Makomi
2 Nefi 8


Mokapo 8

Yakobo akobi kotanga uta na Yisaya: Na mikolo ya nsuka, Nkolo akobondisa Siona mpe akosangisa Yisalaele—Basikolami bakoya na Siona kati na bosepeli monene—Meka na Yisaya 51 mpe 52:1–2. Penepene na mibu 559–545 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Boyoka ngai, bino baoyo bolukaka kozwa bosembo. Botala epayi na libanga uta wapi bopasolamaki, mpe epayi na lidusu ya libulu uta wapi botimolamaki.

2 Botala epayi ya Abalayama tata na bino, mpe epayi na Salai, oyo abotaki bino; mpo nabiangaki ye moko, mpe napambolaki ye.

3 Mpo Nkolo akobondisa Siona, akobondisa bisika na ye nyonso bibeba; mpe akokomisa esobe na ye lokola Edene, mpe eliki na ye lokola elanga ya Nkolo. Bosepeli mpe nsai ekozwama kuna, botondi mpe mongongo ya loyembo kitoko mpe lokola.

4 Boyoka ngai, bato na ngai; mpe botia litoyi epayi na ngai, O ekolo na ngai; mpo mobeko mokobima uta na ngai, mpe nakosala ete bosambisi na ngai ezala lokola pole mpo na bato.

5 Bosembo na ngai ezali penepene; lobiko na ngai ekokende, mpe loboko na ngai ekosambisa bato. Bisanga bikozela ngai, mpe bakotiela loboko na ngai motema.

6 Botombola miso na bino na lola, mpe botala mabele na nse; mpo lola ekolimwa lokola molinga, mpe mabele makonuna lokola elamba; mpe baoyo bafandi likolo na yango bakokufa na lolenge wana kaka. Kasi lobiko na ngai ekozala libela, mpe bosembo na ngai ekosila te.

7 Boyoka ngai, bino baoyo boyebi bosembo, bato na mitema ya baoyo kani nasili kokoma mobeko na ngai, bobanga mpamela ya bato te, mpe bobanga mafinga na bango te.

8 Mpo lompomboli ekolia bango nie lokola elamba, mpe mpambo ekolia bango lokola nkunza ya mpate. Kasi bosembo na ngai bokozala libela, mpe lobiko na ngai uta nkola na nkola.

9 Lamuka, lamuka! Lata makasi, O loboko ya Nkolo; Lamuka lokola na mikolo ya kala. Ezali yo te oyo akataki Laba, mpe azokisaki nyoka?

10 Ezali yo te oyo akausaki mai ya mbu, mai ya mozindo monene; oyo akomisaki bozindo ya mai nzela mpo ete basikolami baleka likolo?

11 Boye, basikolami ya Nkolo bakozonga, mpe bakoya koyembaka epayi na Siona; mpe bosepeli mpe bosantu ya libela ekozala likolo ya mitu na bango; mpe bakozwa nsai mpe bosepeli; mpe mawa mpe kolela ekokima mosika.

12 Nazali ye; iyo, nazali ye oyo abondisaka yo. Tala, ozali nani, ete osengeli kobanga moto, oyo akokufa, mpe mwana ya moto, oyo azali lokola matiti?

13 Mpe obosana Nkolo mozalisi na yo, oyo atandolaki lola, mpe atongaki efandeli ya mabele, mpe ozalaki ntango nyonso kobanga mokolo na mokolo, na ntina ya nkanda mabe ya moto ya monyokoli, lokola soki azalaki penepene na kobebisa? Mpe nkanda mabe ya moto ya monyokoli yango ezali wapi?

14 Mokangemi na mboka mopaya akosalaka mbangu, ete akoka kokangolama, mpe ete akufa te na libulu, soki te ete lipa na ye ezanga te.

15 Kasi nazali Nkolo Nzambe na yo, oyo kani mbonge egangaka; Nkolo na Bibele ezali nkombo na ngai.

16 Mpe natie maloba na ngai na monoko na yo, mpe nazipi yo na elilingi ya loboko na ngai, ete nakoka kowana lola mpe kotonga efandeli efandeli ya mabele, mpe koloba epayi na Siona: Tala, bozali bato na ngai.

17 Lamuka, lamuka, telema, O Yelusaleme, oyo ameli nkeni ya nkanda mabe na ye na loboko ya Nkolo—omelaki kino na ndala ya nkeni oyo esalaki yo kolengalenga—

18 Mpe moko te mpo na kokamba ye na kati ya bana mibali nyonso oyo abotaki; oyo ya kokamata ye na loboko mpe te, uta na kati ya bana mibali nyonso oyo akolisaki.

19 Bana mibali mibale oyo bayaki epayi na yo, nani akoyokela yo mawa—libebi mpe bosilisami na yo, mpe nzala mpe mompanga—mpe nakobondisa ngai yo na lisalisi ya nani?

20 Bana mibali na yo bakwei, longola se baye mibale; balali na moto ya balabala nyonso; lokola ngombe ya mobali ya zamba na moniama, batondi na nkanda mabe ya Nkolo, mpamela ya Nzambe na yo.

21 Boye tia litoyi sikawa na oyo, yo moto oyo atungisami, mpe moto ya molangwa, kasi na vinyo te:

22 Boye elobi Nkolo na yo, Nkolo mpe Nzambe na yo akosamba likambo ya bato na ye; tala, nalongolaki uta na loboko na yo nkeni ya bolengisi, ndala ya nkeni ya nkanda mabe na ngai; okomela yango lisusu te.

23 Kasi nakotia yango na loboko na bango oyo batungisaka yo; baoyo balobi na molimo na yo: Gumbama na nse, ete tokoka koleka likolo—mpe olalisaki nzoto na yo lokola mabele mpe lokola nzela mpo na bango ete balekaki likolo.

24 Lamuka, lamuka, lata bokasi na yo, O Siona; lata bilamba kitoko na yo, O Yelusaleme, engumba esantu; uta sikawa kokende liboso baoyo bakatama ganza te mpe bato ya mbindo bakoya lisususu te kati na yo.

25 Miningisa yo moko uta na mputulu; telema, fanda, O Yelusaleme; mikangola uta na singa ya nkingo na yo, O mwana mwasi mokangemi ya Siona.

Bimisa na lokasa