Makomi
2 Nefi 18


Mokapo 18

Klisto akozala lokola libanga lyoko lya libaku mpe libanga lyoko lya botumoli—Luka Nkolo, banganga nkisi te—Balukani o mibeko mpe o litatoli mpo ya bokambemi—Mekisani Yisaya 8. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Lisusu liloba lya Nkolo lilobaki epai ya ngai: Kamata etando enene, mpe koma likolo lya yango na ekomele ya moto, etali Maele-Salala-Hasa-baza.

2 Mpe nakamataki banzeneneke potongono mpo ya kokoma makundoli, Uliya nganga mpe Zekalia mwana mobali wa Yebelekia.

3 Mpe nakendeki epai ya profeta mwasi; mpe azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Nde Nkolo alobaki na ngai: Bianga nkombo ya ye, Maele-Salala-Hasa-baza.

4 Mpo tala, mwana akozala te na boyebi mpo ya kobelela, Tata wa ngai, mpe mama wa ngai, yambo bazwi ba Damaseke mpe biloko bipunzami bya Samalia bikobotolomo liboso lya mokonzi wa Asulia.

5 Nkolo alobaki lisusu epai ya ngai, kolobaka:

6 Lokola bato baye baboyi mai ma Siloa maye makotiola malembe malembe, mpe bakosepela o Lesini mpe mwana mobali wa Lemalia;

7 Sikawa yango wana, tala, Nkolo amemi likolo lya bango mai ma ebale, makasi mpe mingi, kutu mokonzi wa Asulia mpe nkembo enso ya ye; mpe akoya likolo lya mingongolo minso mya ye, mpe akokende likolo lya mabongo manso ma ye.

8 Mpe akoleka o katikati ya Yuda; akozindisa mpe akokende likolo, akokoma kutu o nkingo; mpe botandoli bwa mapapu ma ye bokotondisa bonene bwa mboka ya yo, O Imanuele.

9 Sanganani binomei, O bino bato, mpe bokobukama o biteni; mpe pesani litoyi bino banso ba bikolo bya mosika; bomikanga loketo, mpe bokobukama o biteni; bomikanga loketo mpe bokobukama o biteni.

10 Bozwa toli elongo, mpe ekokoma mpamba; boloba liloba, mpe ekosimba te; mpo Nzambe azali elongo na biso.

11 Mpo Nkolo alobaki boye na ngai na loboko loko lokasi, mpe alakisaki ngai ete natambola te o nzela ya bato baye, kolobaka:

12 Lobani te, Likita lyoko, na banso na bango bato baye bakoloba, Likita lyoko; mpe bangani te bobangi bwa bango, mpe zalani te na nsomo.

13 Santisani Nkolo wa Bibele yemei, mpe tika ye azala bobangi bwa yo, mpe tika ye azala nsomo ya yo.

14 Mpe akozala mpo ya ndako yoko esantu; kasi mpo ya libanga lya libaku, mpe libanga lya botumoli mpo ya ndako ibale ya Yisalaele, mpo ya mbonga mpe motambo o bafandi ba Yelusaleme.

15 Mpe mingi o ntei ya bango bakobete libaku mpe bakokweya, mpe bakobukana, mpe bakokangema o motambo mpe bakozwama.

16 Bomba litatoli, kanga mobeko o ntei ya bayekoli ba ngai.

17 Mpe nakozela likolo lya Nkolo, oyo abombi elongi ya ye mosika o ndako ya Yakobo, mpe nakoluka ye.

18 Tala, ngai mpe bana baye Nkolo apesaki ngai tozali mpo ya bilembo mpe mpo ya bikamwa o Yisalaele uta na Nkolo wa Bibele, oyo afandi o Ngomba ya Siona.

19 Mpe ekoloba bango epai ya bino: Lukani epai ya bango baye bazali na milimo mya momeseno, mpe banganga nkisi baye bakobete piololo mpe bakonunganunga—esengeli te bato baluka toli epai ya Nzambe wa bango mpo ya bato ba bomoi bayokela uta o bakufi?

20 O mobeko mpe o litatoli; mpe soko balobi te engebene na liloba liye, ezali zambi ezali mwinda te na bango.

21 Mpe bakoleka o katikati ya yango na bolozi mingi mpe na nzala; mpe ekosalema ete, ekoyoka bango nzala, bakomilemwisa, bakolakela mokonzi wa bango bututu mpe Nzambe wa bango, mpe bakotala likolo.

22 Mpe bakotala epai ya mabele mpe tala mobulu, mpe molili, bitima bya nsomo, mpe bakokumbama o molili.