Makomi
Moziya 17


Mokapo 17

Alama andimi mpe akomi maloba ma Abinadi—Abinadi akufi na mpasi ya moto—Abikuli malali mpe liwa na moto likolo lya babomi ba ye. Penepene na 148 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete esilisaka Abinadi maloba maye, ete mokonzi atindaki ete banganga bakamata ye mpe basala ete apesama liwa.

2 Kasi ezalaki moto moko o ntei ya bango ya ye nkombo ezalaki Alama, ye lokola kozalaka eboto moko wa Nefi. Mpe azalaki elenge mobali moko, mpe andimaki maloba maye Abinadi alobaka, mpo ayebaki etali bobe boye Abinadi atatolaka likolo lya bango; yango wana abandaki kosamba elongo na mokonzi ete azala te na nkanda na Abinadi, kasi atika ete akoka kokende na kimia.

3 Kasi Mokonzi adasukaki mingi, mpe asalaki ete Alama abenganama libanda uta o ntei ya bango, mpe atindaki basali ba ye nsima ya ye ete bakoka koboma ye.

4 Kasi akimaki uta o liboso lya bango mpe amibombaki ete bamonoki ye te. Mpe ye kobombamaka mikolo mingi akomaki makambo manso Abinadi alobaka.

5 Mpe esalemaki ete mokonzi asalaki ete bakengeli ba ye bazinga Abinadi mpe bakamata ye; mpe bakangaki ye mpe babwakaki ye o kati ya boloko.

6 Mpe nsima ya mikolo misato, ezwaki ye toli na banganga ba ye, asalaki ete amememe lisusu liboso lya ye.

7 Mpe alobaki epai ya ye: Abinadi, tozwi bofundi boko likolo lya yo, mpe olongobani na liwa.

8 Mpo olobaki ete Nzambe yemei akokita o ntei ya bana ba bato; mpe sikawa, mpo ya ntina ya eye okopesama liwa longola se soko olongoli maloba maye olobaki mabe matali ngai mpe bato ba ngai.

9 Sikawa Abinadi alobaki epai ya ye: Nalobi epai ya yo, nakolongola te maloba maye nalobaki epai ya yo matali bato baye, mpo mazali ma solo; mpe ete bokoka koyeba bosolo bwa mango namitikaki ete nakweya o kati ya maboko ma yo.

10 Iyo, mpe nakondima kutu kina liwa, mpe nakolongola maloba ma ngai te, mpe makoteleme lokola litatoli lyoko likolo lya yo. Mpe soko obomi ngai okosopa makila mazanga elindo, mpe eye ekoteleme lokola litatoli lyoko mpo ya mabe ma yo o mokolo mwa nsuka.

11 Mpe sikawa mokonzi Noa azalaki penepene na kotika ye, mpo abangaki liloba lya ye; mpo abangaki ete bosambisi bwa Nzambe boya likolo lya ye.

12 Kasi banganga batombolaki mongongo mpo ya ye, mpe babandaki kofunda ye, kolobaka: Afingaki mokonzi. Yango wana mokonzi asilikaki na ye, mpe asundolaki ye ete akoka kobomama.

13 Mpe esalemaki ete bakamataki ye mpe bakangaki ye, mpe babeteki ye na nzete ya moto, iyo, kutu kina liwa.

14 Mpe sikawa ebandaki mololi kozikisa ye, agangaki epai ya bango, kolobaka:

15 Tala, kutu lokola bosali epai ya ngai, boye ekosalema ete nkona ya bino ikosala ete mingi bakoyokisama mpasi eye nayoki, kutu mpasi ya liwa na moto; mpe eye zambi bandimi na lobiko la Nkolo Nzambe wa bango.

16 Mpe ekosalema ete bokotungisama na ndenge inso ya malali na ntina ya masumu ma bino.

17 Iyo, mpe bokobeteme epai na epai, mpe bokobenganama mpe bokopalanganisama esika na esika, kutu lokola ebwele ya zamba ebenganamaka na niama ya loma.

18 Mpe o mokolo mona bokolandama, mpe bokokangema na loboko la bayini ba bino, mpe nde bokoyoka mpasi, lokola nayokaki mpasi, bolozi bwa liwa na moto.

19 Boye Nzambe asalaki bobekoli likolo lya bango baye babebisaki bato ba ye. O Nzambe, yamba bozo bwa ngai.

20 Mpe sikawa, elobaka Abinadi maloba maye, akweyaki, eyokaki ye mpasi ya liwa na moto; iyo, epesamaki ye liwa zambi aboyaki kowangana mitindo mya Nzambe, ekangaki ya bosolo bwa maloba ma ye na liwa lya ye.