Makomi
2 Nefi 2


Mokapo 2

Bosikoli bokoya o lisalisi lya Masiya Mosantu—Bonsomi bwa boponi (nguya ya kopono) bozali bwa ntina mpenza o bozali mpe bokoli—Adami akweyaki mpo bato bazala—Bato bazali nsomi mpo ya kopono lipanda mpe bomoi bwa seko. Penepene na 588–570 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa, Yakobo, nakoloba epai ya yo: Ozali mobotami wa ngai wa yambo o mikolo mya mokakatano mwa ngai o esobe. Mpe tala, o bomwana bwa yo oyokaki mpasi ya matungisi mpe mawa maike, na ntina ya yauli ya bandeko ba yo.

2 Nzokande, Yakobo, mobotami wa ngai wa yambo o esobe, oyebi bonene bwa Nzambe; mpe akobulisa matungisi ma yo mpo ya litomba lya yo.

3 Yango wana, bozo bwa yo bokopambolama, mpe okofanda o bozangi bobangi elongo na ndeko mobali wa yo, Nefi; mpe mikolo mya yo mikoleka o lisalisi lya Nzambe wa yo. Yango wana, nayebi ete osikolami, na ntina ya bosembo bwa Mosikoli wa yo; mpo omonoki ete o litondi lya ntango akoya komeme lobiko epai ya bato.

4 Mpe omonoki o bolenge bwa yo nkembo ya ye; yango wana, opambolami kutu lokola baye epai ya bango akosala o mosuni; mpo Molimo azali ye kaka, lobi, lelo, mpe libela. Mpe nzela elengelemi uta o bokwei bwa moto, mpe lobiko lozali ofele.

5 Mpe bato bazwi mateya makoki mpo ete bayeba bolamu uta o bobe. Mpe mobeko mopesami epai ya bato. Mpe na mobeko mosuni te moyengebeni; to, na mobeko bato bakatami mosika. Iyo, na mobeko mwa ntango bakatamaki mosika; mpe lisusu, na mobeko mwa molimo bawei mpo ya eye ezali elamu, mpe bakomi babola libela.

6 Yango wana, bosikoli bokoya o kati ya mpe na Masiya Mosantu; mpo atondi na boboto mpe bosolo.

7 Tala, amipesi lokola libonza mpo ya lisumu, mpo ya koyanola ntina ya mobeko, epai ya banso baye ba motema moko mobukana mpe molimo moko mwa mawa; mpe epai ya mosusu te ekoki ntina ya mobeko koyanolama.

8 Yango wana, boniboni ya motuya monene koyebisa makambo maye epai ya bato ba mabele, ete bakoka koyeba ete ezali mosuni te mokoki kofanda o miso mya Nzambe, longola se soko ezali na matomba, mpe ngolu, mpe boboto bwa Masiya Mosantu, oyo atiki bomoi bwa ye engebene na mosuni, mpe akamati mwango lisusu na nguya ya Molimo, ete akoka komeme esalema bosekwi bwa bakufi, ekozala ye wa yambo oyo akosekwa.

9 Yango wana, akozala mbuma ya yambo epai ya Nzambe, mbala nzike lokola akosala libondeli mpo ya bana banso ba bato; mpe baye bakondima ye bakobikisama.

10 Mpe na ntina ya libondeli mpo ya bato banso, bato banso bakoya epai ya Nzambe; yango wana, bakoteleme o miso mya ye, mpo ya kosambisama engebene na bosolo mpe bosantu boye bozali na ye. Yango wana, ntina ya mobeko moye Mosantu Moko apesaki, mpo ya bopesami bwa etumbu eye ekangemi, eye etumbu ekangemi ezali o bokeseni na eye ya esengo eye ekangemi, mpo ya koyanola ntina ya botumbolami—

11 Mpo esengeli mpenza ezala, ete ezala bokeseni na makambo manso. Soko boye te, mobotami wa ngai wa yambo o esobe, bosembo bokokaki kosalema te, mpe nkuna te, mpe bosantu te mpe bobola te, mpe bolamu te to bobe te. Yango wana, biloko binso bisengeli mpenza kozala lisanga lyoko lya biteni o lyoko; yango wana, soko ezalaki nzoto yoko elingaki etikala lokola ekufa, zambi elingaki kozala bomoi te mpe liwa te, to bopoli te to bozangi bopoli te, esengo te to bobola te, mpe lioki te to bozangi lioki te.

12 Yango wana, esengelaki mpenza ekelama mpo ya likambo lya mpamba; yango wana elingaki kozala ntina te o mwango mwa bokeli bwa yango. Yango wana, likambo liye lisengelaki mpenza kobebisa bwania bwa Nzambe mpe miango mya ye mya seko, mpe lisusu nguya, mpe ngolu, mpe boyengebene bwa Nzambe.

13 Mpe soko bokoloba mobeko mozali te, bokoloba lisusu lisumu lizali te. Soko bokoloba lisumu lizali te, bokoloba lisusu bosembo bozali te. Mpe soko bosembo bozali te esengo ezali te. Mpe soko bosembo bozali te to esengo te etumbu ezali te to bobola te. Mpe soko makambo maye mazali te Nzambe azali te. Mpe soko Nzambe azali te biso tozali te, mpe mabele te; mpo ekokaki kozala bokeli bwa biloko te, mpe mpo ya kosala te to mpe mpo ya kosalema likolo lya byango te; yango wana, biloko binso bisengelaki kolimwa nie.

14 Mpe sikawa, bana ba ngai babali, nalobi epai ya bino makambo maye mpo ya litomba mpe boyekoli bwa bino; mpo Nzambe azali, mpe akelaki biloko binso, lola mpe mabele lokola, mpe biloko binso bizali o mango, biloko mpo ya kosala mpe biloko mpo ya kosalema likolo lya byango.

15 Mpe mpo ya kokokisa miango mya ye mya seko na ntina ya moto, esilaka ye kokela baboti ba biso ba yambo, mpe niama ya zamba mpe ndeke ya mopepe, mpe o nsuka, biloko binso biye bikelami, esengeli mpenza ete ezala bokeseni; kutu mbuma epekisama o bokeseni na nzete ya bomoi; moko kozalaka ya sukali mosusu bololo.

16 Yango wana, Nkolo Nzambe apesaki epai ya moto ete asala mpo ya yemei. Yango wana, moto akokaki kosala mpo ya yemei te longola se soko asenginiami na yoko to esusu.

17 Mpe ngai, Lehi, engebene na makambo maye natangaki, nasengeli mpenza kobanza ete anzelu wa Nzambe, engebene na eye ekomami akweyaki uta o lola; yango wana, akomaki zabulu, elukaki ye eye ezali ebe liboso lya Nzambe.

18 Mpe zambi akweyaki uta o lola, mpe akomaki mobola libela, alukaki lisusu bobola bwa bato banso. Yango wana, alobaki epai ya Ewa, iyo, kutu nioka ena ya kala, oyo azali zabulu, oyo azali tata wa lokuta lonso, yango wana alobaki ete: lia mbuma epekisama, mpe okokufa te, kasi okozala lokola Nzambe, koyebaka bolamu mpe bobe.

19 Mpe esilaki Adama mpe Ewa kolia mbuma epekisama babenganamaki libanda lya elanga ya Edene, mpo ya kosala bilanga.

20 Mpe babotaki bana; iyo, kutu libota lya mabele manso.

21 Mpe, mikolo mya bana ba bato miyeisamaki milai, engebene na bolingi bwa Nzambe, ete bakoka koyambola ntango ezalaki bango o mosuni; yango wana, bozali bwa bango bokomaki bozali bwa momekano, mpe ntango ya bango eyeisamaki elai, engebene na mitindo miye Nkolo Nzambe apesaki epai ya bana ba bato. Mpo apesaki motindo ete bato banso basengeli koyambola; mpo alakisaki epai ya bato banso ete babungaki, na ntina ya bobuki mobeko bwa baboti ba bango.

22 Mpe sikawa, tala, soko Adama abukaki mobeko te alingaki kokweya te, kasi alingaki kotikala o elanga ya Edene. Mpe biloko binso biye bikelamaki bisengelaki kotikala o bozali boye kaka o yango bizalaki nsima ya biango kokelama; mpe bisengelaki kotikala libela, mpe kozala na nsuka te.

23 Mpe balingaki kozala na bana te; yango wana balingaki kotikala o bozali bwa bozangi boyebi, kozalaka na bosepeli te, mpo bayebaki bobola te; kosalaka bolamu te, mpo bayebaki lisumu te.

24 Kasi tala, makambo manso masalemaki o bwania bwa ye oyo ayebi makambo manso.

25 Adama akweyaki mpo bato bakoka kozala; mpe bato bazali, mpo ete bakoka kozala na bosepeli.

26 Mpe Masiya akoya o litondi lya ntango, mpo ete akoka kosikola bana ba bato uta o bokwei. Mpe zambi ete basikolami uta o bokwei bakomi bansomi libela, koyebaka bolamu uta o bobe; mpo ya kosala mpo ya bangomei mpe kosalema te likolo lya bango, longola se soko ekozala na etumbu ya mobeko o mokolo monene mpe mwa nsuka, engebene na mitindo miye Nzambe apesi.

27 Yango wana, bato bazali nsomi engebene na mosuni; mpe biloko binso bipesameli bango biye bilongobanaki epai ya moto. Mpe bazali nsomi mpo ya kopono lipanda mpe bomoi bwa seko, na Moyokanisi monene wa bato banso, to kopono bokangemi mpe liwa, engebene na bokangemi mpe nguya ya zabulu; mpo akoluka ete bato banso bazala babola bo yemei.

28 Mpe sikawa, bana ba ngai, nalingi ete botala Moyokanisi monene, mpe boyokemela epai ya mitindo minene mya ye; mpe bozala potongono epai ya maloba ma ye, mpe bopono bomoi bwa seko, engebene na bolingi bwa Molimo Mosantu mwa ye;

29 Mpe ponono te liwa lya seko, engebene na bolingi bwa mosuni mpe bobe boye bozali o mwango, boye bokopesaka molimo mwa zabulu nguya ya kokanga, mpe kokweyisa bino o limfelo, mpo ete akoka kokonza likolo lya bino o bokonzi bwa yemei.

30 Nalobi mwa maloba maye epai ya bino banso, bana babali ba ngai, o mikolo mya nsuka mya momekano mwa ngai; mpe naponi eteni elamu, engebene na maloba ma profeta. Mpe nazali na ntina esusu te longola se soko ezali bolamu bwa seko bwa bozo bwa bino. Amene.