Makomi
2 Nefi 28


Mokapo 28

Biklezia mingi bya lokuta bikotongama o mikolo mya nsuka—Bakolakisa malako ma lokuta, ma mpamba mpe ma ligboma—Bopengwi bokozala beboo na ntina ya balakisi ba lokuta—Zabulu akongala o mitema mya bato—Akolakisa ndenge inso ya malongi ma lokuta. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa, tala, bandeko ba ngai, nalobaki na bino, engebene lokola Molimo asengisaki ngai; yango wana, nayebi solo ete masengeli kosalema.

2 Mpe makambo maye makokomama o buku makolongobana mpenza epai ya bana ba bato, mpe mpenza epai ya nkona ya biso, eye ezali montika mwa ndako ya Yisalaele.

3 Mpo ete ekosalema o mokolo mona moye biklezia biye bikotongama, mpe epai ya Nkolo te, ekoloba moko epai ya mosusu: Tala, ngai, nazali wa Nkolo; mpe basusu bakoloba: Ngai, nazali wa Nkolo; mpe boye ekoloba moko na moko oyo atongaki biklezia, mpe epai ya Nkolo te—

4 Mpe bakowela bango na bango; mpe banganga ba bango bakowela bango na bango, mpe bakolakisa na boyebi bwa bangomei, mpe bakoboya Molimo Mosantu, oyo akopesaka bolobi.

5 Mpe bakoboya nguya ya Nzambe, Mosantu Moko wa Yisalaele; mpe bakoloba epai ya bato: Yokemelani epai ya biso, mpe yokani mosise mwa biso; mpo tala, Nzambe azali te lelo, mpo Nkolo mpe Mosikoli asalaki mosala mwa ye, mpe apesaki nguya ya ye epai ya bato;

6 Tala, yokemelani epai ya mosise mwa ngai; soko bakoloba, ezali likamwisi lyoko lisalemi na loboko la Nkolo kondima yango te; mpo mokolo moye azali Nzambe wa makamwisi te; asalaki mosala mwa ye.

7 Iyo, mpe ekozala mingi bayo bakoloba: Liani, meleni, mpe sepelani, mpo lobi tokokufa; mpe ekozala bolamu mpo ya biso.

8 Mpe lisusu ekozala mingi baye bakoloba: Liani, meleni, mpe sepelani; nzokande, bangani Nzambe—akoyengebene na kosalaka lisumu lyoko like; iyo, kosani moke, zwani litomba lya moto na ntina ya maloba ma ye, timolani libulu mpo ya moto wa penepene na yo; ezali bobe te o eye; mpe salani makambo manso maye, mpo lobi tokokufa; mpe soko ezali ete tozali na elindo, Nzambe akobete biso na mbete ike, mpe o nsuka tokobikisama o bokonzi bwa Nzambe.

9 Iyo, mpe ekozala mingi bayo bakolakisa nsima ya lolenge loye, malongi ma lokuta mpe ma mpamba mpe ma ligboma, mpe bakovimbana o mitema mya bango, mpe bakoluka o bozindo kobomba toli ya bango na Nkolo; mpe misala mya bango mikozala o molili.

10 Mpe makila ma basantu makobelela uta o mabele likolo lya bango.

11 Iyo, bakei banso mpembeni ya nzela; babebi.

12 Na ntina ya lolendo, mpe na ntina ya balakisi ba lokuta, mpe malongi ma lokuta, biklezia bya bango bibebi, mpe biklezia bya bango bitombwani; mpe na ntina ya lolendo bavimbani.

13 Bayibi bakeleli mpo ya ndako isantu kitoko ya bango; bayibi bakeleli mpo ya bilamba bya bango bya malonga; mpe baniokoli basokemi mpe bakeleli o mitema, zambi bavimbani.

14 Balati nkingo itimba, mpe mito likolo, iyo, na ntina ya lolendo, mpe nkuna, mpe bonsomo, mpe pite, bakei mpembeni longola se bake, baye bazali balandi basawa ba Klisto; nzokande, bakambemi, ete mbala nzike babungi zambi balakisami na misise mya bato.

15 O bato ba bwania, mpe bayekola, mpe baye bavimbani o lolendo la mitema mya bango, mpe baye banso bateyi malongi ma lokuta, mpe baye banso basali pite, mpe basantoli nzela alima ya Nkolo, lisuma, lisuma, lisuma ezala epai ya bango, elobi Nkolo Nzambe wa Bokasi Bonso, mpo bakosukumama o limfelo!

16 Lisuma epai ya bango baye bakobalola mpembeni mosembo mpo ya likambo lyoko lya mpamba mpe bakotiola eye ezali elamu, mpe bakoloba ete elongobani te! Mpo mokolo mokoya moye Nkolo Nzambe akoya noki kobimela bafandi ba mabele; mpe o mokolo mona moye bakotela mpenza o bobe bakowa.

17 Kasi tala, soko bafandi ba mabele bakoyambola uta o nkuna mpe bonsomo bwa bango, bakobebisama te, elobi Nkolo wa Bibele.

18 Kasi tala, eklezia ena enene mpe ya nsomo, mwasi wa pite wa mabele manso, esengeli kobambama o mabele, mpe enene esengeli kozala bokwei bwa yango.

19 Mpo bokonzi bwa zabulu bosengeli boningana, mpe baye bazali ba bwango basengeli mpenza kolamusama epai ya boyamboli, to, zabulu akokanga bango o miniololo mya ye mya libela, mpe bakosengeniama na nkanda, mpe bakowa;

20 Mpo tala, o mokolo mona akongala o mitema mya bana ba bato, mpe akolamusa bango na nkanda likolo lya eye ezali elamu.

21 Mpe ekolembisa ye basusu, mpe kobondela bango epai ya bozangi bobangi bwa mosuni, ete bakoloba: manso mazali malamu o Siona; iyo, Siona azwi bomengo, manso mazali malamu—mpe boye zabulu akokosa milimo mya bato, mpe akokamba bango o na bokebi mosika o nse o limfelo.

22 Mpe tala, basusu baye akolete mosika, mpe akolobela bango limfelo lizali te; mpe akoloba epai ya bango: Nazali zabulu te, mpo azali te—mpe boye ayimisani o matoyi ma bango, kina agbati bango o miniololo mya ye mya nsomo, uta wapi ezali lobiko te.

23 Iyo, bagbatami na liwa, mpe limfelo; mpe liwa, mpe limfelo, mpe zabulu, mpe banso baye bakangemaki o yango bakoteleme liboso lya ngbende ya Nzambe, mpe kosambisama engebene na misala mya bango, uta wapi basengeli kokende o kati ya esika elengelemi mpo ya bango, kutu liziba lyoko lya moto mpe libanga lya fofolo, liye lizali monioko mozanga nsuka.

24 Yango wana, lisuma ezala epai ya ye oyo azali o kimia o Siona!

25 Lisuma ezala epai ya ye oyo akobelela: Manso mazali malamu.

26 Iyo, lisuma epai ya ye oyo akoyokemela epai ya misise mya bato, mpe akoboya nguya ya Nzambe, mpe likabo lya Molimo Mosantu!

27 Iyo, lisuma epai ya ye oyo akoloba: Tozwi, mpe tozali na ntina ya mosusu te!

28 Mpe o nsuka, lisuma epai ya bango baye banso bakolenge, mpe bakosilika na ntina ya bosolo bwa Nzambe! Mpo tala, oyo atongami likolo lya libanga akozwa yango o bosepeli; mpe oyo atongami likolo lya nse ya zelo, akolenge mbele akweya.

29 Lisuma epai ya ye oyo akoloba: Tozwi liloba lya Nzambe, mpe tozali te lisusu na ntina ya liloba lya Nzambe, mpo tozwi ekoki!

30 Mpo tala, boye elobi Nkolo Nzambe: Nakopesa epai ya bana ba bato monkoloto likolo lya monkoloto, mosise likolo lya mosise, awa moke mpe kuna moke; mpe bapambolami bango baye bakoyokemela epai ya mitindo mya ngai, mpe bakotia litoyi o toli ya ngai, mpo bakoyekola bwania; mpo epai ya ye oyo akoyamba nakopesa mingi koleka; mpe na bango baye bakoloba, Tozwi ekoki, na bango ekolongolama kutu eye bazwi.

31 Alakelami botutu ye oyo akotia elikia ya ye na moto, to azali kosala mosuni loboko la ye, to oyo akoyokemela epai ya misise mya bato, longola se soko misise mya bango mikopesama na nguya ya Molimo Mosantu.

32 Lisuma epai ya Bapaganu, elobi Nkolo Nzambe wa Bibele! Mpo ata nakotandola loboko la ngai epai ya bango uta mokolo na mokolo, bakoboya ngai; nzokande, nakoyoka ngolu epai ya bango, elobi Nkolo Nzambe, soko bakoyambola mpe bakoya epai ya ngai; mpo loboko la ngai lotandolami mikolo minso, elobi Nkolo Nzambe wa Bibele.