Makomi
2 Nefi 17


Mokapo 17

Efelaima mpe Sulia babundi etumba na Yuda—Klisto akobotama na moseka—Meka na Yisaya 7. Penepene na mibu 559–545 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete na mikolo ya Ahaza mwana ya Yotama, mwana ya Uziya, mokonzi na Yuda, ete Lesini, mokonzi na Sulia, mpe Peka mwana ya Lemalia, mokonzi na Yisalaele, bamataki na Yelusaleme mpo na kobunda na yango, kasi bakokaki kolonga yango te.

2 Mpe eyebisamaki na ndako ya Dawidi, kolobaka: Sulia asali likita elongo na Efelaima. Mpe motema na ye moninganaki, mpe motema ya bato na ye, lokola nzete ya zamba eninganaka na mopepe.

3 Bongo Nkolo alobaki epayi ya Yisaya: Kende sikawa kokutana elongo na Ahaza, yo mpe Salayasubu mwana na yo, na nsuka ya mongongolo ya liziba likolo na balabala monene ya bilanga ya mosukoli bilamba;

4 Mpe loba epayi na ye: Sala keba, mpe zala kimia; kobanga te, mpe kozala na motema nsomo te mpo na nkoni mibale ya milinga ezanga moto oyo, mpo na nkanda makasi ya Lesini elongo na Sulia, mpe ya mwana ya Lemalia.

5 Mpo Sulia, Efelaima, mpe mwana ya Lemalia, bazwaki toli ya mabe na kobundisaka yo, kolobaka:

6 Tika tomata na Yuda mpe totungisa yango, mpe tika tosala lidusu ya kokotela mpo na biso, mpe totia mokonzi na katikati na yango, iyo, mwana ya Tabele.

7 Boye elobi Nkolo Nzambe: Ekosimba te, mpe ekosalema te.

8 Mpo moto ya Sulia ezali Damaseke, mpe moto ya Damaseke, Lesini; mpe na mibu ntuku motoba na mitano Efelaima ekobukana na lolenge ete bakozala lisusu bato te.

9 Mpe moto ya Efelaima ezali Samalia, mpe moto ya Samalia ezali mwana ya Lemalia. Soki bokondima te solo mpenza bokotiama te.

10 Mpo na kobakisa, Nkolo alobaki lisusu epayi ya Ahaza, kolobaka:

11 Senga elembo uta na Nkolo Nzambe na yo; senga yango ezala na bozindo, to na bisika ya likolo na lola.

12 Kasi Ahaza alobaki: Nakosenga te, mpe nakomeka Nkolo te.

13 Mpe alobaki: Yoka sikawa, O ndako ya Dawidi; ezali likambo moke mpo na yo kolembisa bato, kasi bino, bokolembisa kolembisa Nzambe na ngai mpe lokola?

14 Boye, Nkolo ye moko akopesa bino elembo—Tala, moseka akozwa zemi, mpe akobota mwana mobali, mpe akobianga nkombo na ye Emanuele.

15 Manteka mpe mafuta ya nzoi ye akolia, ete ayeba koboya mabe mpe kopona bolamu.

16 Mpo liboso ete mwana ayeba koboya mabe mpe kopona bolamu, mboka oyo ozali koyina ekosundolama na bakonzi na ye nyonso mibale.

17 Nkolo akomema likolo na yo, mpe likolo ya bato na yo, mpe likolo ya ndako ya tata na yo, mikolo oyo miyaki naino te uta mokolo oyo Efelaima akabwanaki na Yuda, mokonzi na Asulia.

18 Mpe ekosalema na mokolo wana ete Nkolo akobeta piololo mpo na nzinzi oyo ezali na eteni ya nsuka mpenza ya Ejipito, mpe mpo na nzoi oyo ezali na mboka ya Asulia.

19 Mpe bakoya, mpe bakofanda bango nyonso na mabwaku etikali mpamba, mpe na mabulu kati na mabanga, mpe likolo ya nzube nyonso, mpe likolo ya bisobe.

20 Na mokolo se moko wana Nkolo akokolola nsuki na ekololelo ya kofutela, na bango oyo na ngambo mosusu ya ebale, na mokonzi ya Asulia, moto, mpe nsuki ya makolo; mpe ekosilisa mandefu mpe lokola.

21 Mpe ekosalema na mokolo wana, moto akobokola ngombe ya mwasi ya elenge mpe meme mibale;

22 Mpe ekosalema, mpo na kotondana ya mabele bakopesa ye akolia manteka; mpo manteka mpe mafuta ya nzoi moko na moko akolia oyo matikalaki na mboka.

23 Mpe ekosalema ete na mokolo wana, esika nyonso ekozala, wapi ezalaki vinyo nkoto na mpauni nkoto, oyo ekozala mpo na nkobongo mpe nzube.

24 Na makula mpe matimbo bato bakoya kuna, mpo mboka mobimba ekokoma kaka nkobongo mpe nzube.

25 Mpe na bangomba ya mike mike nyonso oyo ekotimolama na nkongo, kuna bobangi ya nkobongo mpe nzube ekoya te; kasi ekozala mpo na kotinda pakasa kolia, mpe kotambwisa bibwele ya mike mike.

Bimisa na lokasa