Makomi
Mosiya 12


Mokapo 12

Abinadi atiami na boloko mpo na kosakolaka bobebisami ya bato mpe liwa ya Mokonzi Noa—Banganganzambe ya lokuta batangi makomi mpe balobi babateli mobeko ya Mose—Abinadi abandi kolakisa bango Mitindo Zomi. Penepene na mobu 148 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete nsima ya ntaka ya mibu mibale ete Abinadi ayaki na kati na bango na kobongolaka lolenge na ye, ete bayebaki ye te, mpe abandaki kosakola na kati na bango, kolobaka: Boye Nkolo atindi ngai, kolobaka—Abinadi, kende mpe sakola epayi ya bato na ngai baye, mpo bayeisi mitema na bango makasi na maloba na ngai; bayamboli te uta na misala na bango ya mabe; boye, nakobimela bango na nkanda na ngai, iyo, na nkanda makasi ya ngai nakobimela bango kati na mabe mpe bonsomo na bango.

2 Iyo, lisuma ezala epayi na nkola oyo! Mpe Nkolo alobi epayi na ngai: Sembola loboko na yo mpe sakola, kolobaka: Boye elobi Nkolo, ekosalema ete nkola oyo, na ntina ya mabe na bango, ekomemama kati na boumbu, mpe ekobetama na litama; iyo, mpe ekobenganama na bato, mpe ekobomama; mpe ewa ndo ya likolo, mpe mbwa, iyo, mpe nyama ya zamba, bakolia mosuni na bango.

3 Mpe ekosalema ete bomoi ya mokonzi Noa ekozala na motuya kutu lokola elamba oyo ezali kozika na etumbelo ya moto makasi; mpo akoyeba ete nazali Nkolo.

4 Mpe ekosalema ete nakobeta bato na ngai oyo na mitungisi ya nsomo, iyo, na nzala mpe na bokono ya mabe; mpe nakosala ete balela-lela na bolayi ya mokolo mobimba.

5 Iyo, mpe nakosala ete bazala na mikumba milingami likolo ya mikongo na bango; mpe bakobenganama liboso lokola bampunda ya baba.

6 Mpe ekosalema ete nakotinda mvula ya mabanga na kati na bango, mpe ekobeta bango; mpe bakobetama lisusu na mopepe ya esti; mpe mwa banyama ya mike mike ekotungisa mboka na bango mpe lokola, mpe ekolia mboto na bango.

7 Mpe bakobetama na bokono mabe ya monene—mpe nyonso oyo nakosala mpo na mabe mpe bonsomo na bango.

8 Mpe ekosalema ete longola se soki bayamboli nakobebisa bango mpenza nie uta na etando ya mabele; nzokande bakotika lisolo ya makomi moko nsima na bango, mpe nakobatela yango mpo na bikolo mosusu oyo bikozwa mboka; iyo, kutu oyo nakosala ete nakoka kobombola bonsomo ya bato oyo epayi na bikolo mosusu. Mpe Abinadi asakolaki makambo mingi mpo na mabe ya bato oyo.

9 Mpe esalemaki ete basilikaki na ye; mpe bakamataki ye mpe bamemaki ye ya kokangama singa liboso ya mokonzi, mpe balobaki epayi ya mokonzi: Tala, tomemi moto liboso na yo oyo asakolaki makambo mabe mpo na oyo etali bato na yo, mpe alobi ete Nzambe akobebisa bango.

10 Mpe asakolaki lisusu mabe mpo na oyo etali bomoi na yo, mpe alobaki ete bomoi na yo ekozala lokola elamba na etumbelo ya moto makasi.

11 Mpe lisusu, alobaki ete okozala lokola mobimba, kutu lokola mobimba ya zamba ekawuka, oyo ematelami na banyama mpe etiami na nse ya lokolo.

12 Mpe lisusu, alobaki okozala lokola fololo ya mobwe, oyo, ntango ekomeli mpenza, soki mopepe mobeti, ekobenge likolo ya etando ya mboka. Mpe alobaki na ntembe te Nkolo alobaki yango. Mpe alobaki ete nyonso oyo ekoya likolo na yo longola se soki oyamboli, mpe oyo na ntina ya mabe na yo.

13 Mpe sikawa, O mokonzi, mabe monene kani oyo osali, soki te masumu minene kani oyo bato na yo basali, ete topesama etumbu na Nzambe soki te tosambisama na moto oyo?

14 Mpe sikawa, O mokonzi, tala, tozali na elindo te, mpe yo, O mokonzi, osumuki te; boye, moto oyo akosi mpo na oyo etali yo, mpe asakoli mpamba.

15 Mpe tala, biso tozali bato makasi, tokoya te kati na boumbu, soki te tokozwama bakangemi te na banguna na biso; iyo, mpe osili kofuluka na mboka oyo, mpe okofuluka lisusu.

16 Tala, moto yango azali awa, topesi ye na maboko na yo; okoki kosala na ye lokola emoni yo bolamu.

17 Mpe esalemaki ete mokonzi Noa asalaki ete Abinadi abwakama kati na boloko; mpe atindaki ete banganganzambe basangana bango moko esika moko ete ye akoka kosala likita elongo na bango nini bakosala na ye.

18 Mpe esalemaki ete balobaki epayi ya mokonzi: Mema ye awa ete tokoka kotuna ye mituna; mpe mokonzi atindaki ete bamema ye liboso na bango.

19 Mpe babandaki kotuna, ete bakoka kokutisa ye, ete na yango bakokaki kozwa nzela wapi ya kofunda ye; kasi ayanolaki bango na bobangi te, mpe atelemelaki mituna na bango nyonso, iyo, na bokamwi na bango; mpo atelemelaki bango na mituna na bango nyonso, mpe ayokisaki bango nsoni na maloba na bango nyonso.

20 Mpe esalemaki ete moko na bango alobaki epayi na ye: Nini elingi koloba maloba oyo ekomamaki, mpe oyo malakisamaki na batata na biso, kolobaka:

21 Lolenge boni kitoko likolo ya ngomba ezali makolo na ye oyo akomema nsango ya nsai; oyo akosakola kimia, oyo akomema nsango ya nsai ya bolamu; oyo akosakola lobiko; oyo akoloba epayi ya Siona, Nzambe na yo akokonza;

22 Bakengeli na yo bakotombola mongongo; na mongongo moko bakoyemba; mpo bakomona miso na miso ntango Nkolo akomema lisusu Siona;

23 Bobukana na bosepeli; boyemba elongo bino bisika bitikali mpamba ya Yelusaleme; mpo Nkolo abondisi bato na ye, asikoli Yelusaleme;

24 Nkolo azipolaki ya loboko losantu na ye mpamba na miso ya bikolo nyonso, mpe nsuka nyonso ya mabele ekomona lobiko ya Nzambe na biso?

25 Mpe sikawa Abinadi alobaki epayi na bango: Ezali bino banganganzambe, mpe bolobi ete boteyaka bato oyo, mpe bososolaka molimo ya masakoli, mpe nzokande bozali na mposa ya koyeba uta na ngai nini makambo oyo elingi koloba?

26 Nalobi epayi na bino, lisuma ezala epayi na bino mpo na kosantolaka banzela ya Nkolo! Mpo soki bososoli makambo oyo mpe boteyaki yango te; boye, bozali kosantola banzela ya Nkolo.

27 Botie mitema na bino te mpo na kososola; boye bozali na bwania te. Boye, nini ezali bino koteya bato oyo?

28 Mpe balobaki: Toteyaka mobeko ya Mose.

29 Mpe lisusu alobaki epayi na bango boye: Soki boteyaka mobeko ya Mose mpo na nini bobatelaka yango te? Mpo na nini botiaka mitema na bino likolo ya bozwi? Mpo na nini bosalaka pite mpe bosilisaka makasi na bino elongo na basi ya pite, iyo, mpe bosali ete bato oyo basumuka, ete Nkolo asali ete atinda ngai mpo na kosakola na kofundaka bato oyo, iyo, kutu kosakola mabe minene na bato oyo?

30 Eyebi bino te ete nazali koloba bosolo? Iyo, boyebi ete nazali koloba bosolo; mpe bosengeli kolenga liboso ya Nzambe.

31 Mpe ekosalema ete bokobetama mpo na mabe na bino, mpo bolobi ete boteyaka mobeko ya Mose. Mpe boyebi nini mpo na oyo etali mobeko ya Mose? Lobiko ekoya na mobeko ya Mose? Bolobi nini?

32 Mpe bayanolaki mpe balobaki ete lobiko ekoya na mobeko ya Mose.

33 Kasi sikawa Abinadi alobaki epayi na bango: Nayebi ete soki bobateli mitindo ya Nzambe bokobikisama; iyo, soki bobateli mitindo oyo Nkolo apesaki epayi na Mose na ngomba ya Sinai, kolobaka:

34 Nazali Nkolo Nzambe na yo, oyo abimisaki yo uta na mboka ya Ejipito, uta na ndako ya boumbu.

35 Okozala na Nzambe mosusu te liboso na ngai.

36 Okosala te elilingi oyo ekatama mpo na yo, soki te elili ya eloko moko songolo likolo na lola, to biloko oyo ezali na nse na mabele.

37 Sikawa Abinadi alobaki epayi na bango: Bosalaki nyonso oyo? Nalobi epayi na bino, Te, bosali yango te. Mpe eteyaki bino bato oyo ete basala makambo oyo? Nalobi epayi na bino, Te, bosalaki yango te.

Bimisa na lokasa