Makomi
2 Nefi 13


Mokapo 13

Yuda mpe Yelusaleme bakotumbolama mpo ya bozangi botosi bwa bango—Nkolo asambi mpo ya mpe asambisi bato ba ye—Bana basi ba Siona balakelami botutu mpe baniokwami mpo ya bomokili bwa bango—Mekisani Yisaya 3. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Mpo tala, Nkolo, Nkolo wa Bibele, azali kolongola uta o Yelusaleme, mpe uta o Yuda, lisalisi mpe likonzi, likonzi mobimba lya limpa, mpe lisalisi mobimba lya mai—

2 Mokasi, mpe moto wa etumba, mosambisi, mpe profeta, mpe moto wa ekenge, mpe mokolo;

3 Kapiteni wa ntuku mitano, mpe moto wa lokumu, mpe mopesi toli, mpe mosali wa mayele mabe, mpe molobi wa malonga .

4 Mpe nakopesa bana epai ya bango mpo ya kozala bana bakonzi likolo lya bango, mpe bana bake bakoyangela bango.

5 Mpe bato bakokakemama, moko na moko na mosusu, mpe moko na moko na moto wa penepene na ye; mwana akomilakisa o lolendo likolo lya mokolo, mpe moto wa nse na oyo ya lokumu.

6 Ntango ekosimba moto moko ndeko mobali wa ye wa ndako ya tata wa ye, mpe akoloba: yo ozali na elamba, zala moyangeli wa biso, mpe tika te enielengeni eya o nse ya maboko ma yo—

7 O mokolo mona akolapa, kolobaka: Nakozala mobikisi te; mpo o ndako ya ngai ezali limpa te mpe bilamba te; tia ngai te moyangeli wa bato.

8 Mpo Yelusaleme ebukani, mpe Yuda ekwei, zambi ndemo ya bango mpe misala mya bango mizalaki mibe na Nkolo, mpo ya kotumola miso mya nkembo ya ye.

9 Etaliseli ya bilongi bya bango, etatoli mabe ma bango, mpe esakoli lisumu lya bango lizali kutu lokola liye lya Sodomo, mpe bakoki kobomba lyango te. Lisuma epai ya bozo bwa bango, mpo bapesi mbano ebe epai ya bangomei!

10 Lobani epai ya basembo ete ezali bolamu na bango; mpo bakolia mbuma ya misala mya bango.

11 Lisuma epai ya bato ba nkuna, mpo bakowa; mpo mbano ya maboko ma bango ekozala likolo lya bango!

12 Mpe bato ba ngai, bana bazali bakakemi ba bango, mpe basi bakoyangela likolo lya bango. O bato ba ngai, baye bakokamba bino bakosala bino bobungisa mpe bobebisa nzela ya balabala ya bino.

13 Nkolo atelemi mpo ya kosamba, mpe atelemi mpo ya kosambisa bato.

14 Nkolo akokota o bosambisi elongo na bakolo ba bato ba ye mpe bakonzi ba bakonzi ba bango; mpo bolei elanga ya vino mpe biloko bipunzami bya bakeleli o ndako ya bino.

15 Nini bobanzi? Bobuki bato ba ngai na biteni, mpe boniki bilongi bya bakeleli, elobi Nkolo Nzambe wa Bibele.

16 Lisusu, elobi Nkolo: Zambi bana basi ba Siona bazali lofundo, mpe bakotambola na nkingo evimbana mpe na miso misila nsoni, kotambolaka mpe kodendaka lokolo ekokende bango, kolelisaka ngengele yoko o makolo ma bango—

17 Yango wana Nkolo akobete na libandi lyoko mito mya bana basi ba Siona, mpe Nkolo akomonisa bisika bibombana bya bango.

18 O mokolo mona Nkolo akolongola tapale ya bikembiseli bya bango bya ngengele, mpe kitambala, mpe biloko bya kilikili bo sanza;

19 Miniololo mpe biloko bya maboko, mpe bizibele bya miso;

20 Bikoti, mpe bikembiseli bya makolo, mpe bitendi bike mpe bilai bya moto, mpe manzanza, mpe biloko bya matoyi;

21 Mpete, mpe mpauni ya zolo;

22 Basanduku ya monzele, mpe minkoto, mpe mafulunkoi, mpe babigudi.

23 Talatala, mpe lino lya malonga, mpe ngabuni, mpe kitambala ya petepete.

24 Mpe ekosalema, o esika ya nsolo kitoko ekozala nsolo ebe; mpe o esika ya mokaba moko, kitendi; mpe o esika ya nsuki esalema kitoko, libandi; mpe o esika ya monkoto, elamba ya saki ezingama, elembo ya moto esika ya bonzenga.

25 Babali ba yo bakokweya na mopanga mpe bakasi ba yo o etumba.

26 Mpe bikuke bya ye bikomilela mpe bikolela; mpe akozala mpamba, mpe akofanda o mabele.