Makomi
2 Nefi 30


Mokapo 30

Bapaganu baye babongwani bakotangema elongo na bato ba boyokani—Balamani mingi mpe Bayuda bakondima liloba mpe bakokoma kitoko—Yisalaele ekozongisama mpe bato ba nkuna bakobebisama. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa tala, bandeko balingami balamu ba ngai, nalingi koloba epai ya bino; mpo ngai, Nefi, nalingi kotika te ete bobanza ete bozali sembo koleka Bapaganu. Mpo tala, longola se soko bokobatela mitindo mya Nzambe bokowa banso lokola; mpe na ntina ya maloba maye malobamaki bozali te na ntina ya kobanza ete Bapaganu bakobebisama banso.

2 Mpo tala, nakoloba epai ya bino ete Bapaganu mingi lokola bakoyambola bakozala bato ba boyokani bwa Nkolo; mpe Bayuda mingi lokola bakoyambola te bakobwakama mosika; mpo Nkolo akoyokana elongo na moto te longola se soko ezali elongo na bango baye bayamboli mpe bandimi na Mwana Mobali wa ye, oyo azali Mosantu Moko wa Yisalaele.

3 Mpe sikawa, nalingi kobikula mwa moke lisusu etali Bayuda mpe Bapaganu. Mpo ekosila buku eye nalobelaki kobima, mpe kokomama epai ya Bapaganu, mpe kokangema lisusu epai ya Nkolo, ekozala mingi oyo bakondima maloba maye makomami; mpe bakomeme mango epai ya montika mwa nkona ya biso.

4 Mpe nde montika mwa nkona ya biso mokoyeba etali biso, boniboni toyaki libanda lya Yelusaleme, mpe ete bazali biboto bya Bayuda.

5 Mpe nsango elamu ya Yesu Klisto ekosakolama o ntei ya bango; yango wana, bakozongisama o boyebi bwa batata ba bango, mpe lisusu boyebi bwa Yesu Klisto, boye bozalaka o ntei ya batata ba bango.

6 Mpe nde bakosepela; mpo bakoyeba ete ezali lipamboli lyoko epai ya bango uta o loboko la Nzambe; mpe eteku ya molili ikobanda kokweya uta o miso mya bango; mpe nkola mingi ikoleka te o ntei ya bango, longola se soko bakozala bato boko ba peto mpe kitoko.

7 Mpe ekosalema ete Bayuda baye bapalanganisami lisusu bakobanda kondima na Klisto; mpe bakobanda kosangana elongo o kati, likolo lya etando ya mboka; mpe mingi lokola bakondima na Klisto bakokoma bato boko kitoko lokola.

8 Mpe ekosalema ete Nkolo Nzambe akobanda mosala mwa ye o ntei ya bikolo, mabota, minoko, mpe bato banso, mpo ya kokamba bozongisi bwa bato ba ye likolo lya mabele.

9 Mpe na bosembo ekosambisa Nkolo Nzambe bakeleli, mpe akopalela na alima basokemi ba mokili. Mpe akobete mabele na lingenda lya monoko mwa ye; mpe na mpema ya mbebo ya ye ekoboma ye bato ba nkuna.

10 Mpo ntango ekoya noki eye Nkolo Nzambe akosala bokaboli bonene o ntei ya bato, mpe bato ba nkuna akobebisa; mpe akobikisa bato ba ye, iyo, kutu soko ezali boye ete asengeli kobebisa bato ba nkuna na moto.

11 Mpe bosembo bokozala mokaba mwa nketo ya ye, mpe bopotongono mokaba mwa mokongo mwa ye.

12 Mpe nde ekofanda mbwa ya zamba elongo mwa na wa mpate; mpe nkoi akolala elongo na mwa na wa ntaba, mpe mwa na wa ngombe, mpe nkosi ya elenge, mpe niama ya mafuta, lisanga; mpe mwana moke akokamba bango.

13 Mpe ngombe mobali mpe ngombolo ikolia; bilenge bya bango bikolala elongo; mpe nkosi akolia matiti bo ngombe.

14 Mwana wa libele akosakana o libulu lya etupa, mpe mwana atiki libele akotia loboko la ye o lidusu lya mbakoko.

15 Bakosala mpasi te to bakobebisa te o ngomba ya ngai mobimba esantu; mpo mabele mokotonda na boyebi Nkolo lokola mai mazipi mbu.

16 Yango wana, makambo ma bikolo binso makoyebisama; iyo, makambo manso makoyebisama epai ya bana ba bato.

17 Ezali eloko te eye ezali o kuku longola se soko ekobimisama; ezali mosala te mwa molili longola se soko mokomonisama o mwinda; mpe ezali eloko te eye ekangema likolo lya mabele longola se soko ekokangolama.

18 Yango wana, makambo manso maye mabimisama epai ya bana ba bato makobimisama o ntango ena; mpe Satana akozala na nguya likolo lya mitema mya bana ba bato lisusu te, mpo ya ntango elai. Mpe sikawa, bandeko balingami balamu ba ngai, natii nsuka yoko ya maloba ma ngai.