Makomi
2 Nefi 14


Mokapo 14

Siona mpe bana basi na ye bakosikolama mpe bakopetolama na mokolo ya nkoto moko ya mibu—Meka na Yisaya 4. Penepene na mibu 559–545 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe na mokolo wana, basi sambo bakokangama na mobali moko, kolobaka: Tokolia mapa na biso moko, mpe tokolata monzele na biso moko; bobele tika biso tobiangama na nkombo na yo mpo na kolongola mpamela na biso.

2 Na mokolo wana etape ya Nkolo ekozala kitoko mpe ya nkembo; mbuma ya mabele sukali mpenza mpe kitoko na bango oyo bazali bakimi ya Yisalaele.

3 Mpe ekosalema ete, baoyo batikali na Siona mpe bafandi na Yelusaleme bakobiangama basantu, moko na moko oyo akomami na kati ya baoyo bazali na bomoi na Yelusaleme—

4 Ntango Nkolo akosukola bosoto ya bana basi ya Siona, mpe ekopetola ye makila na Yelusaleme na katikati na yango na molimo ya bosambisi mpe na molimo ya bozikisi.

5 Mpe Nkolo akokela likolo ya esika nyonso ya kofanda ya ngomba ya Siona, mpe likolo ya mayangani nyonso na ye, mapata mpe molinga na moi mpe bongengi ya moto ya mololi na butu; mpo likolo ya nkembo nyonso ya Siona bobateli ekozala.

6 Mpe tabelenakele ekozala lokola elili na ntango ya moi mpo na kokima molunge, mpe lokola esika ya ekimelo, mpe ebombelo uta na ekumbaki mpe uta na mvula.

Bimisa na lokasa