Makomi
2 Nefi 6


Mokapo 6

Yakobo apesi lisusu lisolo ya mambi ya kala ya Bayuda: Bokangemi na Babiloni mpe bozongi; mosala mpe bobakami ya Moko Mosantu ya Yisalaele na ekulusu; lisalisi oyo ezwamaki uta na baoyo bazali Bayuda-te; mpe bozongisi ya Bayuda na mokolo ya nsuka ntango bakozala na bondimi na Masiya. Penepene na mibu 559–545 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Maloba ya Yakobo, ndeko ya Nefi ya mobali, oyo alobaki na bato ya Nefi:

2 Tala, balingami bandeko na ngai ya mibali, ngai Yakobo, lokola nabiangamaki na Nzambe, mpe nakulisamaki engebene na molongo mosantu na ye, mpe nabulisamaki na ndeko na ngai ya mobali Nefi, oyo bozali kotala lokola mokonzi to mobateli, mpe oyo kani bokengi na bino etali ye, tala boyebi ete nalobelaki bino makambo mingi koleka mpenza.

3 Nzokande, nazali kolobela bino lisusu; mpo nazali na mposa ya bolamu ya milimo na bino. Iyo, motema na ngai mozali likolo-likolo mpo na bino; mpe bino moko boyebi ete mozalaka ntango nyonso. Mpo nalendisaki bino na molende nyonso; mpe nalakisaki bino maloba ya tata na ngai; mpe nalobelaki bino mpo na oyo etali makambo nyonso oyo ekomama, uta na bokeli ya mokili.

4 Mpe sikawa, tala, nalingi koloba epayi na bino mpo na oyo etali makambo oyo ezali, mpe oyo esengeli koya; yango wana, nakotangela bino maloba ya Yisaya. Mpe ezali maloba oyo ndeko na ngai ya mobali alingaki ete nalobela bino. Mpe nazali kolobela bino mpo na litomba na bino, ete bokoka koyekola mpe kokembela nkombo ya Nzambe na bino.

5 Mpe sikawa, maloba oyo nakotanga ezali oyo Yisaya alobaki mpo na oyo etali ndako nyonso ya Yisalaele; yango wana, bakoki kokokana na bino, mpo bozali bato ya ndako ya Yisalaele. Mpe ezali na makambo mingi elobama na Yisaya oyo makoki kokokisama na bino, mpo ete bozali bato ya ndako ya Yisalaele.

6 Mpe sikawa, oyo ezali maloba yango: Boye elobi Nkolo Nzambe: Tala, nakotombola loboko na ngai na baoyo bazali Bayuda-te, mpe nakotelemisa bendele na ngai epayi ya bato; mpe bakokumba bana mibali na yo na maboko na bango, mpe bana basi na yo bakomemama likolo ya mapeka na bango.

7 Mpe bakonzi bakozala batata babokoli na yo, mpe basi ya bakonzi na bango bamama babokoli na yo; bakogumbamela yo na bilongi na bango na mabele, mpe bakolambola mputulu ya makolo na yo; mpe okoyeba ete nazali Nkolo, mpo baoyo bazelaka ngai bakoyokisama nsoni te.

8 Mpe sikawa ngai, Yakobo, nalingi koloba mwa moke mpo na oyo etali maloba oyo. Mpo tala, Nkolo alakisi ngai ete bango oyo bazalaki na Yelusaleme, uta wapi toyaki, babomami, mpe bamemami bakangemi mosika.

9 Nzokande, Nkolo alakisi na epayi ngai ete bakozonga lisusu. Mpe lisusu alakisi epayi na ngai ete Nkolo Nzambe, Mosantu ya Yisalaele, akomimonisa epayi na bango na mosuni; mpe na nsima na ye komimonisa epayi na bango bakofiakola ye mpe bakobaka ye na ekulusu, engebene na maloba ya anjelu oyo alobaki yango epayi na ngai.

10 Mpe na nsima na bango koyeisa mitema na bango makasi mpe kotiya matoyi mangongi epayi na Mosantu ya Yisalaele, tala, masambisi ya Mosantu ya Yisalaele ekoya likolo na bango. Mpe mokolo ekoya oyo wapi bakobetama mpe bakonyokwama.

11 Yango wana, ekosila bango kokumbama epayi na epayi, mpo boye elobi anjelu, mingi bakotungisama na mosuni, mpe bakopesama te nzela ya kowa, na ntina ya sambo ya bato ya bosembo; bakopanzama, mpe bakobetama, mpe bakoyinama; nzokande, Nkolo akotonda na boboto mpo na bango, ete ntango bakokoma na boyebi ya Mosikoli na bango, bakosangana esika moko lisusu na mboka ya bosangoli libula na bango.

12 Mpe bapambolami ezali baoyo bazali Bayuda-te, bango mpo na baoyo kani profeta akomaki; mpo tala, soki ekozala bongo ete bakoyambola mpe bakobunda te na Siona, mpe bakosangana te na eklezia monene mpe ya nsomo wana, bakobikisama; mpo Nkolo Nzambe akokokisa mayokani oyo asalaki mpo na bana na ye; mpe mpo na ntina oyo profeta akomaki makambo oyo.

13 Yango wana, baoyo bakobunda na Siona mpe bato ya liyokani ya Nkolo, bakolembola mputulu ya makolo na bango; mpe bato ya Nkolo bakoyoka nsoni te. Mpo bato ya Nkolo bazali baoyo bazelaka ye; mpo bazali naino kozela boyei ya Masiya.

14 Mpe tala, engebene na maloba ya profeta, Masiya akomitiya lisusu mbala ya mibale mpo na kozwa bango lisusu; yango wana, akomimonisa epayi na bango na nguya mpe nkembo monene, mpo na bobebisami ya banguna na bango, ekoya mokolo wana ntango bakondima ye; mpe akobebisa moko te na baoyo bakondima ye.

15 Mpe baoyo bakondima ye te bakobebisama, ezala na moto, mpe na ekumbaki, mpe na boningani ya mabele, mpe na bosopi makila, mpe na bokono, mpe na nzala. Mpe bakoyeba ete Nkolo azali Nzambe, Moko Mosantu ya Yisalaele.

16 Mpo ekobotola bato biloko bakangi na bitumba na bato ya makasi, soki mpe ebikisaka bato bakangemi ya mibeko?

17 Kasi Nkolo alobi boye: kutu bakangemi ya bato ya makasi bakolongolama, mpe biloko bakangi na bitumba na moto ya nsomo ekobikisama; mpo Nzambe Ya Bokasi akobikisa bato na ye ya liyokani. Mpo Nkolo alobi boye: Nakobundisa baoyo bazali kobundisa yo—

18 Mpe nakoleisa bango oyo bakoniokola yo, na mosuni na bango moko; mpe bakolangwisama na makila na bango moko lokola na vinyo ya sukali; mpe mosuni nyonso mokoyeba ete ngai Nkolo nazali Mobikisi mpe Mosikoli na yo, Oyo ya Bokasi ya Yakobo.

Bimisa na lokasa