Makomi
2 Nefi 10


Mokapo 10

Bayuda bakobaka Nzambe wa bango o ekulusu—Bakopalanganisama kina bakobanda kondima na ye—Amerika ekozala mboka ya lipanda wapi mokonzi moko te akoyangela—Zongisani boyokani yomei na Nzambe mpe longani lobiko o nzela ya ngolu ya ye. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa ngai, Yakobo, nakoloba epai ya bino lisusu, bandeko babali balingami ba ngai, etali etape sembo eye nalobelaki.

2 Mpo tala, bilako biye tozwi bizali bilako epai ya biso engebene na mosuni; yango wana, lokola elakisamaki epai ya ngai ete mingi ya bana ba biso bakowa o mosuni na ntina ya bozangi bondimi, nzokande, Nzambe akoyoka ngolu epai ya mingi; mpe bana ba biso bakozongisama, ete bakoka koya o eye ekopesa bango boyebi bwa solo bwa Mosikoli wa bango.

3 Yango wana, lokola elobaki ngai epai ya bino esengeli mpenza ezala elongobani ete Klisto—mpo o butu bwa nsuka anzelu alobaki epai ya ngai ete eye ekozala nkombo ya ye—akoya o ntei ya Bayuda, o ntei ya bango baye bazali eteni eleki nkuna ya mokili; mpe bakobaka ye o ekulusu—mpo boye elongobani na Nzambe wa biso, mpe ezali ekolo esusu te o mabele eye ekobaka o ekulusu Nzambe wa bango.

4 Mpo esalemaka makamwisi makasi o ntei ya bikolo bisusu balingaka koyambola, mpe koyeba ete azali Nzambe wa bango.

5 Kasi na ntina ya poloso ya banganga mpe mabe, baye o Yelusaleme bakotimbisa nkingo ya bango na ye, ete abakema o ekulusu.

6 Yango wana, na ntina ya masumu ma bango, bobebisami, nzala, bokono, mpe bosopi makila bokoya likolo lya bango; mpe baye bakobomama te bakopalanganisama o ntei ya bikolo binso.

7 Kasi tala, boye elobi Nkolo Nzambe: Ntango mokolo mokoya moye bakondima na ngai, ete nazali Klisto, nde eyokanaki ngai elongo na batata ba bango ete bakozongisama o mosuni, likolo lya mabele, epai ya mboka ya lisango lya bango.

8 Mpe ekosalema ete bakosangisama o kati uta o bopanzani bolai bwa bango, uta o bisanga bya mbu, mpe uta o ntaka inei ya mokili; mpe bikolo bya Bapaganu bikozala binene o miso mya ngai, elobi Nzambe, na komemeke bango o mboka ya lisango lya bango.

9 Iyo, bakonzi ba Bapaganu bakozala batata babokoli ba bango, mpe bamama bakonzi ba bango bakokoma bamama babokoli; yango wana, bilako bya Nkolo bizali binene epai ya Bapaganu, mpo alobaki yango, mpe nani akoki kotia ntembe?

10 Kasi tala, elobaki Nzambe, ekozala mboka ya lisango lya yo, mpe Bapaganu bakopambolama likolo lya mboka.

11 Mpe, mboka eye ekozala mboka ya lipanda epai ya Bapaganu, mpe ekozala bakonzi te likolo lya mboka, baye bakoteleme epai ya Bapaganu.

12 Mpe nakolendisa mboka eye o bikolo binso bisusu.

13 Mpe oyo akobunda na Siona akowa, elobi Nzambe.

14 Mpo oyo akotelemisa mokonzi moko na ngai akowa, mpo ngai, Nkolo, mokonzi wa lola, nakozala mokonzi wa bango, mpe nakozala mwinda moko epai ya bango libela, baye bakoyoka maloba ma ngai.

15 Yango wana, mpo ya ntina eye, ete mayokani ma ngai makoka kokokisama maye nasalaki epai ya bana ba bato, maye nakosala epai ya bango ntango ezali bango o mosuni, nasengeli mpenza kobebisa misala mya nkuku mya molili, mpe mya bobomi, mpe bonsomo.

16 Yango wana, oyo akobunda na Siona, Moyuda to Mopaganu lokola, mowumbu to monsomi lokola, mobali to mwasi lokola, bakowa; mpo baye bazali mwasi wa pite wa mabele manso; mpo bango baye bazali mpo ya ngai te bazali mpo ya mabe ma ngai, elobi Nzambe.

17 Mpo nakokokisa bilako biye nasalaki epai ya bana ba bato, biye nakosala epai ya bango o ntango ezali bango o mosuni—

18 Yango wana, bandeko babali balingami ba ngai, boye elobi Nzambe wa biso: Nakotungisa nkona ya yo na loboko la Bapaganu; nzokande, nakolembisa mitema mya Bapaganu, ete bazala bo tata moko na bango; yango wana, Bapaganu bakopambolama mpe bakotangema o ntei ya ndako ya Yisalaele.

19 Yango wana, nakobulisa mboka eye epai ya nkona ya yo, mpe bango baye bakotangema o ntei ya nkona ya yo, libela, lokola mboka ya lisango lya bango; mpo ezali mboka eponomo, elobi Nzambe epai ya ngai, likolo lya mboka inso isusu, yango wana nalingi bato banso baye bakofanda likolo lya yango ete bakumisa ngai, elobi Nzambe.

20 Mpe sikawa, bandeko babali balingami ba ngai, komonoko ete Nzambe wa biso wa ngolu apesaki biso boyebi bonene boye botali makambo maye, tomikundola ye, mpe totia mpembeni masumu ma biso, mpe tokitisa te mito mya biso, mpo tobwakami te mosika; nzokande, tokumbamaki libanda lya mboka ya lisango lya biso; kasi tokambemi o mboka yoko eleki elamu, mpo Nkolo akomisaki mbu nzela ya biso, mpe tozali likolo lya esanga yoko ya mbu.

21 Kasi enene ezali bilako bya Nkolo epai ya bango baye bazali likolo lya bisanga bya mbu; yango wana lokola elobami bisanga, esengeli mpenza ezala mingi koleka eye, mpe bifandami lokola na bandeko ba biso.

22 Mpo tala, Nkolo Nzambe akambi mosika mbala na mbala uta o ndako ya Yisalaele, engebene na bolingi mpe elengi ya ye. Mpe sikawa tala, Nkolo amikundoli bango banso baye babukamaki mpenza, yango wana amikundoli biso lokola.

23 Yango wana, sepelisani mitema mya bino, mpe bomikundola ete bozali bansomi mpo ya kosala mpo ya binomei—mpo ya kopono nzela ya liwa lya libela to nzela ya bomoi bwa seko.

24 Yango wana, bandeko babali balingami ba ngai, zongisani boyokani o bolingi bwa Nzambe, mpe te o bolingi bwa zabulu mpe mosuni; mpe bomikundola, ekosilisa bino kozongisa boyokani epai ya Nzambe, ete ezali bobele o kati ya mpe o nzela ya boboto bwa Nzambe ete bobikisami.

25 Yango wana, tika Nzambe asekwisa bino uta o liwa na nguya ya bosekwi, mpe lisusu uta o liwa lya libela na nguya ya botumbolami, ete boyambama o bokonzi bwa seko bwa Nzambe, ete bokoka kosanzola ye na ngolu ya Nzambe. Amene.