Makomi
2 Nefi 19


Mokapo 19

Yisaya alobi bomasiya—Bato o molili bakomono mwinda monene—Epai ya biso mwana abotami—Akozala Mwana Mokonzi wa Kimia mpe akokonza likolo lya ngbende ya Dawidi—Mekisani Yisaya 9. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Nzokande, bitima bikozala te lokola bizalaki o litungisi lya ye, etungisaki ye moke yambo mboka ya Zebuluna, mpe mboka ya Nafatali, mpe nsima ya yango atungisaki makasi mpenza o nzela ya Mbu Etane o ngambo esusu ya Yaladene o Galilai ya bikolo.

2 Bato baye batambolaki o molili bamonoki mwinda monene; baye bafandaki o mboka ya elilingi ya liwa, mwinda engengeki.

3 Otondisi ekolo, mpe obakisi bosepeli—basepeli liboso lya yo engebene na bosepeli bwa ntango ya bobuki, mpe lokola bato bakosepelaka ntango bakokabolaka biloko bipunzami.

4 Mpo obuki kpokoso ya ye, mpe ngondo ya lipeka lya ye, lingenda lya mokakemi wa ye.

5 Mpo etumba na etumba ya mobundi ezali na makelele ma mobulu, mpe bilamba bibaluki o makila; kasi eye ekozala elongo na boziki mpe mololi mwa moto.

6 Mpo epai ya biso mwana moko abotami, epai ya biso mwana mobali moko apesami; mpe boyangeli bokozala likolo lya lipeka lya ye; mpe nkombo ya ye ekobiangema, Mokamwisi, Mopesi toli, Nzambe Mokasi, Tata wa Libela, Mwana Mokonzi wa Kimia.

7 Na bobakisi bwa boyangeli bwa ye mpe kimia ezali nsuka te, likolo lya ngbende ya Dawidi, mpe likolo lya bokonzi bwa ye mpo ya kotia bwango, mpe mpo ya kotelemisa bwango na bosambisi mpe na boyengebene uta sikawa, kutu libela. Mpila ya Nkolo wa Bibele ekosala eye.

8 Nkolo atindaki liloba lya ye epai ya Yakobo mpe epelisi mwinda likolo lya Yisalaele.

9 Mpe bato banso bakoyeba, kutu Efelaima mpe bafandi ba Samalia, baye balobi o lolendo mpe bokasi bwa motema:

10 Biliki bikwei, kasi tokotonga na mabanga masebisami; nzete ya mosuke ekatami, kasi tokobongola yango o nzete ya eleze.

11 Yango wana Nkolo akotelemisa banguna ba Lesini likolo lya ye, mpe akosangisa bayini ba ye elongo;

12 Basulia yambo mpe Bafilisitia nsima; mpe bakolia Yisalaele o monoko mwa kofungwana. Mpo o enso eye nkanda ya ye elongwi te, kasi loboko la ye lotandolami naino.

13 Mpo bato babaluki te epai ya ye oyo abeti bango, mpe baluki te Nkolo wa Bibele.

14 Yango wana Nkolo akokata mosika uta o Yisalaele moto mpe mokila, etape mpe mongbende o mokolo moko.

15 Mokolo, azali moto; mpe profeta oyo akoteya lokuta, azali mokila.

16 Mpo bakambi ba bato baye basali bango babunga; mpe baye bakambemi na bango babebisami.

17 Yango wana Nkolo akosepela te na bilenge bya bango, mpe akoyoka ngolu te likolo lya bitike mpe bazenge ba bango; mpo moko na moko wa bango azali mokibisi moko mpe mosali moko mobe, mpe monoko na monoko molobaka ligboma. Mpo ya makambo maye manso, nkanda enso ya ye elongwi te, kasi loboko la ye lotandolami naino.

18 Mpo nkuna ekozika lokola moto; ekomele nkogonbo mpe nzube; mpe ekopela o lisanga lya nzete ike ya zamba, mpe bakomata likolo bo bomati bwa molinga.

19 Na nkele ya Nkolo wa Bibele eyindisami mboka, mpe bato bakozala lokola mololi mwa moto; moto te akobikisa ndeko mobali wa ye.

20 Mpe akobakola likolo loboko la mobali mpe akoyoka nzala; mpe akolia o loboko la mwasi mpe bakotonda te; Bakolia moto na moto mosuni mwa loboko la yemei—

21 Manase, Efelaima; mpe Efelaima, Manase; bakotelemele elongo Yuda. Mpo nkanda enso ya ye elongwi te, kasi loboko la ye lotandolami naino.