Makomi
2 Nefi 16


Mokapo 16

Yisaya amoni Nkolo—Masumu ma Yisaya malimbisami—Abiangemi mpo ya kobikula—Abikulaki etali bobwakami na Bayuda bwa malakisi ma Klisto—Montika moko mokozonga—Mekisani Yisaya 6. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 O mobu moye mokonzi Uziya akufaki, namonoki lisusu Nkolo kofandaka likolo lya ngbende yoko mpe nse ya monkoto mwa ye etondisaki tempelo.

2 Likolo lya yango etelemeki baselafa; moko na moko azalaki na mapapu motoba; na mibale azipaki elongi ya ye, mpe na mibale azipaki makolo ma ye, mpe na mibale apimbwaki.

3 Mpe moko agangaki epai ya mosusu, mpe alobaki: Mosantu, mosantu, mosantu, azali Nkolo wa Bibele; mabele manso matondi na nkembo ya ye.

4 Mpe makonzi ma ekuke maninganaki o mongongo mwa oyo agangaki, mpe ndako etondaki na molinga.

5 Nde elobaki ngai: Lisuma epai ya ngai! mpo nabebi; na ntina ya mbebo ya ngai ya mbindo; mpe nafandi o katikati ya bato ba mbebo ya mbindo; mpo miso mya ngai mimoni Mokonzi, Nkolo wa Bibele.

6 Nde epimbwaki moko wa baselafa epai ya ngai, azalaki na likala lya moto o loboko la ye, liye azwaki na esimbele uta o lotale;

7 Mpe atiaki lyango likolo lya monoko mwa ngai, mpe alobaki: Tala, eye etuti mbebo ya yo; mpe bobe bwa yo bolongwi, mpe lisumu lya yo lipetwami.

8 Lisusu nayokaki mongongo mwa Nkolo, kolobaka: Nani nakotinda, mpe nani akokende mpo ya biso? Nde nalobaki: Awa nazali, tinda ngai.

9 Mpe alobaki: Kende mpe lobela bato baye—Yokani solo, kasi basosoli te; mpe talani solo, kasi bamoni te.

10 Yeisa mitema mwa bato baye mikasi, mpe yeisa matoyi ma bango ma bozito, mpe zipa miso mya bango—ete mbele bamono na miso mya bango, mpe bayoka na matoyi ma bango, mpe basosola na mitema mya bango, mpe babongwana mpe babikisama.

11 Nde elobaki ngai: Nkolo, kina ntango kani? Mpe alobaki: Kina bingumba bikozala bibomamabomama mofandi te, mpe ndako moto te, mpe mboka ekozala mpamba mpenza;

12 Mpe Nkolo alongoli bato mosika mpenza, mpo ekozala bosundoli bonene o katikati ya mboka.

13 Kasi nzokande ekozala yoko ya zomi, mpe bakozonga, mpe bakoliama, lokola nzete ya alono, mpe lokola nzete ya ela ya iye ntina ezali na yango ntango ikobwaka nkasa ya bango; boye nkona esantu ekozala ntina ya yango.