Makomi
2 Nefi 11


Mokapo 11

Yakobo amonaki Mosikoli na ye—Mobeko ya Mose ezali elembo ya Klisto mpe elakisi ete Akoya. Penepene na mibu 559–545 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa, Yakobo alobaki makambo mingi koleka na bato na ngai na ntango wana; nzokande nakomisaki bobele makambo oyo, mpo makambo oyo nakomaki makoki na ngai.

2 Mpe sikawa ngai, Nefi, nakomi mingi koleka ya maloba ya Yisaya, mpo molimo na ngai mosepelaka na maloba na ye. Mpo nakokokisa maloba na ye na bato na ngai, mpe nakotinda yango epayi ya bana na ngai nyonso, mpo solo amonaki Mosikoli na ngai, kutu lokola namonaki ye.

3 Mpe ndeko na ngai ya mobali, Yakobo, lisusu amonaki ye lokola ngai namonaki ye; yango wana, nakotinda maloba na bango epayi ya bana na ngai mpo na kolakisa epayi na bango ete maloba na ngai ezali solo. Yango wana, na maloba ya bato misato, Nzambe alobaki, nakotia liloba na ngai. Nzokande, Nzambe akotinda banzeneneke mingi lisusu, mpe akolakisa maloba na ye nyonso.

4 Tala, molimo na ngai mosepelaka na kolakisaka epayi ya bato na ngai bosolo ya boyei ya Klisto; mpo, na ntina oyo mobeko ya Mose mopesamaki; mpe makambo nyonso oyo epesamaki na Nzambe uta na ebandeli ya mokili, epayi ya moto, ezali elembo na ye.

5 Mpe lisusu molimo na ngai mosepelaka na mayokani ya Nkolo oyo asalaka na batata na biso; iyo, molimo na ngai mokosepela na ngolu na ye, mpe na boyengebene na ye, mpe nguya, mpe boboto na mwango monene mpe ya seko ya libiki uta na liwa.

6 Mpe molimo na ngai mokosepela na kolakisaka epayi ya bato na ngai ete bato nyonso basengeli kowa longola se soki Klisto ayei.

7 Mpo soki Klisto azali te Nzambe azali te; mpe soki Nzambe azali te biso mpe tozali te, mpo bokeli ekokaki kozala te. Kasi Nzambe azali, mpe azali Klisto, mpe akoya na litondi ya ntango ya ye moko.

8 Mpe sikawa nazali kokoma mwa maloba ya Yisaya, ete oyo nyonso ya bato na ngai baoyo bakomona maloba oyo batombola mitema na bango mpe basepela mpo na bato nyonso. Sikawa oyo ezali maloba, mpe bokoki kosalela yango mpo na bino mpe mpo na bato nyonso.

Bimisa na lokasa