Makomi
2 Nefi 31


Mokapo 31

Nefi ayebisi mpo na nini Klisto abatisamaki—Bato basengeli kolanda Klisto, kobatisama, kozwa Molimo Mosantu, mpe kotia molende kino na nsuka mpo na kobikisama—Boyamboli mpe libatisi ezali ekuke oyo ekambaka na nzela mukiemukie mpe ya nkaka—Bomoi ya seko ekoya na bango oyo babatelaka mitindo nsima ya libatisi. Penepene na mibu 559–545 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa ngai, Nefi, natie nsuka na masakoli na ngai epayi na bino, bandeko balingami na ngai. Mpe nakoki kokoma bobele mwa makambo moke, oyo nayebi esengeli solo kosalema; mpe nakoki kokoma bobele ndambo moke ya maloba ya ndeko na ngai ya mobali Yakobo.

2 Yango wana, makambo oyo nakomaki makoki na ngai, longola se soki ezali mwa maloba moke oyo nasengeli koloba mpo na oyo etali malongi ya Klisto; yango wana, nakoloba epayi na bino polele, engebene na bopolele ya masakoli na ngai.

3 Mpo molimo na ngai mosepelaka na oyo ezali polele; mpo na lolenge oyo nde Nkolo Nzambe asalaka na kati ya bana ya bato. Mpo Nkolo Nzambe apesaka pole na bososoli; mpo alobelaka bato engebene na lokota na bango, mpo na bososoli na bango.

4 Yango wana, nalingi bomikundola ete nalobelaki bino mpo na oyo etali profeta wana oyo Nkolo alakisaki epayi na ngai, oyo akobatisa Mwana ya mpate ya Nzambe, oyo akolongola masumu ya mokili.

5 Mpe sikawa, soki Mwana ya mpate ya Nzambe, ezali ye mosantu, asengelaki kobatisama na mai, mpo na kokokisa bosembo nyonso, O bongo, lolenge boni esengeli biso mingi koleka, biso baye tozanga bosantu, kobatisama, iyo, kutu na mai!

6 Mpe sikawa, nalingi kotuna na bino, bandeko balingami na ngai, na nini Mwana ya mpate ya Nzambe akokisaki bosembo nyonso na kobatisamaka na mai?

7 Eyebi bino te ete azalaki mosantu? Kasi atako azalaki mosantu, alakisi epayi ya bana ya bato ete, engebene na mosuni amikitisi liboso ya Tata, mpe atatoli epayi ya tata ete akozala moto ya botosi epayi na ye na kobombaka mitindo na ye.

8 Yango wana, esilaki ye kobatisama na mai Molimo Mosantu akitaki likolo na ye na lolenge ya ebenga.

9 Mpe lisusu, elakisi epayi ya bana ya bato moke ya nzela, mpe nkaka ya ekuke, epayi wapi basengeli kokota, ye kopesaka ndakisa liboso na bango.

10 Mpe alobaki epayi ya bana ya bato ete: Bolanda ngai. Yango wana, bandeko balingami na ngai, ekoki biso kolanda Yesu longola se soki tozali na bolingi ya kobomba mitindo ya Tata?

11 Mpe Tata alobaki: Boyambola, boyambola, mpe bobatisami na nkombo ya Mwana Molingami na ngai.

12 Mpe lisusu, mongongo ya Mwana eyaki epayi na ngai, kolobaka: Oyo akobatisama na nkombo na ngai, Tata akopesa ye Molimo Mosantu, lokola ngai; yango wana, bolanda ngai, mpe bosala makambo oyo bomonaki ngai kosala.

13 Yango wana, bandeko balingami na ngai, nayebi ete soki bokolanda Mwana, na mokano etonda ya motema, kosalaka bokibisi te mpe lokuta te liboso ya Nzambe, kasi na mokano ya solo, koyambolaka masumu na bino, kotatolaka epayi ya tata ete bolingi kokamata likolo na bino nkombo ya Klisto, na libatisi—iyo, na kolandaka Nkolo mpe Mobikisi na bino na nse kati na mai, engebene na liloba na ye, tala, nsima bokozwa Molimo Mosantu; iyo, nsima libatisi ya moto mpe ya Molimo Mosantu ekoya; mpe nsima bokokoka koloba na lokota ya banjelu, mpe koganga masanzoli epayi ya moko mosantu ya Yisalaele.

14 Kasi, tala, bandeko balingami na ngai, boye nde eyaki mongongo ya Mwana epayi na ngai, kolobaka: Esili bino koyambola masumu na bino, mpe kotatola epayi ya tata ete bolingi kobomba mitindo na ngai, na libatisi ya mai, mpe kozwa libatisi ya moto mpe ya Molimo Mosantu, mpe kokoka koloba na monoko moko ya sika, iyo, kutu na monoko ya banjelu, mpe nsima ya oyo soki bokowangana ngai, elingaki kozala malamu koleka mpo na bino ete boyeba ngai te.

15 Mpe nayokaki mongongo uta na Tata, kolobaka: Iyo, maloba ya Molingami na ngai ezali solo mpe sembo. Oyo akotia molende kino na nsuka, se ye moko wana nde akobikisama.

16 Mpe sikawa, bandeko balingami na ngai, nayebi na oyo ete longola se soki moto atii molende kino na nsuka, na kolandaka ndakisa ya Mwana ya Nzambe ya bomoi, akoki kobikisama te.

17 Yango wana, bosala makambo oyo nalobelaki bino mpe oyo namonaki ete Nkolo na bino mpe Mosikoli na bino akosala; mpo, mpo na ntina oyo malakisamaki epayi na ngai, ete bokoka koyeba ekuke oyo wapi bosengeli kokota. Mpo ekuke oyo wapi bosengeli kokota ezali boyamboli mpe libatisi na mai; mpe nsima nde ekoya bolimbisi ya masumu na bino na moto mpe na Molimo Mosantu.

18 Mpe na ntango wana ekozala bino na nzela ya moke mpe ya nkaka oyo ekambaka na bomoi ya seko; iyo, ekokota bino na ekuke; ekosala bino engebene na mitindo ya Tata mpe Mwana; mpe ekozwa bino Molimo Mosantu, oyo atatolaka mpo na Tata mpe Mwana, mpo na kokokisa elaka oyo asalaki, ete soki bokoti kati na nzela yango bokozwa.

19 Mpe sikawa, bandeko balingami na ngai, awa esili bino kokota kati na nzela ya moke mpe ya nkaka, nalingi kotuna soki nyonso esalemi? Tala, nalobi epayi na bino, Te; mpo mbele bokomaki kino lelo boye te longola se soki ezalaki na liloba ya Klisto na bondimi boye ekoki te koningana mpo na ye, kotalelaka na mobimba matomba na ye oyo azali na nguya mpo na kobikisa.

20 Yango wana, bosengeli kokende liboso mbangu na molende elongo na Klisto, kozalaka na bongengi moko ya kobonga nie ya elikya, mpe bolingo ya Nzambe mpe ya bato nyonso. Yango wana, soki bokokende liboso mbangu, kosalaka lipati na liloba ya Klisto, mpe kotiaka molende kino na nsuka, tala, boye elobi Tata: Bokozwa bomoi ya seko.

21 Mpe sikawa, tala, bandeko balingami na ngai, oyo ezali nzela; mpe ezali na nzela mosusu te to nkombo mosusu te oyo epesami na nse ya lola na oyo kani moto akoki kobikisama na bokonzi ya Nzambe. Mpe sikawa, tala, oyo ezali malongi ya Klisto, mpe elaka se moko mpe ya solo ya Tata, mpe ya Mwana, mpe ya Molimo Mosantu, baye bazali Nzambe moko, oyo azanga nsuka. Amene.

Bimisa na lokasa