Makomi
2 Nefi 29


Mokapo 29

Bapaganu mingi bakobwaka Buku ya Molomoni—Bakoloba, Tolingi Biblia esusu te—Nkolo alobi o Bikolo mingi—Akosambisa mokili uta o buku iye ikokomama. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Kasi tala, ekozala mingi—o mokolo mona ntango nakobanda kosala mosala mwa bokamwi o ntei ya bango, ete nakoka komikundola mayokani maye nasalaki epai ya bana ba bato, ete nakoka kotia loboko la ngai lisusu mbala ya ibale mpo ya kobutwisa bato ba ngai, baye bazali baye ndako ya Yisalaele;

2 Mpe lisusu, ete nakoka komikundola bilako biye nasalaki epai ya yo, Nefi, mpe lisusu epai ya tata wa yo, ete nakomikundola nkona ya yo; mpe ete maloba ma nkona ya yo makobima o monoko mwa ngai epai ya nkona ya yo; mpe maloba ma ngai makobete piololo epai ya nsuka ya mabele, mpo ya elembo epai ya bato ba ngai, baye bazali baye ndako ya Yisalaele;

3 Mpe zambi maloba ma ngai maye makobete piololo—Bapaganu mingi bakoloba: Biblia! Biblia! Tozali na Biblia, mpe ekoki kozala Biblia esusu te.

4 Kasi boye elobi Nkolo Nzambe: O bato ba ligboma, bakozala na Biblia; mpe ekobima uta na Bayuda, bato ba boyokani bwa ngai bwa kala. Mpe etondi bango nini Bayuda mpo ya Biblia eye bazwi na bango? Iyo, elingi Bapaganu koloba nini? Emikundoli bango boswi, misala, mpe mpasi ya Bayuda, mpe etingia ya bango epai ya ngai, na kokumbaka lobiko epai ya Bapaganu?

5 O bino Bapaganu, emikundolaki bino Bayuda, bato ba boyokani bwa ngai bwa kala? Te; kasi bolakelaki bango botutu, mpe boyinaki bango, mpe bolukaki te kobutwisa bango. Kasi tala, nakozongisa makambo manso maye likolo lya mito mya bino; mpo ngai Nkolo nabosani bato ba ngai te.

6 Yo moto wa ligboma, oyo okoloba: Biblia yoko, tozali na Biblia yoko, mpe tozali na ntina ya Biblia esusu te. Ezwi bino Biblia yoko soko ezali na Bayuda te?

7 Eyebi bino te ete ezali bikolo mingi koleka moko? Eyebi bino te ete ngai, Nkolo Nzambe wa bino, nakelaki bato banso, mpe ete nakomikundola bango baye bazali likolo lya bisanga bya mbu; mpe ete nakoyangela o lola likolo mpe o mabele o nse; mpe nakokumba maloba ma ngai epai ya bana ba bato, iyo, kutu likolo lya bikolo binso bya mabele.

8 Yango wana, bozali koyimayima, zambi ete bokozwa maloba ma ngai mingi koleka? Eyebi bino te ete litatoli lya bikolo bibale lizali litatoli lyoko epai ya bino ete nazali Nzambe, ete nakomikundola ekolo yoko bo esusu? Yango wana, nakoloba maloba mango kaka epai ya ekolo yoko bo epai ya esusu. Mpe ekokima bikolo bibale elongo, litatoli lya bikolo bibale likokima elongo lokola.

9 Mpe nakosala eye ete nakoka kolakisa epai ya mingi ete nazali ngai kaka lobi, lelo, mpe libela; mpe ete nakoloba maloba ma ngai engebene na elengi ya ngai. Mpe zambi ete nalobaki liloba lyoko bozali te na ntina ya kobanza ete nakoki koloba lisusu te; mpo mosala mwa ngai mosili naino te; mpe te uta o ntango ena kina sikawa mpe libela.

10 Yango wana, zambi ete bozali na Biblia yoko bozali te na ntina ya kobanza ete ekwi maloba manso ma ngai; mpe te na ntina ya kobanza ete nasalaki te mingi esusu ekomama.

11 Mpo nakotinda bato banso, o esti mpe o westi lokola, mpe o nordi, mpe o sude, mpe o bisanga bya mbu, ete bakokoma maloba maye nakoloba epai ya bango; mpo uta o buku iye ikokomama nakosambisa mokili, moto na moto engebene na misala mya ye, engebene na eye ekomama.

12 Mpo tala, nakoloba epai ya Bayuda mpe bakokoma yango; mpe nakoloba lokola epai ya Banefi mpe bakokoma yango; mpe nakoloba lokola epai ya mabota masusu ma ndako ya Yisalaele, maye nakambaki mosika, mpe bakokoma yango; mpe nakoloba o bikolo binso bya mokili mpe bikokoma yango.

13 Mpe ekosalema ete Bayuda bakozala na maloba ma Banefi, mpe Banefi bakozala na maloba ma Bayuda; mpe Banefi mpe Bayuda bakozala na maloba ma mabota mabunga ma Yisalaele; mpe mabota mbunga ma Yisalaele makozala na maloba ma Banefi mpe Bayuda.

14 Mpe ekosalema ete bato ba ngai, baye bazali baye ndako ya Yisalaele, bakosangisama epai ya bango o mboka ya bozwi bwa bango; mpe maloba ma ngai makosangisama o lyoko. Mpe nakolakisa epai ya bango baye bakobundisa liloba lya ngai mpe bato ba ngai, baye bazali baye ndako ya Yisalaele, ete nazali Nzambe, mpe ete nayokanaki elongo na Abalayama ete nakomikundola nkona ya ye libela.