Makomi
2 Nefi 23


Mokapo 23

Bobebisami bwa Babiloni bozali emoniseli yoko ya bobebisami o Boyei bwa Mibale—Ekozala mokolo mwa nkele mpe bobekoli—Babiloni (mokili) ekokweya libela—Mekisani Yisaya 13. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Elakeli ya Babiloni, eye Yisaya mwana wa Amosi amonoki.

2 Tombolani bendele yoko likolo lya ngomba elai, netolani mongongo epai ya bango, pepani loboko, ete bakoka koyingela o bikuke bya bankumu.

3 Natindaki basantisami ba ngai, nabiangaki lisusu bato bakasi ba ngai, mpo nkanda ya ngai ezali te likolo lya bango baye bakosepela o bonene bwa ngai.

4 Makelele ma ebele o ngomba bo lokola ya bato baike, makelele ma bokonzi boike bwa bikolo basangani elongo, Nkolo wa Bibele ayanganisi Bibele lya etumba.

5 Bayei uta o ekolo yoko ya mosika, uta o nsuka ya lola, iyo, Nkolo, mpe mandoki ma nkele ya ye, mpo ya kobebisa mboka mobimba.

6 Lelalelani, mpo mokolo mwa Nkolo mozali penepene; mokoya lokola bobebisami uta na Mokasi Monso.

7 Yango wana maboko manso makolembe, motema mwa moto na moto mokosopana;

8 Mpe bakozala na bobangi; bolozi mpe mawa makosimba bango; bakokamwisama mpo ya bango na bango; bilongi bya bango bikozala lokola miloli.

9 Tala, mokolo mwa Nkolo mozali koya, mwa nko elongo na nkele mpe nkanda ekasi lokola, mpo ya kolalisa mboka mpamba; mpe akobebisa basumuki ba yango libanda lya yango.

10 Mpo minzoto mya lola mpe mangomba ma lango makopesa mwinda mwa lango te; moi mokokoma molili o bobimi bwa mwango, mpe sanza ekosala te mwinda mwa yango mongenge.

11 Mpe nakotumbola mokili mpo ya bobe, mpe bato ba nkuna mpo ya lisumu lya bango; nakosala efundeli ya bato ba lofundo esila, mpe nakolalisa o nse lipombo lya moto wa nsomo.

12 Nakosala moto moko wa motuya koleka wolo ya malonga; kutu moto wa motuya koleka litutu lya wolo ya Ofili.

13 Yango wana, nakoningisa lola, mpe mabele makolongwa o esika ya mango, mpo ya nkele ya Nkolo wa Bibele, mpe o mokolo mwa nkanda ekasi ya ye.

14 Mpe ekozala lokola kulupa balandi, mpe lokola meme moto te abateli; mpe moto na moto akozonga na bato ba yemei, mpe akokima moko na moko o mboka ya yemei.

15 Moko na moko oyo azali wa lolendo akotubolama o katikati; iyo, mpe moko na moko oyo akangani na bato ba nkuna akokweya na mopanga.

16 Bana ba bango lisusu bakopomolama o biteni liboso lya miso mya bango; ndako ya bango ekopunzama mpe basi ba bango bakobotolomo.

17 Tala, nakolamusa Bamadai na bango, baye bakotala te mpauni mpe wolo, to bakosepela te na yango.

18 Matimbo ma bango makopomola bilenge babali o biteni; mpe bakoyoka mawa te likolo lya mbuma ya libumu; miso mya bango mikobikisa bana te.

19 Mpe Babiloni, nkembo ya bokonzi boike, kitoko ya malonga mpenza ya Bakaladi, ekozala lokola ntango Nzambe abukaki Sodomo mpe Gomola.

20 Ekozala lisusu na bafandi te, mpe ekofandama te uta nkola o nkola: to Molabo akotelemisa ema ya ye kuna te; to babateli ba mpate bakosala bitonga bya bango kuna te.

21 Kasi niama ya zamba ya esobe ikolala kuna; mpe ndako ya bango ekotonda na niama ya nsomo; mpe bisulungutu bikofanda kuna, mpe ntaba ya zamba ikobinabina kuna.

22 Mpe niama ya zamba ya bisanga bakoganga o ndako mpamba ya bango, mpe dalagona o ndako inene kitoko ya bango; mpe ntango ya ye ebelemi, mpe mokolo mwa ye mokobakisama te. Mpo nakobebisa ye noki; iyo, mpo nakozala na ngolu epai ya bato ba ngai, kasi bato ba nkuna bakowa.