Makomi
2 Nefi 7


Mokapo 7

Yisaya alobi bomasiya—Masiya akozala na lolemo la bato bayekola—Akopesa mokongo mwa ye o babeti—Akobulunganisama te—Mekisani Yisaya 50. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Iyo, boye elobi Nkolo: Ebenganaki ngai yo, to ebwakaki ngai yo mosika libela? Mpo, boye elobi Nkolo: Wapi mokanda mwa bopanzi libala lya mama wa bino? Na nani nabengana bino, to na modefisi kani nateke bino? Iyo, na nani nateke bino? Tala, mpo ya mabe ma bino bomiteki binomei, mpe mpo ya bobuki mibeko bwa bino mama wa bino abenganami.

2 Yango wana, ntango nayaki, ezalaki moto te; ntango nabiangaki, iyo, ezalaki moto te mpo ya koyanola. O ndako ya Yisalaele, ekomi loboko la ngai lokuse mpenza ete lokoka kosikola te, to nazali na nguya te mpo ya kobikisa? Tala, o mpamela ya ngai nakokaukisa mbu, nakokomisa bibale bya bango esobe mpe mbisi ya bango ikolumba nsolo ebe zambi mai makauki, mpe bakokufa na ntina ya mposa ya mai.

3 Nakolatisa lola na boindo, mpe nakokomisa elamba ya saki ezipele ya lwango.

4 Nkolo Nzambe apesi ngai lolemo la baye bayekola, ete nayeba boniboni koloba liloba o ntango epai ya yo, O ndako ya Yisalaele. Ezali yo o bolembi akolamuka ntongo na ntongo. Akolamusa litoyi lya ngai mpo ya koyoka lokola baye bayekola.

5 Nkolo Nzambe afungolaki litoyi lya ngai, mpe nazalaki motomboki te, to mpe nazongaki nsima te.

6 Napesaki mokongo mwa ngai epai ya babeti, mpe matama ma ngai na bango baye bapikolaki nsuki. Nabombaki te elongi ya ngai o nsoni mpe nsoi.

7 Mpo Nkolo Nzambe akosalisa ngai, yango wana nakobulunganisama te. Yango wana nakomisaki elongi ya ngai bo libanga lyoko, mpe nayebi ete nakoyokisama nsoni te.

8 Mpe Nkolo azali penepene, mpe akoyengebene ngai. Nani akowela na ngai? Tika toteleme elongo. Nani azali moyini wa ngai? Tika ye aya penepene na ngai, mpe nakobete ye na makasi ma monoko mwa ngai.

9 Mpo Nkolo Nzambe akosalisa ngai. Mpe baye banso bakokitisa ngai, tala, bango banso bakokoma ya kala lokola elamba yoko, mpe mpomboli ekolia bango nie.

10 Nani azali o ntei ya bino oyo akobanga Nkolo, oyo akotosa mongongo mwa mosali wa ye, oyo akotambola o molili mpe azali o mwinda te?

11 Tala bino banso baye bokopelisa moto, baye bokomizinga na esungi, tambolani o mwinda mwa moto mwa bino mpe o esungi iye bopelisaki. Eye bokozwa na loboko la ngai—bokolala o nse na mawa.