aponomi mokonzi likolo lya bango—Yelede mpe ndeko mobali wa ye bakufi.

1 Mpe sikawa ngai, Moloni, nakobi kopesa likundoli lya Yelede mpe ndeko mobali wa ye.

2 Mpo esalemaki ete esilisaka Nkolo kolengele mabanga maye ndeko mobali wa Yelede akumbaki o kati ya ngomba, ndeko mobali wa Yelede akitaki libanda lya ngomba, mpe atiaki mabanga o kati ya masuwa maye malengelemeki, lyoko o nsonge enso ya mango; mpe tala, mapesaki mwinda epai ya masuwa.

3 Mpe boye Nkolo asalaki mabanga mangenge o molili, mpo ya kopesa mwinda epai ya babali, basi, mpe bana, ete bakoka kokatisa te mai manene o molili.

4 Mpe esalemaki ete elengeleke bango ndenge inso ya bilei, ete na byango bakoka kowumela likolo lya mai, mpe lisusu bilei mpo ya bibwele mpe bitonga bya bango, mpe niama to mbisi to ndeke inso iye bakumbaki elongo na bango—mpe esalemaki ete esalaka bango biloko binso biye bazwaki o kati ya masuwa to bibengi bya bango, mpe bakendeki o kati ya mbu, komitindaka epai ya Nkolo Nzambe wa bango.

5 Mpe esalemaki ete Nkolo Nzambe asalaki ete ebete mopepe moko mwa nkanda likolo lya etando ya mai, ona mboka elakelama; mpe boye babetemeki likolo lya mbonge ya mbu liboso lya mopepe.

6 Mpe esalemaki ete bakundamaki o mozindo mwa mbu na ntina ya ngomba ya mbonge iye ibeteki likolo lya bango, mpe lisusu bikumbaki binene mpe bya nsomo biye bisalemaki na nkanda ya mopepe.

7 Mpe esalemaki ete ekundamaka bango o mozindo ezalaki mai te maye makokaki kosala bango mpasi, masuwa ma bango kozalaka na lidusu te bo sani, mpe lisusu ezalaki na lidusu te bo mpo ya masuwa ma Noa; bongo, ezingamaki bango na mai mingi, babelelaki epai ya Nkolo, mpe amemeki bango lisusu likolo lya nsonge ya mai.

8 Mpe esalemaki ete mopepe mosilaki mokolo moko te kobete ona mboka elakelama ntango ezalaki bango likolo lya mai; mpe boye babenganamaki liboso lya mopepe.

9 Mpe bayembaki masanzoli epai ya Nkolo; iyo, ndeko mobali wa Yelede ayembaki masanzoli epai ya Nkolo, mpe atondaki mpe asanzolaki Nkolo bolai bwa mokolo mobimba; mpe eyaki butu, batikaki te kosanzola Nkolo.

10 Mpe boye babenganamaki liboso; mpe dongolomiso te akokaki kobuka bango, mpe mbisi monene akokaki kokamola bango te; mpe bazalaki na mwinda ntango inso, soko ezalaki likolo lya mai to o nse ya mai.

11 Mpe boye babenganamaki likolo, mikolo nkama misato na tuku minei na minei.

12 Mpe basemeki o likolo lya libongo lya mboka elakelama. Mpe etiaka bango makolo ma bango likolo lya libongo lya mboka elakelama bamingumbaki o nse likolo lya etando ya mboka, mpe bamikitisaki liboso lya Nkolo, mpe basopaki mpizoli ya bosepeli liboso lya Nkolo, na ntina ya ebele ya ngolu ya boboto ya ye likolo lya bango.

13 Mpe esalemaki ete bakendeki likolo lya etando ya mboka, mpe babandaki kosala bilanga.

14 Mpe Yelede azwaki bana babali banei; mpe babiangemaki Yakomi, mpe Giliga, mpe Maya, mpe Oliya.

15 Mpe ndeko mobali wa Yelede lokola abotaki bana babali mpe bana basi.

16 Mpe baninga ba Yelede mpe ndeko mobali wa ye bazalaki na motango penepene na bato tuku ibala na babale; mpe lisusu babotaki bana babali mpe bana basi yambo baya o mboka elakelama; yango wana babandaki kozala mingi.

17 Mpe balakisamaki kotambola na bosawa liboso lya Nkolo; mpe balakisamaki uta o likolo.

18 Mpe esalemaki ete babandaki kopanzana likolo lya etando ya mboka, koyikana mpe kosala bilanga; mpe bayikaki bokasi o mboka.

19 Mpe ndeko mobali wa Yelede abandaki kokoma mobange, mpe amonoki ete asengelaki mosika te kokita o lilita; yango wana alobaki epai ya Yelede: Tosangisa elongo bato ba biso ete tokoka kotanga bango, ete tokoka koyeba na bango nini bazali na mposa na biso yambo ya kokita o malita ma biso.

20 Mpe na engebene bato banso basangisamaki elongo. Sikawa motango mwa bana babali mpe bana basi ba ndeko mobali wa Yelede mozalaki tuku ibale na ibale ya bato; mpe motango mwa bana babali mpe bana basi ba Yelede mozalaki zomi na ibale, kozalaka na bana babali banei.

21 Mpe esalemaki ete batangaki bato ba bango; esilisaka bango kotanga bango, bazalaki na mposa na bango ya makambo maye balingi ete basala yambo bakita o malita ma bango.

22 Mpe esalemaki ete bato bazalaki na mposa na bango ete bapakola moko wa bana babali ba bango mpo ya kozala mokonzi likolo lya bango.

23 Mpe sikawa tala, eye ezalaki mpasi epai ya bango. Mpe ndeko mobali wa Yelede alobaki epai ya bango: Solo likambo liye likokambaka o kati ya bokangemi.

24 Kasi Yelede alobaki epai ya ndeko mobali wa ye: Tika bango ete bakoka kozala na mokonzi. Mpe yango wana alobaki epai ya bango: Pononi uta o ntei ya bana babali ba biso mokonzi, kutu oyo bolingi.

25 Mpe esalemaki ete baponoki mwana mobali kutu mobotama wa yambo wa ndeko mobali wa Yelede; mpe nkombo ya ye ezalaki Pagagi. Mpe esalemaki ete aboyaki mpe alingaki te kozala mokonzi wa bango. Mpe bato banso balingaki ete tata wa ye asengisa ye, kasi tata wa ye alingaki te; mpe atindaki bango ete basengisa moto te mpo ya kozala mokonzi wa bango.

26 Mpe esalemaki ete baponoki bandeko babali banso ba Pagagi, mpe balingaki te.

27 Mpe esalemaki ete bana babali ba Yelede balingaki te lokola, kutu banso longola se soko ezalaki moko; mpe Oliya apakolamaki mpo ya kozala mokonzi likolo lya bato.

28 Mpe abandaki kokonza, mpe bato babandaki kozwa bomengo; mpe bakomaki na bozwi mpenza.

29 Mpe esalemaki ete Yelede akufaki, mpe ndeko mobali wa ye lokola.

30 Mpe esalemaki ete Oliya atambolaki na bosawa liboso lya Nkolo, mpe amikundolaki makambo manene boniboni Nkolo asalaka mpo ya tata wa ye, mpe lisusu alakisaki bato ba ye makambo manene boniboni Nkolo asalaki mpo ya batata ba bango.