Makomi
2 Nefi 26


Mokapo 26

Klisto akosala na Banefi—Nefi amoni yambo esalema bobebisami bwa bato ba ye—Bakoloba uta o mputulu—Bapaganu bakotonga biklezia bya lokuta mpe makelemba ma nkuku—Nkolo apekisi bato kosala poloso ya banganga. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Mpe ekosila Klisto kosekwa uta o bakufi akomilakisa epai ya bino, bana ba ngai, mpe bandeko balingami ba ngai; mpe maloba maye akoloba epai ya bino, makozala mobeko moye bokosala.

2 Mpo tala, nakoloba na bino ete namonoki ete nkola mingi ikoleka, mpe ekozala bitumba binene mpe boweli bonene o ntei ya bato ba ngai.

3 Mpe ekosila Masiya koya ekopesama bilembo epai ya bato ba ngai bya mbotama ya ye, mpe lisusu bya liwa mpe bosekwi bwa ye; mpe enene mpe ya nsomo ekozala mokolo mona epai ya bato ba nkuna, mpo bakowa; mpe bakowa zambi babwakaki libanda baprofeta, mpe basantu, mpe babambaki bango mabanga, mpe babomaki bango; yango wana ebelela ya makila ma basantu ekomaka likolo na Nzambe uta o mabele likolo lya bango.

4 Yango wana, baye banso bazali ba lolendo, mpe baye bakosala na nkuna, mokolo mokoya nakozikisa bango nie, elobi Nkolo wa Bibele, mpo bakozala lokola mpumbulu.

5 Mpe baye bakoboma baprofeta, mpe basantu, mozindo mwa mabele mokomina bango, elobi Nkolo wa Bibele; mpe ngomba ikozipa bango, mpe mopepe mwa kaina mokomeme bango mosika, mpe ndako inene ikokweya likolo lya bango mpe kotuta bango o biteni mpe konika bango o mputulu.

6 Mpe nkake, mpe minkalali, mpe boningani bwa mabele, mpe mabebisami ma ndenge inso makobimela bango, mpo moto mwa nkanda ya Nkolo mokopela na bango, mpe bakozala lokola mpumbulu, mpe mokolo moye mokoya mokozikisa bango, elobi Nkolo wa Bibele.

7 O bolozi, mpe nsomo ya bozo bwa ngai mpo ya bobungisi bwa babomami ba bato ba ngai! Mpo ngai, Nefi, namonoki yango, mpe ezalaki ngai mpenza penepene na kozikisama liboso lya miso mya Nkolo; kasi nasengeli kobelela na Nzambe wa ngai: Nzela ya yo izali iyengebene.

8 Kasi tala, basembo baye bayokemeli epai ya maloba ma baprofeta, mpe babebisi mango te, kasi batali o boso epai ya Klisto na molende mpo ya bilembo biye bipesamaki, ata boniokwami bonso—tala, bazali baye bakowa te.

9 Kasi Mwana Mobali wa Bosembo akobima epai ya bango; mpe akobikisa bango, mpe bakozala o kimia elongo na ye, kina nkola isato ikoleka, mpe bato mingi ba nkola ya inei bakoleka o bosembo.

10 Mpe ekoleka makambo maye, bobebisami bwa noki bokoya epai ya bato ba ngai; mpo, ata bolozi bwa bozo bwa ngai, namonoki yango; yango wana, nayebi ete ekosalema, mpe bakomiteke mpo ya mpamba; mpo, mpo ya mbano ya lolendo la bango mpe ligboma lya bango bakobuka bobebisami; mpo zambi bamitiki epai ya zabulu mpe baponi misala mya molili esika ya mwinda, yango wana basengeli kokita o nse o limfelo.

11 Mpo, Molimo mwa Nkolo akobunda te ntango inso elongo na moto. Mpe etiki Molimo kobunda elongo na moto nde ekoya bobebisami bwa noki; mpe eye etungisi bozo bwa ngai.

12 Mpe lokola nalobaki etali bondimisi bwa Bayuda, ete Yesu azali Klisto mpenza, esengeli mpenza ezala ete Bapaganu bandimisama lisusu ete Yesu azali Klisto, Nzambe wa Seko;

13 Mpe ete akomimonisa epai ya baye banso bandimi na ye, o nguya ya Molimo Mosantu; iyo, o ekolo na ekolo, libota na libota, monoko na monoko, mpe bato na bato, kosalaka makamwisi makasi, bilembo, mpe makamwa, o ntei ya bana ba bato engebene na bondimi bwa bango.

14 Kasi tala, nakobikula epai ya bino etali mikolo mya nsuka; etali mikolo ekokumba Nkolo Nzambe makambo maye epai ya bana ba bato.

15 Ekosila nkona ya ngai mpe nkona ya bandeko babali ba ngai kokulumwa o bozangi bondimi, mpe kobeteme na Bapaganu; iyo, ekosila Nkolo Nzambe kopikama likolo lya bango zingazinga mpembeni, mpe akozinga bango likolo lya bango o ngomba yoko, mpe akotelemisa likolo lya bango bibundele bikasi; mpe ekosila bango kokitisama o nse ya mputulu, kutu ete bakozala te, kasi maloba ma basembo makokomama, mpe nsambo ya mondimi ikoyokisama, mpe baye banso bakulumwaki o bozangi bondimi bakobosanama te.

16 Mpo bango baye bakobebisama bakoloba epai ya bango uta o mabele, mpe esakoli ya bango ekozala o nse uta o mputulu, mpe mongongo mwa bango mokozala lokola moko moye mozali na molimo mwa momeseno; mpo Nkolo Nzambe akopesa epai ya ye nguya, ete akoka komimisana etali bango, kutu lokola ezalaki uta o mabele; mpe esakola ya bango ekomimisana uta o mputulu.

17 Mpo boye elobi Nkolo Nzambe: Bakokoma makambo maye makosalema o ntei ya bango, mpe makokomama mpe makokangema o buku yoko, mpe bango baye bakulumwaki o bozangi bondimi bakozwa mango te, mpo bakoluka kobebisa makambo ma Nzambe.

18 Yango wana, lokola bango baye babebisami babebisami noki; mpe ebele ya bato ba nsomo ba bango bakozala lokola mpumbulu eye ekoleka mosika—iyo, boye elobi Nkolo Nzambe: Ekozala o ntango eke na mbalaka—

19 Mpe ekosalema, ete baye bakulumwaki o bozangi bondimi bakobeteme na loboko la Bapaganu.

20 Mpe Bapaganu batombwani likolo o lolendo la miso mya bango, mpe batuti libaku, na ntina ya bonene mwa libanga lya libaku lya bango; ete batongaki biklezia mingi; nzokande, bakitisi nguya ya makamwisi ma Nzambe, mpe bateyi epai ya bangomei bwania bwa bangomei mpe boyekoli bwa bangomei, ete bazwa matabisi mpe banika elongi ya mokeleli.

21 Mpe ezali biklezia mingi bitongami biye bikobota bilula, songisongi, mpe nko.

22 Mpe ekozala lisusu makelemba ma nkuku, kutu lokola o bileko bya kala, engebene na makelemba ma zabulu, mpo azali mokeli wa makambo maye manso; iyo, mokeli wa mobomano, mpe misala mya molili; iyo, mpe akambaki bango na nkingo na nsinga yoko ya petepete, kina akanga bango na nsinga ikasi ya ye libela.

23 Mpo tala, bandeko babali balingami ba ngai, nakoloba epai ya bino ete Nkolo Nzambe akosala o molili te.

24 Akosala eloko te longola se soko ezali mpo ya litomba la mokili; mpo alingi mokili, kutu ete akopesa bomoi bwa yemei ete akoka kobenda bato banso epai ya ye. Yango wana, atindi moto te ete akabola te lobiko la ye.

25 Tala, egangi ye epai ya bato banso, kolobaka: Kenda mosika uta na ngai? Tala, nalobi epai ya bino, Te; kasi alobi: Yakani epai ya ngai bino banso nsuka ya mabele, sombani miliki mpe mafuta ma nzoi, na mosolo te mpe na ntalo te.

26 Tala, etindi ye moko ete bakende libanda lya sinagogi, to libanda lya ndako ya bokumbami? Tala, nakoloba epai ya bino, Te.

27 Etindi ye moko ete bakabola te lobiko la ye? Tala nakoloba epai ya bino, Te; kasi apesi yango ofele mpo ya bato banso; mpe atindi bato ba ye ete bandimisa bato banso mpo ya boyamboli.

28 Tala, etindi Nkolo boko ete bakabola te bolamu bwa ye? Tala nakoloba epai ya bino, Te; kasi bato banso bazali na litomba lyoko bo basusu, mpe moko apekisami te.

29 Atindi ete ezala poloso ya banganga te; mpo, tala, poloso ya banganga izali ete bato bateyi mpe batii bangomei likolo lokola mwinda mwa mokili, ete bakoka kozwa matabisi mpe bosanzoli bwa mokili; kasi bakoluka te bolamu bwa Siona.

30 Tala, Nkolo apekisi likambo liye; yango wana, Nkolo Nzambe apesi mobeko ete bato banso bazala na lolango, loye lolango lozali bolingo. Mpe longola se soko bakozala na lolango bazalaki eloko te. Yango wana, soko bakozala na lolango bakotika te mosali o Siona awa.

31 Kasi mosali o Siona akosala mpo ya Siona; mpo soko bakosala mpo ya mosolo bakowa.

32 Mpe lisusu, Nkolo Nzambe atindi ete bato baboma te; ete bakosa te; ete bayiba te; ete bazwa te nkombo ya Nkolo Nzambe wa bango na mpamba; ete balula te; ete bazala na nko te; ete bawela bango na bango te; ete basala pite te; mpe ete basala yoko ya makambo maye te; mpo onso oyo akosala mango akowa.

33 Mpo yoko te ya masumu maye mayei uta na Nkolo; mpo akosala eye ezali elamu o ntei ya bana ba bato; mpe akosala eloko te longola se soko ezali polele epai ya bana ba bato; mpe akobianga bango banso koya epai ya ye mpe kokabola bolamu bwa ye; mpe akoboya moko te oyo akoya epai ya ye, moindo mpe mpembe, mowumbu mpe monsomi, mobali mpe mwasi; mpe akomikundola Bapaganu; mpe bango banso bazali lolenge loko kaka epai ya Nzambe, Bayuda mpe Bapaganu lokola.