Lokola esalelami kati na makomi, libota esalemi na mobali moko mpe mwasi moko, bana mpe ntango mosusu na bandeko basusu kofandaka na ndako se moko to na nse ya mokonzi ya libota moko. Libota mpe ekoki lisusu kozala na moboti moko na bana, mobali mpe mwasi kozangaka bana, to kutu moto se moko kofandaka ye moko.
Na kotalaka nyonso mobimba
Na yo mabota nyonso ya mabele ekopambolama, Gen. 12:3 (Gen. 28:14 ; Abal. 2:11 ).
Nakozala Nzambe ya mabota nyonso ya Yisalaele, Yil. 31:1 .
Nkembo na yo ekozala bokobi ya bankona mpo na libela, Mal&May 132:19 .
Nakopesa ye mitole ya bomoi ya seko kati na mikili ya seko, Mal&May 132:55 .
Bokangi ya bana na baboti ezali ndambo ya mosala monene ya litondi ya bantango, Mal&May 138:48 .
Mwasi mpe mobali nakelaki bango, mpe nalobaki na bango: Bobota, mpe bokoma mingi, Mose 2:27–28 .
Ezali malamu te ete moto azala ye moko, Mose 3:18 .
Adama mpe Eva basalaki elanga esika moko, Mose 5:1 .
Abalayama akotinda bana na ye, mpe basengeli kobatela nzela ya Nkolo, Gen. 18:17–19 .
Okoteya maloba oyo na molende epayi ya bana na yo, Dut. 6:7 (Dut. 11:19 ).
Ye oyo alingaka mwana mobali na ye apesaka ye etumbu, Mas. 13:24 (Mas. 23:13 ).
Bokola mwana na nzela oyo asengeli kokende, Mas. 22:6 .
Fandaka na bosepeli na mwasi oyo olingaka, Mosak. 9:9 .
Bana na yo nyonso bakoteyama na Nkolo, Yis. 54:13 (3Â Nef. 22:13 ).
Kolisa bango na bolei ya Nkolo, Efe. 6:1–4 (Enos. 1:1 ).
Soki moto nani aleisi libota na ye moko te, asili kowangana bondimi, 1Â Tim. 5:8 .
Alendisaki bango na mayoki nyonso ya moboti ya bolingo, 1Â Nef. 8:37 .
Tokolobela Klisto ete bana na biso bakoka koyeba na liziba kani bakoki kotala, 2Â Nef. 25:26 .
Mibali mpe basi na bango balingaka bana ba, Yako. 3:7 .
Teya bango kolingana bango na bango mpe kosalisana bango na bango, Mos. 4:14–15 .
Bokobatela mabota na bino kutu kino na bosopi ya makila, Alma 43:47 .
Bosambela kati na mabota na bino ete basi ya bino mpe bana bapambolama, 3Â Nef. 18:21 .
Baboti basengeli koteya nsango malamu na bana na bango, Mal&May 68:25 .
Moto na moto asengisami koleisa libota na ye moko, Mal&May 75:28 .
Bana nyonso bazali na litomba ya kosenga likolo ya baboti na bango, Mal&May 83:4 .
Bokola bana na yo engebene na pole mpe bosolo, Mal&May 93:40 .
Tiaka ndako na yo moko na molongo, Mal&May 93:43–44, 50 .
Bamemi ya Bonganganzambe basengeli kopusa basusu bobele na nzela ya bolingo bozanga bokosi, Mal&May 121:41 .
Kumisa tata mpe mama na yo, Esod. 20:12 .
Mwana mobali na ngai, yoka malakisi ya tata na yo, Mas. 1:8 (Mas. 13:1 ; 23:22 ).
Yesu atosaki baboti na ye, Luk. 2:51 .
Yesu asalaki bolingi ya Tata na ye, Yoan. 6:38 (3Â Nef. 27:13 ).
Tosa baboti na yo kati na Nkolo, Efe. 6:1 (Kolos. 3:20 ).
Malongi mpe Mayokani elakisi bozali ya seko ya mokangano ya libala mpe libota. Libala ya selesitiale mpe bokobi ya bomoko ya libota epesi mibali mpe basi makoki ya kokoma banzambe (Mal&May 132:15–20 ).