Makomi
2 Nefi 12


Mokapo 12

Yisaya amoni tempelo ya mikolo-mya-nsuka, bosangani bwa Yisalaele, mpe bosambisi mpe kimia ya nkoto yoko ya mibu—Bato ba lolendo mpe nkuna bakokitisama o nse o Boyei bwa Mibale—Mekisani Yisaya 2. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Liloba liye Yisaya, mwana mobali wa Amosi amonoki, liye litali Yuda mpe Yelusaleme:

2 Mpe ekosalema ete o mikolo mya nsuka, ekotiama ngomba ya ndako ya Nkolo o nsonge ya ngomba, mpe ekonetolama likolo lya ngomba patatalu, mpe bikolo binso bikosopana epai ya yango.

3 Mpe bato mingi bakokende mpe bakoloba, yakani tomata o ngomba ya Nkolo, o ndako ya Nzambe wa Yakobo; mpe akolakisa biso nzela ya ye, mpe tokotambola o balabala ya ye; mpo uta o Siona ekobima mobeko, mpe liloba lya Nkolo uta o Yelusaleme.

4 Mpe akosambisa o ntei ya bikolo, mpe akopamela bato mingi: mpe bakotuta mipanga mya bango mikoma nkongo, mpe makula ma bango makoma mbeli ya kokata bilanga—ekolo te ekotelemisa mopanga likolo lya ekolo esusu, mpe bakoyekola etumba lisusu te.

5 O ndako ya Yakobo, yakani mpe totambola o mwinda mwa Nkolo; iyo, yakani, mpo bino banso bokei mpembeni, moto na moto o nzela ya nkuna ya ye.

6 Yango wana, O Nkolo, osundolaki bato ba yo, ndako ya Yakobo, zambi batondisama uta o esti, mpe bayokemeli epai ya banganga nkisi lokola Bafilisitia, mpe bamisepelisi na bana ba bampaya.

7 Mboka ya bango lisusu etondi na mpauni mpe wolo, mpe ezali nsuka te ya bomengo bwa bango; mboka ya bango etondi lisusu na farasa, mpe ezali nsuka te na makalo ma bango.

8 Mboka ya bango etondi lisusu na ba nzambe ba bikeko; bakokumbamela mosala mwa maboko ma bangomei, moye misapi mya bangomei misalaki.

9 Mpe moto wa nse agumbami te, mpe moto monene amikitisi te, yango wana okolimbisa bango te.

10 O bato ba nkuna, kotani o kati ya libanga, mpe bomibomba o mputulu, mpo bobangi bwa Nkolo mpe nkembo ya lokumu la ye lokobete bino.

11 Mpe ekosalema ete botali bwa lofundo la moto bokokitisama mpe efundeli ya bato ekogumbama o nse, mpe Nkolo ye moko akonetolama o mokolo mona.

12 Mpo mokolo mwa Nkolo wa Bibele mosika te mokoya likolo lya bikolo binso, iyo, likolo lya moko na moko; iyo, likolo lya moto wa lolendo mpe moto wa lofundo, mpe likolo lya moko na moko atombolama, mpe akokitisama.

13 Iyo, mpe mokolo mwa Nkolo mokoya likolo lya nzete inso ya eleze ya Lebanona, mpo izali milai mpe itombwama mpe likolo lya nzete inso ya ela ya Basana;

14 Mpe likolo lya ngomba ilai inso, mpe likolo lya ngomba patatalu inso, mpe likolo lya bikolo binso biye bitombwama, mpe likolo bato na bato;

15 Mpe likolo lya linongi lilai linso, mpe likolo lya efelo enso ya lopango;

16 Mpe likolo lya masuwa manso ma mbu, mpe likolo lya masuwa manso ma Talasisi, mpe likolo lya bilili kitoko.

17 Mpe lofundo la moto lokogumbama o nse mpe efundeli ya bato ekokitisama; mpe Nkolo ye moko akonetolama o mokolo mona.

18 Mpe banzambe ba bikeko bakolimwa nie.

19 Mpe bakokende o kati ya madusu ma mabanga, mpe o kati ya makuku ma mabele, mpo bobangi bwa Nkolo bokoya likolo lya bango mpe nkembo mpe lokumu la ye lokobete bango, ekoteleme ye mpo ya kolengisa na nsomo mabele.

20 O mokolo mona moto moko akobwaka banzambe ba bikeko ba ye ba mpauni, mpe banzambe ba bikeko ba ye ba wolo, biye asala mpo ya yemei kokumbamela, o mitomba mpe mangembu;

21 Mpo ya kokende o kati ya minkaka mya mabanga, mpe o kati ya nsonge ya mabanga ma kilikili, mpo bobangi bwa Nkolo bokoya likolo lya bango mpe lokumu la nkembo ya ye lokobete bango, ekoteleme ye mpo ya koningisa na nsomo mabele.

22 Tikani moto, oyo ya ye mpema ezali o zolo ya ye; wapi azwi motuya?