Makomi
2 Nefi 4


Mokapo 4

Lehi apesi toli mpe apamboli bana ba ye—Akufi mpe akundami—Nefi akembeli na bolamu bwa Nzambe—Nefi atii bondimi bwa ye na Nkolo libela. Penepene na 588–570 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa, ngai, Nefi, nakoloba etali mabikuli maye tata wa ngai alobaki, etali Yosefe, oyo amememeki o kati ya Ejipito.

2 Mpo tala, solo abikulaki etali nkona ya ye mobimba. Mpe mabikuli maye akomaki mazali te manene mingi koleka. Mpe abikulaki etali biso, mpe nkona ya biso nsima; mpe makomami o palaki ya motako.

3 Yango wana, esilisaki tata wa ngai kotia nsuka yoko ya mabikuli ma Yosefe, abiangaki bana ba Lamani, bana babali ba ye mpe bana basi ba ye, mpe alobaki epai ya bango: Tala, bana babali ba ngai, mpe bana basi ba ngai, bino bozali bana babali mpe bana basi ba mobotami wa ngai-wa-yambo, nalingi ete bopesa litoyi epai ya maloba ma ngai.

4 Mpo Nkolo Nzambe alobaki ete: Mbala nzike lokola bokobomba mitindo mya ngai, bokozwa bomengo o mboka; mbala nzike lokola bokobomba te mitindo mya ngai bokokatama mosika uta o miso mya ngai.

5 Kasi tala, bana babali ba ngai mpe bana basi ba ngai, nakoki te kokita o lilita lya ngai longola se soko nakotika lipamboli lyoko likolo lya bino; mpo tala, nayebi ete soko bokolisami o nzela bosengeli kokende bokotika yango te.

6 Yango wana, soko bolakelami botutu, tala, natiki lipamboli lya ngai likolo lya bino, ete botutu bokoka kolongwa uta na bino mpe bokoyanolama likolo lya mito mya baboti ba bino.

7 Yango wana, na ntina ya lipamboli lya ngai Nkolo Nzambe akotika te ete bowa; yango wana, akozala na ngolu epai ya bino mpe epai ya nkona ya bino.

8 Mpe esalemaki ete esilisaki tata wa ngai kotia nsuka yoko ya bolobi na bana babali mpe bana basi ba Lamani, asalaki ete bana babali mpe bana basi ba Lemuele bamememe liboso lya ye.

9 Mpe alobaki epai ya bango, kolobaka: Tala bana babali mpe bana basi ba ngai, bino bozali bana babali mpe bana basi ba mwana mobali wa mibale wa ngai; tala natiki epai ya bino lipamboli lina kaka natiki epai ya bana babali mpe bana basi ba Lamani; yango wana, bokobebisama mobimba te; kasi o nsuka nkona ya bino ekopambolama.

10 Mpe esalemaki ete etiaki tata wa ngai nsuka yoko ya bolobi epai ya bango, tala, alobaki epai ya bana babali ba Yisamaele, iyo, mpe kutu ndako ya ye mobimba.

11 Mpe esilisaki ye kotia nsuka yoko ya bolobi epai ya bango, alobaki epai ya Sami, kolobaka: Opambolami, mpe nkona ya yo; mpo okosangola mboka bo ndeko wa yo Nefi. Mpe nkona ya yo ekotangema elongo na nkona ya ye; mpe okozala kutu bo ndeko mobali wa yo, mpe nkona ya yo bo nkona ya ye; mpe okopambolama o mikolo mya yo minso.

12 Mpe esalemaki ete esilaka tata wa ngai, Lehi, koloba epai ya banso baye ndako ya ye, engebene na mayoki ma motema mwa ye, mpe Molimo mwa Nkolo oyo azalaki na ye, akomaki mobange. Mpe esalemaki ete akufaki, mpe akundamaki.

13 Mpe esalemaki ete mikolo mingi te nsima ya liwa lya ye, Lamani mpe Lemuele mpe bana babali ba Yisamaele basilikaki na ngai na ntina ya mpamela ya Nkolo.

14 Mpo ngai, Nefi, nasengisamaki naloba epai ya bango, engebene na maloba ma ye; mpo nalobaki makambo mingi epai ya bango, mpe tata wa ngai lokola, yambo ya liwa lya ye; mingi ya mango maloba makomami likolo lya palaki ya ngai isusu; mpo eteni etali mingi bonkoko ekomami likolo lya palaki ya ngai isusu.

15 Mpe likolo lya iye nakokoma makambo ma bozo bwa ngai, mpe mingi ya nkoma iye ikomami o palaki ya motako. Mpo bozo bwa ngai bokosepelaka o nkoma, mpe motema mwa ngai mokomaniolaka mango, mpe mokomi mango mpo ya boyekoli mpe litomba lya bana ba ngai.

16 Tala, bozo bwa ngai bokosepelaka o makambo ma Nkolo, mpe motema mwa ngai mokomaniolaka ntango inso likolo lya makambo maye namonoki mpe nayokaki.

17 Nzokande, ata bolamu bonene bwa Nkolo, na kolakisaka ngai misala mya ye minene mpe mya bokamwi, motema mwa ngai mokobelela: O moto motau oyo nazali! Iyo, motema mwa ngai moyoki mawa na ntina ya mosuni mwa ngai; bozo bwa ngai boyoki mawa mpenza na ntina ya mabe ma ngai.

18 Nazingami bipai na bipai, na ntina ya masenginia mpe masumu maye makokakema ngai mpamba mpamba.

19 Mpe elingi ngai kosepela, motema mwa ngai mokolelalela na ntina ya masumu ma ngai; nzokande, nayebi na nani natii elikia.

20 Nzambe wa ngai azalaki likonzi lya ngai; akambaki ngai o katikati ya matungisi ma ngai o esobe; mpe abatelaki ngai likolo lya mai ma mozindo monene.

21 Atondisaki ngai na bolingo bwa ye, kutu kina o bozikisi bwa mosuni mwa ngai.

22 Abulunganisi bayini ba ngai, mpo ya bosali bango koningana liboso lya ngai.

23 Tala, ayokaki ebelela ya ngai o moi, mpe apesaki ngai boyebi na limoni o ntango ya butu.

24 Mpe o moi nakolaki o bobangi te o losambo lokasi liboso lya ye; iyo, mongongo mwa ngai natindaki likolo; mpe banzelu bakitaki mpe basalaki epai ya ngai.

25 Mpe likolo lya mapapu ma Molimo mwa ye nzoto ya ngai emememeki mosika likolo lya ngomba elai mpenza. Mpe miso mya ngai mimonoki makambo manene, iyo, kutu manene mingi koleka mpo ya moto; yango wana napekisamaki ete nakoma mango te.

26 O nde, soko namonoki makambo manene boye, soko Nkolo o bonkonde bwa ye epai ya bana ba bato abimelaki bato o ngolu nzike boye, boniboni motema mwa ngai mokolela, mpe bozo bwa ngai bokowumela o lobwaku la mawa mpe mosuni mwa ngai mokosila bokasi, mpe makasi ma ngai makolembe na ntina ya matungisi ma ngai?

27 Mpe ntina nini nakomitika o lisumu, na ntina ya mosuni mwa ngai? Iyo, ntina nini nakopesa nzela o masenginia, ete mobe azala na esika o motema mwa ngai mpo ya kobebisa kimia ya ngai mpe kotungisa bozo bwa ngai? Ntina nini nakosilika na ntina ya moyini wa ngai?

28 Lamuka, bozo bwa ngai! Lebetene lisusu te o lisumu. Sepela, O motema mwa ngai, mpe pesa esika lisusu te na moyini wa bozo bwa ngai te.

29 Silika lisusu te na ntina ya bayini ba ngai. Lembe te makasi ma ngai na ntina ya matungisi ma ngai.

30 Sepela, O motema mwa ngai, mpe belela epai ya Nkolo, mpe loba: O Nkolo, nakosanzola yo libela; iyo, bozo bwa ngai bokosepela na yo, Nzambe wa ngai, mpe libanga lya lobiko la ngai.

31 O Nkolo, elingi yo kosikola bozo bwa ngai? Elingi yo kobikisa ngai libanda lya maboko ma bayini ba ngai? Elingi yo kosala ngai ete nanigisama o etalisi ya lisumu?

32 Tika bikuke bya limfelo bikangema ntango inso liboso lya ngai, zambi motema mwa ngai mobukani mpe molimo mwa ngai moyoki mawa! O Nkolo, elinga yo te kokanga bikuke bya bosembo bwa yo liboso lya ngai, ete nakoka kotambola o balabala ya lobwaku la nse, ete nakoka kozala sikisiki o balabala epatalala!

33 O Nkolo, elingi yo kozinga ngai zingazinga na monkoto mwa bosembo bwa yo! O Nkolo, elingi yo kosala nzela yoko mpo ya boponioki bwa ngai liboso lya bayini ba ngai! Elingi yo kosala nzela ya ngai sembo liboso lya ngai! Elingi yo te kotia libanga lya libaku o nzela ya ngai—kasi ete okopetola nzela ya ngai liboso lya ngai, mpe o kopekisa te nzela ya ngai, kasi nzela ya moyini wa ngai.

34 O Nkolo, nakondima na yo, mpe nakotia bondimi na yo libela. Nakotia bondimi bwa ngai o loboko la mosuni te; mpo nayebi ete alakelami botutu ye oyo atii bondimi bwa ye o loboko la mosuni. Iyo, alakelami botutu ye oyo atii bondimi bwa ye na moto to akomisi mosuni loboko la ye.

35 Iyo, nayebi ete Nzambe akopesa na boboto na ye oyo akosenge. Iyo, Nzambe wa ngai akopesa ngai, soko nasengi mabe te; yango wana nakotombola mongongo mwa ngai epai ya yo, iyo, nakobelela epai ya yo, Nzambe wa ngai, libanga lya bosembo bwa ngai. Tala, mongongo mwa ngai libela mokomata epai ya yo, libanga lya ngai mpe Nzambe wa ngai wa libela. Amene.