Makomi
2 Nefi 32


Mokapo 32

Banzelu bakoloba na nguya ya Molimo Mosantu—Bato basengeli kosambela mpe kolonga boyebi mpo ya bangomei uta na Molimo Mosantu. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa, tala, bandeko balingami ba ngai, nabanzi ete bomanioli mwa moke o mitema mya bino etali nini bokosala esili bino kokota o nzela. Kasi, tala, ntina nini bozali komaniola makambo maye o mitema mya bino?

2 Emikundoli bino te ete nalobaki epai ya bino ete esili bino kozwa Molimo Mosantu bokoki koloba monoko mwa banzelu? Mpe sikawa, boniboni bokoki koloba na monoko mwa banzelu longola se soko ezalaki na Molimo Mosantu?

3 Banzelu bakoloba na nguya ya Molimo Mosantu; yango wana, bakoloba maloba ma Klisto. Yango wana, nalobaki na bino ete, salani limpati likolo lya maloba ma Klisto; mpo tala, maloba ma Klisto makolobela bino makambo manso kani bokosala.

4 Yango wana, sikawa esilisi bino koloba maloba maye, soko bokoki kososola mango te ekozala zambi botuni te, mpe bobeti te; yango wana, bokumbami te o kati ya mwinda, kasi bosengeli kowa o molili.

5 Mpo tala, lisusu nakoloba epai ya bino ete soko bokokota o nzela, mpe bokozwa Molimo Mosantu, akolakisa epai ya bino makambo manso bokosala.

6 Tala, maye mazali malongi ma Klisto, mpe ezali liteya lisusu te likopesama kina akomimonisa yemei epai ya bino o mosuni, makambo akoloba epai ya bino ekotosa bino mpo ya kosala.

7 Mpe sikawa ngai, Nefi, nakoki koloba lisusu te; Molimo akangi bolobi bwa ngai, mpe natikali kolela na ntina ya bozangi bondimi, mpe nkuna, mpe bozangi boyebi, mpe nkanza ya bato; mpo balingi te koluka boyebi, to kososola boyebi bonene, ntango epesami epai ya bango o polele, kutu polele lokola liloba likoki kozala.

8 Mpe sikawa, bandeko balingami ba ngai, namoni ete bokomaniola naino o mitema mya bino; mpe etungisi ngai ete nasengeli koloba etali likambo liye. Mpo soko bolingi koyokemela epai ya Molimo oyo akoteya moto moko kosambela, bolingaki koyeba ete bosengeli kosambela; mpo molimo mobe akoteya te moto kosambela, kasi akoteya ye ete asengeli te kosambela.

9 Kasi tala, nakoyebisa bino ete bosengeli kosambela ntango inso, mpe kolembe te; ete bosengeli kosala likambo te epai ya Nkolo longola se soko o esika ya yambo bokosambela epai ya Tata o nkombo ya Klisto, ete abulisa likokisi lya bino epai ya bino, ete likokisi lya bino likoka kozala mpo ya bolamu bwa bozo bwa bino.