Makomi
2 Nefi 5


Mokapo 5

Banefi bamikabwani na Balamani, babateli mobeko mwa Mose, mpe batongi tempelo yoko—Na ntina ya bozangi bondimi, Balamani bakatami mosika uta o miso mya Nkolo, balakelami botutu, mpe bakomi fimbo yoko epai ya Banefi. Penepene na 588–559 Yambo ya Klisto.

1 Tala, esalemaki ete ngai, Nefi, nabondelaki mbala nzike na Nkolo Nzambe wa ngai, na ntina ya nkanda ya bandeko babali ba ngai.

2 Kasi tala, nkanda ya bango ebakisamaki likolo lya ngai, mingi ete balukaki kolongola bomoi bwa ngai.

3 Iyo, bayimayimaki likolo lya ngai, kolobaka: Ndeko mobali wa leki wa biso akanisi koyangela likolo lya biso; mpe tozali na momekano moike na ntina ya ye; yango wana, sikawa tika ete toboma ye, ete tokoka kotungisama lisusu te na ntina ya maloba ma ye. Mpo tala, tolingi kozala na ye te lokola moyangeli wa biso; mpo ezali mpo ya biso, baye tozali bankulutu, koyangela likolo lya bato baye.

4 Sikawa nakokoma te likolo lya palaki iye maloba manso bayimayimaki likolo lya ngai. Kasi ekoki mpo ya ngai koloba, ete balukaki kolongola bomoi bwa ngai.

5 Mpe esalemaki ete Nkolo akebisaki ngai, mpo ete ngai, Nefi, natika bango mpe nakima o kati ya esobe, mpe bango banso baye bakolinga kokende elongo na ngai.

6 Yango wana, esalemaki ete ngai, Nefi, nakamataki libota lya ngai, mpe Zolami mpe libota lya ye, mpe Sami, ndeko mobali wa nkulutu wa ngai mpe libota lya ye, mpe Yakobo mpe Yosefe, bandeko babali ba leki ba ngai, mpe lisusu bandeko basi ba ngai, mpe bango banso baye balingaki kokende elongo na ngai. Mpe bango banso baye balingaki kokende elongo na ngai bazalaki bango baye bandimaki o bokebisi mpe mabimisi ma Nzambe; yango wana, bayokemelaki epai ya maloba ma ngai.

7 Mpe tokamataki biema bya biso mpe biloko binso bikokaki mpo ya biso, mpe tokendeki mobembo o esobe mpo ya ntaka ya mikolo mingi. Mpe esilisaki biso kokende mobembo mpo ya ntaka ya mikolo mingi totelemisaki biema bya biso.

8 Mpe bato ba ngai balingaki ete babianga nkombo ya esika Nefi; yango wana, tobiangaki yango Nefi.

9 Mpe bango banso baye bazalaki elongo na ngai bakamataki likolo lya bango kobiangema bato ba Nefi.

10 Mpe totosaki kobatela masambisi, mpe meko, mpe mitindo mya Nkolo o makambo manso, engebene na mobeko mwa Mose.

11 Mpe Nkolo azalaki elongo na biso; mpe tozwaki bomengo mpenza; mpo tokonaki nkona, mpe o nsima tobukaki beboo. Mpe tobandaki kobokola bibwele, mpe bitonga, mpe niama ya lolenge na lolenge.

12 Mpe ngai, Nefi, nakumbaki makundoli maye makomami likolo lya palaki ya motako; mpe lisusu libungutulu, to kompa, liye lilengelemeki mpo ya tata wa ngai na loboko la Nkolo, engebene na eye ekomami.

13 Mpe esalemaki ete tobandaki kozwa bomengo mpenza, mpe toyikanaki o mboka.

14 Mpe ngai, Nefi, nakamataki mopanga mwa Labana, mpe nsima ya lolenge la mwango nasalaki mipanga mingi, mbele o yoko nzela bato baye babiangemi sikawa Balamani baya likolo lya biso mpe babebisa biso; mpo nayebaki boyini bwa bango ona ngai mpe bana ba ngai mpe bango baye babiangemi bato ba ngai.

15 Mpe nalakisaki bato ba ngai kotonga ndako inene, mpe kosala ndenge inso ya mabaya, mpe ya ebende, mpe ya mbengi, mpe ya motako, mpe ya ebende ekasi, mpe ya wolo, mpe ya mpauni, mpe ya mabanga ma ntalo, maye mazalaki beboo mpenza.

16 Mpe ngai, Nefi, natongaki tempelo yoko; mpe natongaki yango nsima ya lolenge la tempelo ya Solomo longola se ete etongamaki te na biloko bya motuya boye; mpo bizwamaki likolo lya mboka te, yango wana, ekokaki kotongama te lokola tempelo ya Solomo. Kasi lolenge la etongeli ezalaki bo eye ya tempelo ya Solomo; mpe esaleli ya yango ezalaki malonga mpenza.

17 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nasalaki bato ba ngai bazala balinga mosala, mpe basala na maboko ma bango.

18 Mpe esalemaki ete balingaki ete nazala mokonzi wa bango. Kasi ngai, Nefi, nazalaki na mposa ete bazala te na mokonzi; nzokande, nasalaki mpo ya bango engebene na eye ezalaki o nguya ya ngai.

19 Mpe tala, maloba ma Nkolo makokisamaki epai ya bandeko babali ba ngai, maye alobaki etali bango, ete nakozala moyangeli wa bango mpe molakisi wa bango. Yango wana, nazalaka moyangeli wa bango mpe molakisi wa bango, engebene na mitindo mya Nkolo kina o ntango balukaki kolonga bomoi bwa ngai.

20 Yango wana, liloba lya Nkolo likokisamaki liye alobaki epai ya ngai, kolobaka ete: Mbala nzike lokola bakoyokemela te epai ya maloba ma ye bakokatama mosika uta o miso mya Nkolo. Mpe bakatamaki mosika uta o miso mya ye.

21 Mpe asalaki ete botutu boya likolo lya bango, iyo, kutu botutu bwa nsomo, na ntina ya bobe bwa bango. Mpo tala, bayeisaki mitema mya bango mikasi na ye ete mikomaki bo libanga likasi; yango wana, lokola ezalaki bango mpembe, mpe malonga mpenza mpe banzenga, mpo ete bakoka kozala te lisenginia epai ya bato ba ngai Nkolo Nzambe asalaki ete mposo ya molili eya likolo lya bango.

22 Mpe boye elobi Nkolo Nzambe: Nakosala ete bakozala bosoto epai ya bato ba yo, longola se soko bakoyambola mitema uta o mabe ma bango.

23 Mpe ekolakelama botutu nkona ya ye oyo akosangana elongo na bango; mpo bakolakelama botutu kutu na botutu bona kaka. Mpe Nkolo alobaki yango, mpe esalemaki.

24 Mpe na ntina ya botutu bwa bango boye bozalaki likolo lya bango bakomaki bato ba goigoi, batonda na nko mpe mayela mabe, mpe balukaki o esobe niama ya zamba.

25 Mpe Nkolo Nzambe alobaki epai ya ngai: Bakozala fimbo yoko epai ya nkona ya yo, mpo ya kolamusa bango o bokundoli bwa ngai; mpe mbala nzike lokola bakomikundola ngai te, mpe bakoyokemela te epai ya maloba ma ngai, bakofiakola bango kutu kina o bobebisami.

26 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nabulisaki Yakobo mpe Yosefe, ete bazala banganga mpe balakisi likolo lya mboka ya bato ba ngai.

27 Mpe esalemaki ete tofandaki nsima ya lolenge la esengo.

28 Mpe mibu ntuku misato milekaki uta totikaki Yelusaleme.

29 Mpe ngai, Nefi, nabatelaki makundoli ma bato ba ngai likolo lya palaki, iye nasalaki, etali bato ba ngai kina sikawa.

30 Mpe esalemaki ete Nkolo Nzambe alobaki epai ya ngai: Sala palaki isusu; mpe okokoma makambo mingi likolo lya yango maye mazali malamu o miso mya ngai, mpo ya litomba lya bato ba yo.

31 Yango wana, ngai, Nefi, mpo ya kozala na botosi o mitindo mya Nkolo, nakendeki mpe nasalaki palaki iye likolo lya yango nakomaki makambo maye.

32 Mpe nakomaki eye ezali elengi epai ya Nzambe. Mpe soko bato ba ngai basepelisami na makambo ma Nzambe bakosepelisama na minkoma mya ngai miye mizali likolo lya palaki iye.

33 Mpe soko bato ba ngai balingi koyeba eteni etali mingi ya mambi ma bato ba ngai basengeli koluka palaki ya ngai isusu.

34 Mpe ekoki mpo ya ngai koloba ete mibu ntuku minei milekaki, mpe tozalaka kala na bitumba mpe boweli na bandeko babali ba biso.